Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/5 nk. 8-9
  • Elenge mwasi moko ya moke oyo alobaki na mpiko nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elenge mwasi moko ya moke oyo alobaki na mpiko nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Alobaki na mpiko nyonso
  • Kobikisama ya Namana na maladi
  • Batoli mpo na biso
  • Azalaki na mposa ya kosalisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Elombe ya etumba ná mwana moko ya mwasi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Na ebandeli amonisaki motó makasi, kasi nsukansuka atosaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Kobika ya Naamane
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/5 nk. 8-9

Basalaki Mokano ya Yehova

Elenge mwasi moko ya moke oyo alobaki na mpiko nyonso

NA BOUMELI ya ekeke ya zomi L.T.B., boyokani kati na Yisalaele mpe Sulia ebebaki. Bikólo wana mibale bizalaki kobunda mingi na boye ete wana bambula misato elekaki kozanga bitumba, ezalaki likambo oyo esengelaki kokomama na mikanda.​—1 Mikonzi 22:1.

Eloko oyo ezalaki kobangisa mingi mpenza na ntango yango ezalaki bongo bituluku ya bapunzi ya Sulia, bamoko na bituluku yango ezalaki na bankámá ya basodá. Bato yango bazalaki kobundisa mpe kopunza Bayisalaele, bazalaki kokanga mpe kotya bato mingi na boombo​—ata mpe bana mike.

Na etumba moko oyo esalemaki, balongolaki ‘elenge mwasi moko ya moke’ na libota na ye oyo basangani na yango bazalaki kobanga Nzambe, kozanga ete bákoka koyokela ye mawa. (2 Mikonzi 5:2) Bakendaki na ye na Sulia, epai kuna asengelaki kofanda esika moko na bato oyo mbala mosusu azalaki komona bango ete bazalaki koyokisa nsɔ́mɔ mpe ayebaki bango liboso te​—bato oyo bazalaki kosambela moi, sanza, minzoto, banzeté, ata mpe mabángá. Bakesanaki mpenza na libota mpe na baninga ya elenge mwasi wana ya moke, baoyo bazalaki kosambela Nzambe bobele moko ya solo, Yehova! Nzokande, ata kati na ezingelo wana oyo amesanaki na yango liboso te, mwana wana ya mwasi amonisaki mpiko monene mpo na oyo etalaki losambo ya Yehova. Mpo na yango, abongolaki bomoi ya moto moko ya lokumu oyo azalaki kosala epai na mokonzi ya Sulia. Tiká tótala lolenge likambo yango lisalemaki.

Alobaki na mpiko nyonso

Biblia eyebisi nkombo ya elenge mwasi yango te. Akómaki mosaleli ya mwasi ya Namana, mokonzi monene ya basodá ya Mokonzi Bene-hadadi II. (2 Mikonzi 5:1) Atako atalelamaki na lokumu mingi, Namana azalaki na maladi mabe ya mbala.

Ekoki kozala ete ezaleli ya botosi ya elenge mwasi wana epusaki mwasi ya Namana ete ayebisa makambo matali libota na ye epai na elenge mwasi yango. Ekoki kozala ete mwasi yango atunaki elenge wana ete: ‘Basalaka nini na Yisalaele mpo na kobikisa bato na maladi ya mbala?’ Mwana mwasi wana Moyisalaele ayokaki nsɔ́ni te, kasi alobaki na mpiko nyonso ete: “Soko nkolo na ngai azalaki liboso na mosakoli oyo azali na Samalia, mbɛlɛ akobikisa ye na mbala na ye.”​—2 Mikonzi 5:3.

Maloba ya elenge mwasi wana mabwakamaki te lokola nde mazalaki bobele makanisi mpamba ya bomwana. Nzokande, maloba yango mayebisamaki epai na Mokonzi Bene-hadadi, oyo na nsima atindaki Namana mpe bato mosusu ete básala mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 150 mpo na kokende koluka mosakoli yango na Samalia.​—2 Mikonzi 5:4, 5.

Kobikisama ya Namana na maladi

Namana mpe bato na ye bakendaki epai na Yolama mokonzi ya Yisalaele, bamemaki mokanda ya komilakisa oyo eutaki epai na Bene-hadadi mpe motuya monene ya likabo ya mosolo. Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete Mokonzi Yolama, oyo azalaki kosambela ekeko ya mwana ngɔmbɛ, azangaki komonisa kondima epai na mosakoli ya Nzambe oyo elenge mwasi wana azalaki kondimela. Nzokande, akanisaki ete Namana ayaki nde koluka kobimisa kowelana. Na ntango Elisa mosakoli ya Nzambe ayokaki ete Yolama azalaki komitungisa, na mbala moko atindaki nsango mpo na kosɛnga na mokonzi ete atinda Namana na ndako na ye.​—2 Mikonzi 5:6-8.

Na ntango Namana akómaki na ndako ya Elisa, mosakoli atindaki momemi-nsango ayebisa ye ete: “Kendá kosukola na Yaladene mbala nsambo mpe nzoto na yo ekobika mpe ekozala pɛto.” (2 Mikonzi 5:9, 10) Namana asilikaki makasi. Lokola akanisaki ete asengelaki kobikisama na lolenge ya likamwisi mpe ya molulu monene, atunaki ete: “Abana mpe Falapala, oyo mikɛlɛ na Damaseke, ileki mai nyonso na Yisalaele te? Nakoki kosukola na yango te ete napetwa?” Namana abimaki na ndako na Elisa na nkanda mpenza. Kasi na ntango basaleli ya Namana basosolaki na ye, na nsuka, andimaki kosala bongo. Nsima ya kosukola mbala nsambo kati na Ebale Yaladene, “nzoto na ye ekómaki lisusu lokola nzoto na mwana moke, apɛtwaki.”​—2 Mikonzi 5:11-14.

Wana azongaki epai na Elisa, Namana alobaki ete: “Sasaipi nayebi ete Nzambe mosusu azali kati na mokili mobimba te bobele na Yisalaele.” Namana alapaki ndai ete akopesa lisusu “mbeka na kotumbama to mbeka ebomami epai na banzambe mosusu te bobele epai na [Yehova].”​—2 Mikonzi 5:15-17.

Batoli mpo na biso

Mbɛlɛ Namana akendaki epai na mosakoli Elisa te soki elenge mwasi mosaleli wana azangaki mpiko mpo na koloba. Lelo oyo, bilenge mingi bazali kosala lolenge moko. Kati na eteyelo, bakoki kozala elongo na bayekoli oyo basepelaka kosalela Nzambe te. Nzokande, balobaka na mpiko nyonso na ntina na bindimeli na bango. Basusu babandaka kosala bongo wana bazali naino bana mike mpenza.

Tótalela ndakisa ya Alexandra, mwana mwasi moko ya mibu mitano na Australie. Na ntango akɔtaki kelasi, mama na ye akanaki kokutana na molakisi na ye mpo ete akoka kolimbwela ye bindimeli ya Batatoli ya Yehova. Kasi mama ya Alexandra akamwaki mingi mpenza. Molakisi yango alobaki ete: “Nasili koyeba mwa ndambo ya bindimeli na bino, nayebi mpe makambo oyo Alexandra akosala awa na eteyelo mpe makambo oyo akosala te.” Mama ya Alexandra akamwaki, mpamba te ezalaki na mwana mosusu te ya Motatoli kati na eteyelo wana. Molakisi ayebisaki ete: “Alexandra alimbwelaki biso bindimeli na ye.” Ee, mwana mwasi yango ya moke asilaki kosolola na molakisi na ye na mayele nyonso.

Bilenge motindo wana balobaka na mpiko nyonso. Na yango, bazali kosala engebene Nzembo 148:12, 13: “Bilenge mpe basɛka lokola, banunu mpe bana elongo; tiká ete básanzola nkombo na [Yehova] zambi bobele nkombo na ye eleki. Nkembo na ye ezali likoló na mokili mpe lola.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto