Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/7 lok. 30
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • “Nini ekozala elembo ya kozala na yo?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • “Yebisá biso: makambo oyo makozala ntango nini?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Biblia esakolaki nini mpo na koningana ya mabele ya makasi mpenza?
    Makambo mosusu
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/7 lok. 30

Mituna ya batángi

Nakangi ntina ete liloba ya Greke tote (bongo) esalelami mpo na koyebisa likambo oyo ezali kolanda na nsima. Na yango, mpo na nini Matai 24:9 elobi ete: “Bongo [“toʹte”], bakobimisa bino mpo na minyoko,” nzokande lisoló likokani na yango ezwami kati na Luka 21:12 elobi ete: “Liboso na makambo oyo nyonso bakotyela bino mabɔkɔ na bango, mpe bakonyokola bino”?

Ezali solo ete toʹte ekoki kosalelama mpo na kolobela likambo oyo ekolanda na nsima, elingi koloba, likambo oyo eyei nsima na mosusu kati na molɔngɔ́. Kasi tosengeli kokanisa te ete wana ezali lolenge bobele moko oyo liloba yango esalelami kati na Biblia.

Búku A Greek-English Lexicon of the New Testament and Other Early Christian Literature ya Bauer, Arndt, mpe Gingrich, emonisi ete liloba toʹte esalelami mingi mpenza na bandimbola mibale kati na Makomami.

Ya liboso ezali oyo: “na ntango yango.” Ekoki kozala “bongo esalelami mpo na kolobela likambo oyo esilá koleka.” Ndakisa moko ezwami na Matai 2:17: “Bongo likambo lilobaki mosakoli Yilimia ekokaki.” Awa esalelami te mpo na kolobela likambo moko oyo etángami kati na molɔngɔ́, kasi ezali komonisa likambo moko ya sikisiki oyo esilá koleka, na ntango wana. Bobele bongo, toʹte ekoki mpe kosalelama “mpo na bongo na ntango oyo ekoya.” Ndakisa moko emonani kati na 1 Bakolinti 13:12: “Sasaipi tozali naino kotala lokola kati na talatála mpe tokokakatana, kasi na ntango yango [“bongo,” NW] tokotalana bilongi. Sasaipi nayebi bobele na ndambo, nde na ntango yango [“bongo,” NW] (toʹte) nakoyeba pelamoko nayebami.” Awa Paulo asaleli liloba toʹte mpo na kolobela ‘na ntango wana ezali koya.’

Engebene diksionɛrɛ yango, toʹte esalelami mpe mpo na “koyebisa likambo oyo ezali kolandana na kotalela ntango.” Diksionɛrɛ yango epesi bandakisa mingi oyo emonani kati na masoló misato ya eyano ya Yesu epai na bantoma na ye na ntango batunaki ye elembo ya kozala na ye.a Lokola bandakisa mpo na kosalelama ya toʹte “mpo na koyebisa likambo oyo ezali kolandana na kotalela ntango,” diksionɛrɛ yango etángi Matai 24:10, 14, 16, 30; Malako 13:14, 21 mpe Luka 21:20, 27. Kotalelama ya zingazinga ya makambo ezali komonisa mpo na nini ndimbola ya polele ezali oyo ete ezali komonisa likambo oyo eyei nokinoki na nsima ya likambo moko. Mpe yango ekoki kosunga biso mpo na kosimba ntina ya esakweli ya Yesu oyo elobelaki kokokisama ya makambo na mikolo mizali koya.

Nzokande, tosengeli te kosukisa ete mbala nyonso oyo toʹte esalelami kati na masoló yango esengeli bobele koyebisa likambo oyo ezali kolandana na kotalela ntango. Na ndakisa, kati na Matai 24:7, 8, tozali kotánga ete Yesu asakolaki ete mabota makobundisana, ete nzala ekozala mpe koningana ya mabelé. Molɔngɔ́ ya 9 ekóbi ete: “Bongo, bakobimisa bino mpo na monyoko mpe bakoboma bino; mabota nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” Ebongi mpenza kokanisa ete bitumba oyo bisakolamaki, nzala, mpe koningana ya mabelé, makambo wana masengelaki kobima, mpe mbala mosusu kosila, liboso ete monyoko ebanda?

Likanisi oyo elongobani te, eyokani mpe te na makambo oyo toyebi na ntina na kokokisama na yango na ekeke ya liboso. Lisoló oyo lizwami na mokanda ya Misala limonisi ete nokinoki mpenza na nsima wana basangani ya lisangá ya boklisto oyo eutaki kosalema sika babandaki kosakola, bakutanaki na botɛmɛli makasi. (Misala 4:5-21; 5:17-40) Tokoki soko moke te koloba ete bitumba nyonso, nzala nyonso mpe koningana nyonso ya mabelé oyo Yesu alobelaki ebimaki liboso ya minyoko wana na ekeke ya liboso. Nzokande, botɛmɛli yango eyaki “liboso” ya makambo mingi oyo masakolamaki, yango eyokani na lolenge oyo Luka alobelaki makambo yango: “Liboso na makambo oyo nyonso bakotyela bino mabɔkɔ na bango, mpe bakonyokola bino.” (Luka 21:12) Yango emonisi ete kati na Matai 24:9, toʹte elingi koloba “na ntango wana.” Na boumeli ya eleko ya bitumba, nzala, mpe koningana ya mabelé, to na ntango wana, bayekoli ya Yesu basengelaki konyokolama.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Masoló makokani oyo mazwami kati na Matai, Malako, mpe Luka matyamaki kati na milɔngɔ́ ya lokasa 14 mpe lokasa 15 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1994. Bisika oyo toʹte esalelami mpe ebongolami na liloba “bongo,” ekomami na makomi ya kobenda likebi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto