Okoki kokóma na “motema lokola nkɔsi”
NA BANTANGO mosusu Biblia esalelaka nkɔsi lokola elembo ya mpiko mpe ya komityela motema. Mibali ya mpiko balobelami ete bazali na “motema lokola nkɔsi,” mpe bayengebene balobelami ete bazali “lokola mwana ya nkɔsi oyo ayebi komityela motema.” (2 Samwele 17:10; Masese 28:1, NW) Mingi mpenza na ntango atumolami, nkɔsi amonisaka ete abongi kopesamela lokumu lobongi na etɛlɛmɛlo na ye ya nyama oyo “aleki banyama mosusu [nyonso] na nguya.”—Masese 30:30.
Yehova akokanisi ekateli na ye ya kobatela libota na ye na ezaleli ya kozanga kobanga oyo nkɔsi azali na yango. Yisaya 31:4, 5 elobi ete: “Lokola nkɔsi to elenge na nkɔsi akonguluma likoló na bilei, wana ebolo na babateli na mpate babyangameli ye, mpe ayoki nsɔ́mɔ mpo na konganga na bango te, abangisami mpe na makelele na bango te, boye [Yehova] na bibele akokita na nsé, ete abunana na ngomba na Siona . . . Akobatela yango mpe akobikisa yango.” Na yango, Yehova azali kondimisa basaleli na ye ete amibanzabanzaka mpo na bango, mingi mpenza wana tokutani na monyokoli.
Biblia ekokanisi monguna ya bato oyo aleki monene, Satana Zábolo, na nkɔsi oyo azali konguluma mpe na lokoso. Mpo ete tókwea na manzaka na ye te, Makomi mayebisi biso ete: “Bómisɛnzɛla, bólala mpongi te.” (1 Petelo 5:8) Moko na makambo oyo tokoki kosala mpo na kolónga ezali bongo kopɛngola mpongi ya elimo oyo ekoki koboma. Na ntina na likambo yango, Yesu alobaki ete: “Kebá na bino ete mitema na bino mikóma makasi mpo na kolunda te, soko na kolangwa te, soko na bitungiseli na bomoi te.” (Luka 21:34-36) Ya solo, kosɛnzɛla na elimo na “mikolo na nsuka” oyo ekoki kopesa biso “motema lokola nkɔsi,” motema oyo mozali ‘ngwi, oyo etyaka elikya epai na [Yehova].’—2 Timoté 3:1; Nzembo 112:7, 8.