Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/2 nk. 8-14
  • “Nini ekozala elembo ya kozala na yo?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nini ekozala elembo ya kozala na yo?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bantoma balingaki koyeba
  • “BONGO” nsuka ekoya
  • Lokola esakolamaki, makambo mosusu mabimaki na nsima
  • Kino na likambo nini?
  • “Yebisá biso: makambo oyo makozala ntango nini?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • “Makambo yango esengeli koya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bantoma batuni elembo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/2 nk. 8-14

“Nini ekozala elembo ya kozala na yo?”

“Makambo oyo makozala ntango nini, mpe nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko?”​—MATAI 24:3, NW.

1, 2. Nini emonisi ete bato bazali kobanzabanza na ntina na makambo matali mikolo mizali koya?

BATO mingi bazali kobanzabanza na ntina na makambo matali mikolo mizali koya. Ezali bongo mpo na yo? Kati na búku na ye, Future Shock (Kobanga makambo matali mikolo mizali koya), molakisi Alvin Toffler alobelaki “bokóli ya pwasa ya bibongiseli oyo bizali koyekola makambo matali mikolo mizali koya.” Abakisaki ete: ‘Tozali komona kosalema ya bituluku mingi ya bato ya mayele baoyo bamipesi na koyekola makambo matali mikolo mizali koya, kobimisama ya bazulunalo oyo ezali kolobela makambo matali mikolo mizali koya na Angleterre, na France, na Italie, na Allemagne mpe na Etats-unis; kopalanganisama ya mateya oyo mazali kolobela makambo matali mikolo mizali koya, kati na bakelasi minene.’ Toffler asukisaki na maloba oyo: “Ya solo, moto moko te akoki ‘koyeba’ makambo matali mikolo mizali koya na sikisiki mpenza.”

2 Búku, Signs of Things to Come (Bilembo ya makambo mazali koya) elobi ete: “Koyebisa makambo makoya na nzela ya kotala maboko, kotala talatálá, koyekola minzoto, bililingi ya bakálati ya masano, búku ya bondɔki oyo ebengami Yi jing, nyonso wana ezali myango mitondi na mindondo mpo na kopesa biso likanisi mpo na koyeba soki makambo matali mikolo mizali koya makozala lolenge nini mpo na biso mpenza.” Nzokande, na esika ya kolanda myango oyo misalemi na bato, tosengeli nde kotalela liziba ya solo​—Yehova.

3. Mpo na nini ebongi malamu komibalola epai na Nzambe mpo na koyeba makambo matali mikolo mizali koya?

3 Nzambe ya solo alobaki ete: “Lokola ekanisaki ngai mpenza, ekosalema bobele bongo; mpe lokola ekanaki ngai, yango nde ekokokisama solo.” (Yisaya 14:24, 27, NW; Yis. 42:9) Ya solo, Yehova azali na likoki ya koyebisa bato makambo oyo makobima, mingimingi, asalaka yango na nzela na bato oyo azali kosalela lokola balobeli na ye. Moko kati na basakoli yango akomaki ete: “[Yehova] akosala likambo tɛ bobɛlɛ ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.”​—Amosa 3:7, 8; 2 Petelo 1:20, 21.

4, 5. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu akoki kosalisa biso na koyeba makambo matali mikolo mizali koya? (b) Motuna nini oyo esangisi makambo mingi bantoma batunaki yango?

4 Yesu Klisto azalaki mosakoli aleki monene ya Nzambe. (Baebele 1:1, 2) Tótalela moko na bisakweli na ye ya moboko oyo ezali mpe kosakola makambo mazali kobima zingazinga na biso lelo oyo. Esakweli yango ezali mpe komonisa biso makambo oyo makobima mosika te wana ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo ekosuka mpe na esika na yango Nzambe akotya paladiso awa na mabelé.

5 Yesu amonisaki ete azalaki mosakoli. (Malako 6:4; Luka 13:33; 24:19; Yoane 4:19; 6:14; 9:17) Na yango, ezali mpasi te ya koyeba mpo na nini na ntango afandaki mokolo moko likoló na Ngomba ya Olive, epai kuna okoki komona Yelusaleme na nsé, bantoma na ye batunaki ye na ntina na makambo oyo malingaki kobima na mikolo mizalaki koya: “Makambo oyo makozala ntango nini, mpe nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko?”​—Matai 24:3, NW; Malako 13:4.

6. Boyokani nini bozali kati na Matai 24, Malako 13, mpe Luka 21; mpe motuna nini mosengeli mpenza kobenda likebi na biso mingi?

6 Motuna na bango mpe eyano ya Yesu ezwami kati na Matai mokapo 24, Malako mokapo 13, mpe Luka mokapo 21.a Na makambo mingi, masoló wana makoki kosangisama esika moko mpo na kobimisa likanisi bobele moko, kasi moko na moko ekeseni na mosusu. Na ndakisa, bobele Luka nde alobi ete ‘maladi mabe makongala na esika moko nsima na mosusu.’ (Luka 21:10, 11; Matai 24:7; Malako 13:8) Nsima na kokanisa malamu, tokoki komituna ete: Yesu alingaki nde kosakola makambo oyo masengelaki kobima bobele na eleko oyo bayoki na ye bazalaki na bomoi, to alingaki kolobela mpe eleko na biso mpe soki makambo matali mikolo mizali koya makozala lolenge nini mpo na biso?

Bantoma balingaki koyeba

7. Motuna ya bantoma etalelaki mpenzampenza likambo nini; kasi nini ezalaki bonene ya eyano ya Yesu?

7 Bobele mwa mikolo liboso ete abomama, Yesu alobaki ete Nzambe abwakaki Yelusaleme mboka-mokonzi ya Bayuda. Engumba wana mpe tempelo na yango kitoko esengelaki kobebisama. Yango wana bamoko kati na bantoma basengaki ‘elembo ya kozala ya Yesu mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko.’ (Matai 23:37 kino 24:3) Na ntembe te, na makanisi na bango bazalaki kotalela libosoliboso ebongiseli ya Bayuda mpe Yelusaleme, mpamba te bazalaki kososola te bonene ya makambo oyo mazalaki koya. Kasi, wana azalaki kopesa bango eyano, Yesu atalaki na mosika mpenza koleka makambo oyo mabimaki na mobu 70 T.B., mobu oyo na boumeli na yango Baloma babebisaki Yelusaleme.​—Luka 19:11; Misala 1:6, 7.

8. Wapi mosusu kati na makambo oyo Yesu asakolaki?

8 Lokola okoki kotanga yango kati na masolo mazwami na Baevanzile oyo misato, Yesu alobaki ete libota moko ekotemela libota mosusu, mpe bokonzi moko ekotemela bokonzi mosusu, nzala ekozala, koningana ya mabelé, komonana ya makambo ya kobangisa mpe bilembo na likoló. Na boumeli ya bambula, kobanda ntango Yesu asakolaki bilembo wana (na mobu 33 T.B.) kino kobebisama ya Yelusaleme (na mibu 66-70 T.B.), basakoli ya lokuta mpe ba Klisto ya lokuta basengelaki kobima. Bayuda basengelaki konyokola baklisto, baoyo bazalaki kosakola nsango ya Yesu.

9. Ndenge nini esakweli ya Yesu ekokanaki na ekeke ya liboso?

9 Makambo yango matali elembo wana makokanaki solo, bobele lokola Flavius Josèphe, mokomi na makambo na kala andimi yango. Akomaki ete nkutu liboso ete Baloma baya kobundisa, ba Masiya ya lokuta babimisaki botomboki. Koningana ya mabelé ya nsomo esalemaki mbala mingi kati na Yudea mpe na bisika mosusu. Bitumba bibimaki kati na mikili oyo mizalaki na nsé ya bokonzi ya Loma. Ezalaki nde na banzala makasi? Ɛɛ, ezalaki mpenza. (Kokanisá na Misala 11:27-30.) Bongo mosala ya kosakola Bokonzi? Pene na mobu 60 to 61 T.B., na ntango mokanda ya Bakolose mokomamaki, “elikya na nsango malamu” ya Bokonzi ya Nzambe esilaki koyokama mingi na Afrika, na Azia, mpe na Mpótó.b​—Bakolose 1:23.

“BONGO” nsuka ekoya

10. Mpo na nini tosengeli kotalela malamumalamu liloba ya Greke toʹte, mpe ndimbola na yango ezali nini?

10 Kati na biteni mosusu ya esakweli na ye, Yesu amonisaki kobima ya makambo na kolandana moko nsima na mosusu na lolenge ya sikisiki. Alobaki ete: “Nsango Malamu oyo na bokonji ekosakolama . . . , mpe bongo nsuka ekoya.” Liloba “bongo” ekoki kozala moko na maloba oyo engengisaka liloba oyo etyami penepene na liloba mosusu mpo na komonisa likambo oyo ekobima na nsima na yango. Nzokande, kati na Matai 24:14, “bongo” ebongolami uta na liloba ya Greke, toʹte.c Bato na mayele oyo bayekolá mingi lokóta ya Greke balimboli ete toʹte ezali “moko na maloba oyo engengisaka liloba oyo etyami penepene na liloba mosusu mpo na komonisa ntango” mpe esalelami “mpo na koyebisa likambo oyo ezali koya nsima, na kotalela ntango” to “mpo na koyebisa likambo oyo ekosalema na nsima.” Yesu asakolaki ete mosala ya kosakola Bokonzi ekosalema mpe bongo (elingi koloba na ‘nsima na yango’ to ‘na kolandana’) “nsuka” ekoya. Nsuka oyo wapi?

11. Ndenge nini Yesu alobelaki makasi makambo oyo matalelaki kobebisama ya Yelusaleme?

11 Kokokisama ya liboso ya esakweli ya Yesu emonanaki kati na makambo oyo masalemaki liboso ya nsuka ya ebongiseli ya Bayuda. Bitumba, koningana ya mabelé, nzala, mpe makambo mosusu, oyo Yesu asakolaki ekokanaki na boumeli ya eleko ya mibu 30. Nzokande, kobanda na Matai 24:15, Malako 13:14, mpe Luka 21:20, tozali kotanga makambo oyo mazalaki na boyokani ya sikisiki na kobebisama oyo ebelemaki, wana nsuka ekómaki mpenza penepene.​—Talá milongɔ́ ya matɔnɔmatɔnɔ, etyami kati na etánda.

12. Mokumba nini mampingá ya Loma makokisaki kati na kokokisama ya Matai 24:15?

12 Mpo na kosilisa botomboki oyo Bayuda babimisaki na mobu 66 T.B., mampingá ya Baloma oyo etambwisamaki na Cestius Gallus batambolaki mpo na kobundisa Yelusaleme mpe bazingaki engumba wana oyo Bayuda bazalaki kotalela yango ete ezalaki bulɛɛ. (Matai 5:35) Atako Bayuda mpe bakamataki bibongiseli mpo na kotemela bango, Baloma bakamataki engumba. Ezalaki motindo wana nde babandaki “kotɛlɛma na esika na bulɛɛ,” yango ekokisaki solo esakweli ya Yesu oyo ezwami kati na Matai 24:15 mpe Malako 13:14. Bongo, likambo moko ya kokamwa emonanaki. Atako bazingaki engumba, Baloma balongwaki na pwasa. Na mbala moko, baklisto basosolaki kokokisama ya esakweli ya Yesu, mpe kolongwa oyo Baloma balongwaki epesaki bango nzela ya kokima longwa na Yudea mpe kokende na bangomba na ngambo mosusu ya Yordani. Lisoló ya makambo ya kala emonisi ete ezalaki mpenza bongo.

13. Mpo na nini baklisto balandaki likebisi oyo Yesu apesaki bango ete bakima?

13 Kasi, soki nde Baloma balongwaki zingazinga ya Yelusaleme, mpo na nini moto nyonso asengelaki kokima? Maloba ya Yesu mamonisi ete makambo oyo mabimaki mandimisaki ete ‘kobebisama ya Yelusaleme esilaki kobelema.’ (Luka 21:20) Ɛɛ, kobebisama. Yesu asakolaki na ntina na ‘bolózi monene, lokola emonanaki te longwa na ebandeli mpe ekomonana lisusu te.’ Pene na bambula misato na ndambo na nsima, na mobu 70 T.B., Yelusaleme emonaki solo “bolózi monene” oyo eyeisamaki na mampingá ya Baloma oyo etambwisamaki na Titus, mokonzi monene ya basodá. (Matai 24:21; Malako 13:19) Kasi, mpo na nini Yesu alobaki na ntina na likambo oyo ete ezalaki bolózi moko monene koleka oyo nyonso ebimaki liboso to oyo elingaki kobima na nsima?

14. Mpo na nini tokoki koloba ete makambo oyo mabimaki na Yelusaleme na mobu 70 T.B. ezalaki “bolózi monene” oyo ebimaki naino liboso te mpe nsima na yango mosusu ebimaki te?

14 Yelusaleme ebebisamaki na bato ya Babilone na mobu 607 L.T.B., mpe bitumba ya nsomo bisalemi kati na engumba yango na ekeke na biso. Kasi oyo esalemaki na mobu 70 T.B. ezalaki mpenza bolózi monene oyo ekokani na mosusu te. Na boumeli ya etumba oyo eumelaki pene na sanza mitano, basodá ya Titus balóngaki Bayuda. Babomaki bato pene na 1 100 000 mpe bakamataki pene na bato 100 000 lokola baombɔ. Lisusu, Baloma babebisaki Yelusaleme. Yango ezalaki elembeteli ete ebongiseli ya losambo ya Bayuda oyo na kala endimamaki na Nzambe mpe oyo ezalaki kosalema mingimingi na tempelo ezwaki nsuka mpo na libela. (Baebele 1:2) Ee, makambo oyo masalemaki na mobu 70 T.B. ekokaki mpenza kotalelama na bosembo nyonso ete ezalaki ‘[bolózi, NW] oyo ebimaki naino liboso te [kati na engumba, kati na libota, mpe kati na ebongiseli wana] uta ebandeli ya mokili mpe yango ekobima lisusu soko moke te.’​—Matai 24:21.d

Lokola esakolamaki, makambo mosusu mabimaki na nsima

15. (a) Engebene esakweli na ye, Yesu ayebisaki ete makambo motindo nini malingaki kobima na nsima ya bolózi oyo ekweaki likoló na Yelusaleme? (b) Na kotalela Matai 24:23-28, tokoki kozwa esukiseli nini na ntina na kokokisama ya esakweli ya Yesu?

15 Nzokande, Yesu asukisaki te esakweli na ye na kolobela bolózi monene oyo ebimaki na ekeke ya liboso. Biblia ezali komonisa ete makambo mingi masengelaki kolandana na nsima ya bolózi monene wana lokola kosalelama ya liloba toʹte, to “bongo,” emonisi yango kati na Matai 24:23 mpe na Malako 13:21. Nini elingaki kosalema na eleko oyo elandaki mobu 70 T.B.? Nsima na bolózi oyo ebimaki likoló na ebongiseli ya Bayuda, ba Klisto ya lokuta mpe basakoli mingi ya lokuta basengelaki kobima. (Kokanisá Malako 13:6 na Mko 13:21-23.) Lisoló ya makambo ya kala emonisi ete bato motindo wana babimaki na boumeli ya bikeke uta kobomama ya Yelusaleme na mobu 70 T.B.; atako bongo bazimbisaki te bato oyo bayebaki kososola malamu makambo ya elimo, baoyo bazalaki kozela “kozala” ya Klisto. (Matai 24:27, 28) Nzokande, makambo oyo mabimaki nsima na bolózi monene ya mobu 70 T.B. ezali moko na bilembeteli oyo emonisi ete Yesu azalaki kotala mosika koleka bolózi yango, oyo ezalaki bobele kokokisama ya liboso.

16. Likambo nini ya sikisiki ebakisami likoló na esakweli ya Yesu oyo ezwami na Luka 21:24, mpe likambo yango oyo ebakisami ezali na motuya nini?

16 Soki tokokanisi Matai 24:15-28 mpe Malako 13:14-23 elongo na Luka 21:20-24, tokomona elembeteli mosusu ya mibale oyo emonisi ete esakweli ya Yesu esengelaki te kosuka bobele na kobebisama ya Yelusaleme. Omikundola ete bobele Luka nde alobelaki maladi mabe. Bobele bongo, ezali bobele ye nde asukisaki na maloba oyo ya Yesu: “Yelusaleme ekonyatama na mabota kino ekokoka bilaka na mabota [eleko ya bapagáno, “Liloba lya Nzambe”].”e (Luka 21:24) Bato ya Babilone balongolaki mokonzi ya nsuka ya Bayuda na mobu 607 L.T.B., mpe na nsima na yango, Yelusaleme, oyo ezalaki komonisa Bokonzi ya Nzambe, enyatamaki. (2 Mikonzi 25:1-26; 1 Ntango 29:23; Ezekiele 21:25-27) Kati na Luka 21:24, Yesu amonisaki ete ezalela wana esengelaki koumela kino na mikolo mizalaki koya, na ntango oyo Nzambe akozongisa Bokonzi na ye.

17. Likambo nini ya misato emonisi ete esakweli ya Yesu esengelaki kokóma kino na mikolo mizalaki koya mosika mpenza?

17 Tala sikawa elembeteli ya misato oyo emonisi ete Yesu azalaki mpe kolobela mpo na makambo oyo masengelaki kobima na ntango oyo ezalaki mpenza mosika. Engebene Makomami, Masiya asengelaki kokufa mpe kosekwisama, na nsima na yango nde asengelaki kofanda na loboko ya mobali ya Nzambe kino na ntango Tata alingaki kotinda ye ete akende kozala na bokonzi likoló na banguna na ye. (Nzembo 110:1, 2) Yesu alobaki ete asengelaki kokende kofanda na loboko ya mobali ya Tata na ye. (Malako 14:62) Ntoma Paulo andimisaki ete Yesu oyo asekwisamaki azalaki na lobɔkɔ ya mobali ya Yehova, kozeláká ntango oyo asengelaki kokóma Mokonzi mpe Mokokisi ya bikateli ya Nzambe.​—Baloma 8:34; Bakolose 3:1; Baebele 10:12, 13.

18, 19. Bokokani nini bozali kati na makambo mazwami na Emoniseli 6:2-8 na oyo ezwami kati na Baevanzile?

18 Elembeteli ya minei oyo emonisi ete esakweli ya Yesu na ntina na nsuka ya ebongiseli ya biloko etalelaki bobele ekeke ya liboso te elakisami lisusu kati na Emoniseli mokapo 6. Kokomáká yango bambula mingi na nsima ya mobu 70 T.B., ntoma Yoane alobaki na ntina na bafandi na mpunda oyo bazali kobenda likebi. (Emoniseli 6:2-8) Emonaneli wana ya esakweli na ntina na “mokolo na Nkolo”​—mokolo ya kozala na ye⁠—​emonisi ete ekeke na biso ya 20 ezali ntango ya bitumba minene (mɔlɔngɔ́ ya 4), banzala makasi (mɔlɔngɔ́ ya 5 mpe ya 6), mpe “bamaladi makasi oyo ekobomaka” (mɔlɔngɔ́ ya 8, NW). Ezali polele ete, emonaneli oyo ezali na boyokani na oyo Yesu alobaki kati na Baevanzile mpe epesi elembeteli ete esakweli wana ezali kokokana na bonene na yango na boumeli ya ‘mokolo oyo ya Nkolo.’​—Emoniseli 1:10.

19 Bato na mayele bazali kondima ete elembo oyo esangisi makambo mingi, oyo ezwami kati na Matai 24:7-14 mpe Emoniseli 6:2-8 ezali komonana polele uta kobima ya etumba ya liboso ya mokili mobimba na 1914. Batatoli ya Yehova basakolaki kati na mokili mobimba ete esakweli ya Yesu ezali sikawa kozwa kokokisama na yango ya mibale mpe eleki monene lokola emonisami na nzela ya bitumba oyo bizali koboma bato mingi, koningana ya mabelé oyo ezali kopanza bamboka, banzala makasi mpe bamaladi makasi. Mpo na likambo oyo ya nsuka, zulunalo U.S.News & World Report (ebimeli ya Yulí 27, 1992) elobaki ete: “Bokono ya SIDA . . . ezali koboma bamilió ya bato mpe mosika te, ekoki kokóma maladi oyo eleki kosenga mosolo mingi mpe eleki koboma kati na lisoló ya bato. Maladi moko mabe ebengamaki peste noire ebomaki pene na bato 25 milió na ekeke ya 14. Kasi, pene na mobu 2000, ezali nde  30 milió kino 110 milió ya bato bakozwa mikrobe oyo ebengami HIV, yango nde epesaka SIDA, lelo oyo bato 12 milió nde bazali na yango. Lokola nkisi ezali te mpo na kosilisa yango, bato nyonso oyo bazali na yango bakokufa.”

20. Ndenge nini Matai 24:4-22 esengelaki kokokisama liboso, kokokisama nini mosusu emonisami polele?

20 Na bongo, tokoki kosukisa nini na ntina na eyano oyo Yesu azongisaki na motuna ya bantoma? Esakweli na ye eyebisaki na bosikisiki makambo oyo masengelaki kobima liboso mpe na ntango ya kobomama ya Yelusaleme, mpe elobelaki makambo mosusu oyo masengelaki kolanda na nsima ya mobu 70 T.B. Kasi mingi na yango esengelaki kozwa kokokisama ya mibale mpe eleki monene na mikolo mizali koya, kino na bolózi monene oyo ekotya nsuka na ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo. Yango elimboli ete esakweli ya Yesu oyo ezwami na Matai 24:4-22, mpe na makambo makokani na yango oyo mazwami na Malako mpe Luka, ekokanaki kobanda na mobu 33 T.B. kino bolózi ya mobu 70 T.B. Nzokande, mikapo yango misengelaki kokokisama mpo na mbala ya mibale, oyo elingaki komema kino na bolózi yo eleki mpenza monene na mikolo mizali koya. Kokokisama oyo ya monene ezali kosalema na miso na biso na mikolo oyo; tozali komona yango mokolo na mokolo.f

Kino na likambo nini?

21, 22. Epai wapi tokoki kokuta elembeteli ya esakweli oyo emonisi ete makambo mosusu masengelaki kobima?

21 Yesu asukisaki te esakweli na ye na kolobáká ete basakoli ya lokuta basengelaki kosala bilembo ya bozimbisi na boumeli ya eleko molai oyo ezalaki liboso ya ‘kokokisama na bilaka na mabota.’ (Luka 21:24; Matai 24:23-26; Malako 13:21-23) Akóbaki na koyebisa makambo mosusu ya kokamwa oyo masengelaki kobima, makambo oyo masengelaki komonana kati na mokili mobimba. Makambo yango malingaki kokokanisama na koya ya Mwana na moto kati na nguya mpe nkembo. Malako 13:24-27 ezali komonisa kolandana ya esakweli na ye:

22 “Na mokɔlɔ yango na nsima na bolɔji yango, moi ekoyinda mpe sanja ekotana tɛ. Miɔtɔ ikokwea na likoló mpe nguya oyo na likoló ikoningana. Na ntango yango bakomɔna Mwana na moto koya kati na mapata, na nguya monɛnɛ mpe nkɛmbo. Na nsima akotinda banje mpe akoyanganisa baponami na ye, bakobima [longwa na mipepe, NW] minei, longwa na nsuka na mokili kino nsuka na likoló.”

23. Mpo na nini tokoki kotalela kokokisama ya Matai 24:29-31 mosika nsima ya ekeke ya liboso ya Ntango na Biso?

23 Mwana na moto, Yesu Klisto oyo asekwaki, ayaki te na lolenge wana ya kobenda likebi na nsima na kobebisama ya ebongiseli ya Bayuda na mobu 70 T.B. Ezali solo ete mabota nyonso ya mabelé bayebaki ye te, lokola Matai 24:30 emonisi yango, ata mpe baanzelu bayanganisaki te baklisto bapakolami nyonso kati na mabelé mobimba. Na yango, ntango nini eteni oyo mosusu ya esakweli monene ya Yesu esengelaki kokokana? Ezali kokokisama kati na makambo oyo mazali kobima zingazinga na biso lelo oyo, to ezali nde kopesa makoki ya kososola oyo euti na Nzambe mpo na koyeba makambo oyo tokoki komizela na yango mpo na mikolo oyo mizali koya mosika te? Tolingi solo koyeba, mpamba te Luka akomaki toli oyo ya Yesu, ete: “Wana ekobanda makambo oyo kobima, tɛlɛma alima mpe tombola mitó na bino, mpɔ ete [kobika, NW] na bino ejali kobɛlɛma.”​—Luka 21:28.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Okoki kokuta biteni mosusu ya mikapo oyo na etánda oyo ezwami na nkasa 14 mpe 15; milongɔ́ ya matɔnɔmatɔnɔ mizali komonisa biteni oyo bizali ndenge moko.

b Mpo na oyo elobamaki kala na ntina na kobima ya makambo wana, tala Mosenzeli ya Febwáli 1, 1971, lokasa 43 kino lokasa 45 (to ebimeli ya Lifalansé ya Máí 15, 1970, lokasa 299 mpe lokasa 300).

c Toʹte emonani koleka mbala 80 kati na Matai (mbala 9 kati na mokapo 24) mbala 15 kati na mokanda ya Luka. Malako asalelaki toʹte bobele mbala motoba, kasi mbala minei kati na yango etalelaki “elembo.”

d Na ntina na yango, Matthew Henry alobaki ete: “Kobebisama ya Yelusaleme epai na Bakaladi ezalaki nsomo, kasi oyo elekaki mpenza. Elingaki mpenza kozala kobomama ya Bayuda nyonso . . . kati na mokili mobimba.”

e Bato mingi bamonaka mbongwana ya elobeli kati na lisoló ya Luka, na nsima ya Luka 21:24. Dr. Leon Morris amonisi ete: “Yesu akobi na koloba na ntina na ntango ya bapagáno. . . . Bato mingi ya mayele balobi ete na eteni oyo likebi libendami mpo na oyo etali koya ya Mwana na moto.” Molakisi R. Ginns akomi ete: “Koya ya Mwana na moto​—(Mt 24:29-31; Mko 13:24-27). Kolobelama ya ‘ntango ya Bapagáno’ ezali liloba ya ebandeli na lisolo oyo; sikawa, makanisi [ya Luka] etyami bobele likoló na kobebisama ya Yelusaleme te, kasi koleka lisusu mpo na mikolo mizalaki koya.”

f Molakisi Walter L. Liefeld akomi ete: “Tokoki solo mpenza kondima ete bisakweli ya Yesu esangisaki biteni mibale: (1) makambo oyo mabimaki na mobu 70 nsima na kobotama ya Yesu, yango etalelaki Tempelo mpe (2) oyo esengelaki kokokisama na ntango oyo ezalaki koya mosika, elobelami mingi mpenza na lolenge ya esakweli.” J. R. Dummelow apesaki ndimbola oyo ete: “Mingi na bankaká oyo eleki makasi kati na lisoló oyo monene ezali kongengisama polele wana tozali kokanga ntina ete Nkolo na biso alobelaki bobele likambo moko te kasi nde makambo mibale, mpe oyo ya liboso ezalaki elilingi ya oyo ya mibale. . . . Mingi mpenza [Luka] 21:24, oyo ezali kolobela ‘eleko ya Bapagáno,’ . . . emonisi bolai ya eleko oyo ezali katikati na kokwea ya Yelusaleme kino nsuka ya mokili, bolai oyo bosikisiki na yango eyebani te.”

Ozali komikundola?

◻ Eyano oyo Yesu azongisaki na motuna oyo ezwami na Matai 24:3 ekokisamaki na motindo nini kino na mobu 70 T.B.?

◻ Ndenge nini kosalelama ya liloba toʹte ezali kosalisa biso na kokanga ntina ya esakweli ya Yesu?

◻ Na ndimbola nini “bolózi monene” ya ekeke ya liboso ezalaki oyo esalemaki naino liboso te?

◻ Wapi makambo mibale ya esakweli ya Yesu oyo Luka alobeli yango mpe oyo etaleli biso na mikolo ya lelo?

◻ Bilembeteli nini bizali komonisa kokokisama ya mibale mpe oyo eleki monene ya Matai 24:4-22?

[Etanda na lokasa 14, 15]

MATAI 24

4 Yesu ajongiseli bango liloba ete: ‘Bokeba ete moto apengwisa bino tɛ. 5 Jambi mingi bakoya na nkombo na ngai mpe bakoloba ete: “Ngai Klisto,” mpe bakopengwisa mingi. 6 Bokoyoka lokito na bitumba mpe nsango na bitumba. Bokeba, bobanga tɛ; jambi ekoki ete yango ikoma nde nsuka ejali naino tɛ.

7 “‘Jambi libota mɔkɔ ekotɛlɛmɛla libota mosusu mpe bokonji mɔkɔ ekotɛlɛmɛla bokonji mosusu; njala mpe koningana na mokili ikojala na esika na esika. 8 Makambo oyo yɔnsɔ ijali bobɛlɛ ebandeli ya bolɔji.

9 “‘Bongo, bakobimisa bino mpɔ na [bolozi, NW] mpe bakoboma bino; mabota yɔnsɔ bakoyina bino mpɔ na nkombo na ngai. 10 Bongo mingi bakoyoka nsɔni mpe bakokakatana mpe bakoyinana kati na bango mpenja. 11 Basakoli mingi na lokuta bakotɛlɛma mpe bakopɛngwisa mingi. 13 Nde oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika. 14 Mpe nsango malamu oyo na Bokonji ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota yɔnsɔ, mpe bongo nsuka ekoya.

------------------------------------------------------------------

15 “‘Bongo, ekomɔna bino mbindo-na-libebisi ejali kotɛlɛma na esika na bulɛɛ, lokola na likambo lilobaki mosakoli Danyele (tika ete motangi ayeba ntina), 16 bongo baoyo bajali na Yuda bakima kuna na ngomba mpe 17 ye oyo ajali likoló na ndako akita tɛ mpo na kokwa elɔkɔ ejali kati na ndako na ye. 18 Ye oyo ajali kati na elanga ajonga nsima tɛ mpo na kojua elamba monɛnɛ na ye. 19 Mawa epai na basi bajali na jemi mpe bango bakonungisa bana na mikɔlɔ yango. 20 Bɔndɛla ete kokima na bino ejala na ntango na mpiɔ tɛ sɔkɔ na mɔkɔlɔ na sabata tɛ. 21 [Mpo ete bongo, ekobima bolózi monene, NW] lokola emonana naino longwa na ebandeli tɛ. Ekobima mpe boye lisusu te. 22 Sɔkɔ mikɔlɔ yango iyei mikuse tɛ mbɛ moto mɔkɔ akobika tɛ. Nde mpɔ na bapɔnami, mikɔlɔ yango ikoya mikuse.

------------------------------------------------------------------

23 “‘[Bongo, NW] sɔkɔ nani akoloba na bino ete: “Talá Klisto wana,” sɔkɔ ete: “Talá ye oyo,” bondima te. 24 FJambi Baklisto na lokuta mpe basakoli na lokuta bakotɛlɛma mpe bakomɔnisa bilembo mpe bikamwiseli minɛnɛ mpo na kopɛngwisa bapɔnami, sɔkɔ nde bakokoka. 25 Talá nasili koyebisa bino liboso. 26 Bongo sɔkɔ bakoloba na bino ete: “Talá ajali na lisobe,” bobima tɛ. Sɔkɔ ete: “Talá ajali na biteni katikati na ndako,” bondima tɛ. 27 Mpɔ ete lokola mokalikali ekobimaka epai na [ebimelo na moi, NW] ekongɛngaka epai na [elalelo na moi, NW] bongo mpe koya na Mwana na moto ekojala. 28 Esika nini ejali ebembe wana bingɔndɔ ikoyangana.

------------------------------------------------------------------

------------------------------------------------------------------

29 “‘Nɔkinɔki nsima na [bolozi, NW] ya mikolo yango, moi ekoinda mpe sanja ekopesa pole na yango tɛ mpe miɔtɔ ikokweakwea longwa na likoló, mpe nguya na lola ikotetema. 30 Bongo elembo na Mwana na moto ekomɔnana na likoló mpe [bongo, NW] mabota yɔnsɔ na mokili bakolela mpe bakomɔna Mwana na moto ajali koya na mapata na likoló na nguya mpe na nkɛmbo mingi elɔngɔ. 31 Akotinda mpe banje na ye na mongongo na mondule monɛnɛ mpe akoyanganisa bapɔnami na ye longwa na mipɛpɛ minei, longwa na molelo mɔkɔ na likoló kino molelo mosusu.’”

MARKO 13

5 “Yesu abandi koloba na bango ete: ‘Bokeba ete moto ajimbisa bino tɛ. 6 Bato mingi bakoya na nkombo na ngai koloba ete: “Ngai najali ye wana,” mpe bakokosa bato mingi. 7 Sɔkɔ bokoyoka likambo na bitumba mpe nsango na bitumba, bobanga tɛ mpo ete ekoki na yango kokóma kasi nsuka ekojala naino tɛ.

8 “‘Jambi libota ekotɛmɛla libota mosusu mpe bokonji ekotɛmɛla bokonji mosusu; koningana na mokili ekojala na bisika mosusu, njala monene ekojala; kasi yɔnsɔ na oyo ejali bobɛlɛ ebandeli na bolɔji.

9 “‘Bokeba na bino mpenja, mpɔ ete bakopesa bino na mabɔkɔ na basambisi na bango, bokobɛtama kati na biyanganelo mpe bokotɛma liboso na mikoló na mokili mpe mikonji na ntina na ngai mpɔ na kotatola liboso na bango. 10 Ekoki ete nsango malamu esakolama kati na mabota yɔnsɔ liboso. 11 Wana ekokamba bango bino mpɔ na kosambisama, bomitungisa liboso tɛ sɔkɔ bokoloba nini, kasi boloba maloba makopesama na bino na ntango yango, jambi bino bokoloba tɛ, kasi [elimo santu, NW]. 12 Ndeko akokaba ndeko na ye mpo na kufa, tata akokaba mwana, bana bakotɛmɛla baboti na bango mpe bakokaba bango mpo na kufa. 13 Bato yɔnsɔ bakoyina bino na ntina na nkombo na ngai. Kasi moto oyo akoyika mpiko kino nsuka akobika.

------------------------------------------------------------------

14 “‘Sɔkɔ bokomɔna mbindo-na-libebisi, kotɛlɛma kuna ekoki tɛ (tika motangi asɔsɔla), [bongo, NW] malamu ete baoyo na Yuda bakima epai na ngomba. 15 Tika moto oyo na likoló na ndako akita tɛ mpo na kokɔta na ndako kokwa elɔkɔ; 16 tika moto kati na elanga ajonga tɛ mpo na kokwa elamba na ye. 17 Mawa mpo na basi bakojala na libumu, mpe na bango bakojala konungisa na mikɔlɔ yango! 18 Bɔbondela ete makambo oyo mabima na ntango na mpiɔ tɛ 19 Na mikɔlɔ yango bolɔ́ji ekojala na lolenge lobimi naino tɛ longwa na ebandeli na kojalisa ejalisaki Njambe kino lɛlɔ; ekoleka mpe ekoya lokola. 20 Sɔkɔ Njambe akitisi motuya na mikɔlɔ tɛ, moto mɔkɔ akokoka kobika tɛ, nde mpo na bapɔnami akitisi mikɔlɔ yango.

------------------------------------------------------------------

21 “‘[Bongo, NW] sɔkɔ moto akoloba na bino ete: “Talá Klisto oyo!” sɔkɔ ete: “Talá ye wana!” bondima tɛ. 22 Baklisto na lokuta mpe basakoli na lokuta bakoya mpe bakotalisa bilembo na kokamwa mpɔ na kojimbisa ata bapɔnami sɔkɔ bakoki. 23 Nde bokeba, nasili koyebisa bino makambo yɔnsɔ liboso.

------------------------------------------------------------------

------------------------------------------------------------------

24 “‘[Kasi na mikolo, NW] yango nsima na bolɔ́ji yango, moi ekoinda mpe sanja ekotana tɛ. 25 Miɔtɔ ikokwea na likoló mpe nguya oyo na likoló ikoningana. 26 And then they will see the Son of man coming in clouds with great power and glory. 27 [Mpe bongo, NW] akotinda banje mpe akoyanganisa bapɔnami na ye, bakobima na bipai yɔnsɔ minei, longwa na nsuka na mokili kino nsuka na likoló.’”

LUKA 21

8 “Ye nde alobaki ete: ‘Keba ete bopɛngɔlama tɛ, mpɔ ete bato mingi bakoya na nkombo na ngai, mpe bakoloba ete: “Ngai najali ye,” mpe ete: “Elaka esili kokoka.” Kɛnda kobila bango. 9 Nde sɔkɔ bokoyoka mpo na bitumba, na kotɔmbɔka, banga tɛ, mpo ete ebongi na makambo oyo kokóma liboso, kasi nsuka ekojala noki tɛ.’

10 “[Bongo, NW] alobaki na bango ete: ‘Libota moko ekotɛmɛla libota mosusu, bokonji moko ekotɛmɛla bokonji mosusu. 11 Mokili ekoningana mingi, mpe esika na esika maladi mabe na njala ikojala, na makambo na nsomo, na bilembo minene na likoló.

12 “‘Liboso na makambo oyo yɔnsɔ bakotyela bino mabɔkɔ na bango, mpe bakonyokola bino, mpe bakokaba bino na biyanganelo, mpe bakobwaka bino na boloko, mpe bakokamba bino liboso na mikonji na mikoló na mokili mpo na nkombo na ngai. 13 Oyo ekopesa bino eposa na kotatola. 14 Na bongo tia mitema na bino na mayɛlɛ na kosamba liboso te, 15 mpo ete ngai nakopesa bino monɔkɔ mpe mayɛlɛ boye bayini yɔnsɔ na bino bakotɛmɛla yango tɛ mpe bakojongisa yango tɛ. 16 Bokokabama na baboti, na bandeko, biboto, na baninga, mpe bakokufisa bamosusu na bino. 17 Bato yonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai, 18 nde mosuki moko na mito na bino ekobeba te. 19 Mpo na mpiko na bino bokobatela milimo na bino.

------------------------------------------------------------------

20 “‘Soko bokomɔna Yelusaleme kojingama na bibele na basoda, [bongo, NW] boyeba ete libebisi na yango esili kobɛlɛma. 21 [Bongo tika ete, NW] bango na kati na Yuda bakima kuna na ngomba, mpe bango na kati na mboka balongwa wana, mpe bango na bilanga bakɔta na mboka tɛ; 22 mpɔ ete oyo ejali ntango ya kobukanisa mpo na kokokisa makomi yɔnsɔ. 23 Mawa na basi bakojala na libumu mpe na bango bakonungisa bana na mikɔlɔ yango! Mpo ete mpasi monene ekojala na mokili oyo, na nkanda epai na libota oyo. 24 Bakokwea liboso na mpia na mopanga, mpe bakokambama baombo kati na mabota yɔnsɔ,;

------------------------------------------------------------------

mpe Yelusaleme ekonyatama na mabota kino ekokoka [ntango elakami mpo, NW] na mabota.

------------------------------------------------------------------

------------------------------------------------------------------

25 “‘Bilembo bikojala kati na moi na sanja na miɔtɔ, mpe awa na nse mitema na mabota mikojala na likoló mpɔ na mikakatano na konguluma na kotomboka na mai monene. 26 Bato bakosenjwa na nsɔmɔ na kotalela makambo makoleka kati na mikili, mpo ete nguya yango oyo na likolo ikoningana. 27 [Mpe bongo, NW] bakomona Mwana na moto koya na lipata, na nguya na nkɛmbo mingi. 28 Wana ekobanda makambo oyo kobima, tɛlɛma alima mpe tombola mito na bino, mpɔ ete lisiko na bino ejali kobɛlɛma.’”

[Elilingi na lokasa 10]

Bolózi oyo ebimaki na mobu 70 T.B. ezalaki mpenza oyo elekaki monene mpe esalemaki naino liboso te kati na Yelusaleme mpe na ebongiseli ya biloko ya Bayuda

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto