Okolinga kozangisa yango te!
KOZANGISA nini? Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo etikali moke esalema, na motó ya likambo “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe”! Na bisika mingi liyangani yango ekobanda na miziki na Mwamitano na 9:30 ya ntɔ́ngɔ́. Nsima ya kolanda mituna-lisoló ya kolendisa kati na lisukúlu “Tóyoka basakoli ya kimya oyo bazali kosala na molende,” okosepela na lisukúlu ya kolendisa oyo elobi “Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?”
Likambo ya ntina na nsima ya nzánga ya Mwamitano ekozala lisukúlu-moboko “Mokumba na biso lokola Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe.” Nsima na yango lisukúlu “Tósalisa basusu ete báyeba masɛngami ya Nzambe” likopesa batoli likoló na lolenge ya koteya bato ya sika. Yango ekolandana na masukúlu-matongani “Kebá na mitambo mibombami kati na kominanola.” Manáka ya Mwamitano ekosuka na masukúlu “Tɛmɛlá Zábolo—Kotiká nzela na bombanda te” mpe “Tósimba na bosembo nyonso bopɛtɔ ya Liloba ya Nzambe.”
Manáka ya Mwapɔ́sɔ na ntɔ́ngɔ́ makolobela mingi ntina ya mosala ya kozalisa bayekoli kati na masukúlu-matongani “Bamemi-nsango bazali koyebisa nsango malamu ya kimya.” Eteni yango ekosuka na lisukúlu “Makabo ya esengo kati na lisangá ya Yehova” mpe lisukúlu “Bomoi mpe kimya na nzela ya komipesa mpe batisimo,” oyo nsima na yango libaku likopesamela bayekoli ya sika mpo na kozwa batisimo.
Na Mwapɔ́sɔ nsima ya nzánga, lisukúlu “Tótalela makanisi ya Yehova na makambo nyonso” likoyanola na mituna lokola ‘Baklisto bazali nde kosangana kati na mosala ya kokabola bato na mikolo na biso?’ mpe ‘Likanisi ya Biblia lizali nini na oyo etali kokatela bato etumbu ya liwa?’ Okosepela mpe na masukúlu-matongani na motó na likambo “Nzambe ya kimya azali komibanzabanza mpo na yo” mpe mingimingi lisukúlu ya nsuka “Tóluka kimya ya Nzambe kati na bomoi ya libota.”
Manáka ya Mwalomingo na ntɔ́ngɔ́ makozala na masukúlu-matongani “Tóluka koyeba banani bazali bamemi-nsango ya solo” mpe lisukúlu “Tóyoka mpe tótosa Liloba ya Nzambe.” Manáka ya ntɔ́ngɔ́ makosuka na lisano-liteya oyo basani na yango bakolata na motindo ya kala oyo ekopesa liteya ya motuya mingi na ntina na lisoló ya Biblia etali Mosambisi Gidɛɔna.
Eteni ya nsuka ya liyangani na Mwalomingo, nsima ya nzánga ekozala na lisukúlu ya bato banso, na motó ya likambo “Nsukansuka kimya ya solo eyei!—Euti wapi?” Lisukúlu ya kosimba motema “Tókende liboso awa ezali biso bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe” ekotya nsuka na liyangani.
Salá bibongiseli uta sikawa mpo na koyangana na yango. Mpo na koyeba esika ya liyangani oyo ezali pene na esika ofandaka, kende na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na esika ozali to komelá babimisi ya zulunalo oyo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli na nkasa 30 mpe 31 epesi badresi ya bisika nyonso epai kuna mayangani makosalema na Burundi, Congo mpe Zaïre.