Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/7 lok. 31
  • Teyá bango uta bomwana mpenza

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Teyá bango uta bomwana mpenza
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/7 lok. 31

Teyá bango uta bomwana mpenza

BOLUKILUKI oyo esili kosalema na mikolo na biso emonisi ete “mwana oyo azali naino kati na libumu ya mama akoki koyoka mingongo.” Zulunalo Winnipeg Free Press elobi ete balukiluki ya Eteyelo monene na etúká ya Caroline ya Nɔ́rdi “bamonaki ete wana bamama batángelaki bana na bango mikanda na ntango bazalaki naino kati na libumu, nsima ya kobotama bana yango bakokaki koyeba biteni ya mikanda yango na ntango etángamaki lisusu.” Ntango basi bazali kotánga na mongongo makasi na ntango bazali na zemi, yango ekoki kosunga mpo na kokɔtisa bizaleli malamu epai na bana. Biblia elobi ete Timoté ‘ayebaki makomi ya bulɛɛ uta bomwana mpenza.’ (2 Timoté 3:14, 15) Ya solo, mama na ye mpe nkɔ́kɔ na ye ya mwasi basosolaki ntina ya koteya ye uta bomwana mpenza, oyo na ntembe te, esangisaki mpe kotánga na mongongo makasi.

Nganga-mayele Jim Trelease alobi ete kotánga ezali “likoki ya bomoi eleki makoki mosusu nyonso oyo tozali na yango na mokili na biso lelo.” Lokótá mpe makoki ya koyeba maloba mingi ya lokótá ekólaka na lisalisi ya kotánga na mongongo makasi.

Ezali likambo ya mayele kobanda kotángela mwana na yo na mongongo makasi nokinoki wana obandi kolobisa ye. Atako na ebandeli mwana na yo oyo abotami naino te to oyo abotami sika akososola te makambo oyo ozali koloba, kasi ebongi kosala bongo mpo ete matomba makoya komonana nsima mpenza. Masese 22:6 elobi ete: “Bokɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene akopɛngwa na yango te.”

Mokanda nini ebongi mpe ya kopesa litomba okoki kotánga yango? Mokolo na mokolo, tángelá mwana na yo Biblia na mongongo makasi. Tángelá ye mpe mikanda mosusu mibongi, lokola Boyoka moteyi monene, Mokanda mpo na Masolo ya Biblia, Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, mpe masoló ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!

Ya solo, komipesa na likambo yango esɛngaka ntango, kasi ezali ntango oyo ebungisami mpamba te. Ezali lolenge oyo elakisi polele ete ozali komibanzabanza mpo na bana na yo, mpe ete olingi bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto