Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/2 nk. 16-21
  • “Yebisá biso: makambo oyo makozala ntango nini?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Yebisá biso: makambo oyo makozala ntango nini?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolózi mpe bilembo na likoló
  • Bolózi nini esengeli kobima liboso na bilembo na likoló?
  • Nini ekosalema?
  • “Nini ekozala elembo ya kozala na yo?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • “Yebisá biso: makambo yango ekosalema ntango nini?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Okobika na ntango Nzambe akokokisa bikateli na ye?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Makambo yango esengeli koya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/2 nk. 16-21

“Yebisá biso: makambo oyo makozala ntango nini?”

“Najali kosakola makambo na sika; naino ebimi yango tɛ, najali koyebisa bino mpɔ na yango.”​—YISAYA 42:9.

1, 2. (a) Motuna nini bantoma ya Yesu batunaki na ntina na mikolo mizalaki koya? (b) Lolenge nini eyano ya Yesu na ntina na elembo oyo esangisi makambo mingi ekokisamaki?

MATEYA mauti na Nzambe mazali ya Yehova Nzambe, “Oyo akosakola makambo na nsuka longwa na ebandeli.” (Yisaya 46:10) Lokola lisoló ya liboso limonisaki yango, bantoma balukaki mateya yango epai na Yesu, na kotunáká ye ete: “Yebisá biso, makambo oyo makojala ntango nini mpe elembo nini wana oyo yɔnsɔ malingi kokoka?”​—Malako 13:4.

2 Yesu ayanolaki bango na kolobeláká “elembo” moko oyo esangisi makambo mingi mpe ezalaki elembeteli oyo esengelaki komonisa ete ebongiseli ya Bayuda ebelemi na nsuka na yango. Yango ekokisamaki na ntango Yelusaleme ebebisamaki na mobu 70 T.B. Kasi esakweli ya Yesu esengelaki kozwa kokokisama na yango eleki monene na nsima mpenza. Nsima wana “ntango elakami mpo na mabota” esukaki na 1914 T.B., elembo moko oyo esengelaki kokokisama na bonene na yango esengelaki mpe komonana polele na kolakisáká ete ebongiseli mabe ya ntango oyo ekozwa nsuka na yango mosika te na boumeli ya “bolozi monene.”a (Luka 21:24, NW) Bibele na bato oyo bazali na bomoi lelo oyo bakoki koloba solo ete elembo wana ekokisamaki na bitumba ya mokili mobimba mpe na makambo mosusu ya nsomo oyo masalemaki na ekeke ya 20. Makambo wana mazali lisusu kokokisama ya ntina ya esakweli ya Yesu, kokokisama wana na mikolo na biso emonisamaki na elilingi na makambo masalemaki kobanda na mobu 33 kino mobu 70 T.B.

3. Wana alobelaki elembo ya mibale, makambo nini mosusu Yesu asakolaki?

3 Nsima wana Luka alobeli ntango elakami mpo na mabota, masoló ya lolenge moko oyo mazwami kati na Matai, Malako, mpe Luka, malobeli lisusu kolandana ya makambo mosusu oyo kati na yango ezali na elembo oyo ebakisami mpe oyo eyei kosangisama na ‘elembo [oyo esangisi makambo mingi] na ntina na nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo.’ (Matai 24:3) (Na lokasa 15, eteni oyo ya lisoló etyami elembo ya minkɔ́lɔ́tɔ́ mibale milalisami sémba.) Matai alobi ete: “Nɔkinɔki nsima na [bolózi, “NW”] na mikɔlɔ yango, moi ekoyinda mpe sanja ekopɛsa pole na yango tɛ mpe miɔtɔ ikokweakwea longwa na likoló, mpe nguya na lola ikotetema. Bongo elembo na Mwana na moto ekomɔnana na likoló mpe [bongo, “NW”] mabota yɔnsɔ na mokili bakolela mpe bakomɔna Mwana na moto ajali koya na mapata na likoló na nguya mpe na nkɛmbo mingi elɔngɔ. Akotinda mpe banje na ye na mongongo na mondule monɛnɛ mpe akoyanganisa Bapɔnami na ye longwa na mipɛpɛ minei, longwa na molelo mɔkɔ na likoló kino molelo mosusu.”​—Matai 24:29-31.

Bolózi mpe bilembo na likoló

4. Mituna nini mizali kotunama na ntina na makambo ya likoló oyo Yesu alobelaki?

4 Ntango nini makambo wana makokokisama? Baevanzile nyonso misato elobeli oyo tokoki kobenga ete bilembo na likoló: koyinda ya moi mpe ya sanza, kokwea ya myoto. Yesu alobaki ete makambo wana makobima nsima ya “bolózi.” Yesu azalaki nde kokanisa na ntina na bolózi oyo eteni na yango oyo eleki ntina ekokisamaki na mobu 70 T.B., to azalaki nde kolobela bolózi monene oyo ekoya na mikolo na biso?​—Matai 24:29; Malako 13:24.

5. Likanisi nini endimamaki liboso mpo na oyo etali bolózi na mikolo na biso?

5 Kobanda na nsuka ya ntango elakami mpo na mabota na 1914, basaleli ya Nzambe bazali kotya likebi mingi na “bolózi monene.” (Emoniseli 7:14, NW) Na boumeli ya bambula mingi bazalaki kokanisa ete ebandeli ya bolózi monene ya mikolo na biso ekokanaki na boumeli ya Etumba ya liboso ya mokili mobimba, na nsima ekatanaki na boumeli ya eleko moko molai liboso ete eya kokokisama lisusu na eteni na yango ya nsuka, na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Mozwi-na-Nguya Nyonso.” Soki ezalaki bongo, mbele likambo nini esengelaki kobima na boumeli ya ebele ya bambula oyo esili koleka na katikati wana, na “nsuka ya ebongiseli ya biloko?”​—Emoniseli 6:14; Matai 13:39; 24:3; 28:20.

6. Likanisi nini epesamaki na ntina na kokokisama ya esakweli oyo etali makambo ya likoló?

6 Ya solo, ekanisamaki ete na boumeli ya ntango wana elembo oyo esangisi makambo mingi esengelaki komonana, kati na yango mosala ya kosakola mosalemi na bato oyo basengelaki koyanganisama na Nzambe. Emonanaki mpe lokola ete bilembo na likoló oyo bisakolamaki bisengelaki komonana na boumeli ya ntango oyo bolózi yango ekatanaki, elingi koloba na nsima ya kobanda na yango na 1914 kino 1918. (Matai 24:29; Malako 13:24, 25; Luka 21:25) Likebi lityamaki mingi likoló na biloko oyo bato batindaka kuna na makoló​—basatelíti, bafizé, bingengiseli oyo babengi ba rayons cosmiques to gamma mpe kokende na sanza to kotya biloko likoló na yango.

7. Bososoli nini oyo esembolami esili kopesama na ntina na bolózi monene?

7 Nzokande, Mosenzeli ya Apríli 1, 1971 (to ebimeli ya Lifalansé ya Máí 15, 1970), etalelaki lisusu esakweli ya Yesu, mingimingi mpo na oyo etali bolózi monene oyo ezalaki koya. Emonisaki ete na kotalela makambo oyo mabimaki na ekeke ya liboso, bolózi monene ya mikolo na biso ekokaki te kobanda liboso na 1914 kino 1918, mpe kokatana mpo na kolekisa bambula ebele na katikati mpe na nsima kozongelama lisusu. Zulunalo yango esukisaki ete: “‘Bolózi monene’ oyo mosusu lokola yango ekobima te na nsima ezali naino koya liboso, mpamba te ekomema kobomama ya lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta (oyo boklisto na mokili oyo ezali kati na yango), kobomama yango ekolandana na ‘etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso’ oyo ekosalama na Armagedon.”

8. Lolenge nini likanisi oyo esembolami na ntina na bolózi ya mikolo na biso, epesi biso nzela na kolimbola Matai 24:29?

8 Kasi, Matai 24:29 elobi ete bilembo wana na likoló bizali kobima “nokinoki nsima na [bolózi monene, NW].” Yango elingi koloba nini? Mosenzeli ya Dɛsɛ́mbɛ 1, 1976 (to ebimeli ya Lifalansé ya Augústo 1, 1975) emonisaki ete “bolózi” oyo elobelami na mokapo oyo, eteni na yango eleki ntina ekokisamaki na mobu 70 T.B. Kasi na ndimbola nini tokoki koloba ete bilembo wana na likoló na eleko na biso bimonanaki “nokinoki” nsima na likambo oyo esalemaki na mobu 70 T.B.? Likanisi lipesamaki ete na miso na Nzambe, bikeke oyo bisilaki koleka na kati wana bizalaki mpenza mokuse. (Baloma 16:20; 2 Petelo 3:8) Nzokande, botaleli ya mozindo ya esakweli wana, mpe mingimingi ya Matai 24:29-31, epesi ndimbola oyo ekeseni. Yango emonisi ndenge nini pole ekómi ‘kongenga lisusu mpe lisusu kino mokɔlɔ na malamu koleka.’ (Masese 4:18)b Tiká totalela sikawa soki mpo na nini ndimbola oyo ya sika to oyo ebongisami ezali na ntina.

9. Lolenge nini Makomami na Liebele ezali kopesa makanisi mpo na kososola maloba ya Yesu na ntina na kobima ya makambo kati na makoló?

9 Yesu apesaki epai na minei kati na bantoma na ye esakweli oyo emonisaki ete ‘moi ekoyinda, sanza ekopesa pole te mpe myoto mikokwea.’ Lokola bazalaki Bayuda, bamikundolaki maloba motindo moko na kotalela Makomami na bango; na ndakisa, kati na Sefania 1:15, mokolo na kosambisa ya Nzambe ebengamaki “mokɔlɔ na mobulu mpe libebi, mokolo na molili mpe na kojanga pole; mokɔlɔ na mapata mpe molili tuu.” Basakoli mingi ya Baebele balobelaki moi oyo ezalaki koyinda, sanza oyo ezalaki kongenga te mpe myoto oyo mizalaki kopesa pole te. Tozali kokuta maloba motindo moko kati na bansango ya Nzambe oyo esakolamaki mpo na Babilone, Edome, Ezipito mpe bokonzi ya Yisraele oyo ezalaki na nɔ́rdi.​—Yisaya 13:9, 10; 34:4, 5; Yilimia 4:28; Ezekiele 32:2, 6-8; Amosa 5:20; 8:2, 9.

10, 11. (a) Yoele asakolaki nini mpo na oyo etali bilembo na likoló? (b) Biteni nini ya esakweli ya Yoele bikokanaki na mobu 33 T.B., mpe biteni nini bikokanaki te?

10 Wana bayokaki maloba na Yesu, na ntembe te, Petelo mpe bantoma mosusu misato bamikundolaki lisusu esakweli ya Yoele 2:28-31 mpe 3:15: “Nakosopa [elimo, NW] na ngai likoló na njoto yɔnsɔ; bana na bino babali mpe bana na bino basi bakosakola. . . . Nakopɛsa bikamwiseli na likoló mpe na mokili, makila mpe mɔ́tɔ mpe kobuta na molinga. Ntango [moi, NW] ekobongwana molili mpe sanja ekobongwana makila, liboso na koya na mokɔlɔ monɛnɛ na [Yehova, NW], mokɔlɔ monene mpe na nsomo.” “Moi mpe sanja ijimisami mpe miɔtɔ na lola ikojanga kongɛnga na bango.”

11 Lokola yango eyebisami kati na Misala 2:1-4 mpe 14-21, na Pantekote ya mobu 33 T.B., Nzambe asopaki elimo santu na ye likoló na bayekoli 120, ezala mibali mpe basi. Ntoma Petelo amonisaki ete kosopama wana ezali yango nde Yoele asakolaki. Kasi ezali boni mpo na eteni ya esakweli ya Yoele oyo elobaki ete ‘moi ekobongwana molili, sanza ekobongwana makila, mpe myoto ekozanga kongenga na yango’? Ezali na eloko moko te oyo emonisi ete yango ekokisamaki na mobu 33 T.B. to na boumeli ya eleko ya bambula koleka 30 ya nsuka ya ebongiseli ya biloko ya Bayuda.

12, 13. Lolenge nini bilembo na likoló oyo Yoele asakolaki ekokokana?

12 Emonani polele ete eteni oyo ya ya nsuka ya esakweli ya Yoele etalaki mpenza “koya ya mokolo monene mpe ya nsomo ya [Yehova]”​—kobebisama ya Yelusaleme. Mosenzeli ya Yuní 1, 1968 (to ebimeli ya Lifalansé ya Febwáli 15, 1967) elobaki na ntina na bolózi oyo ekwelaki Yelusaleme na mobu 70 T.B. ete: “Ezalaki mpenza ‘mokolo na Yehova’ mpo na Yelusaleme mpe bana na yango. Na boyokani na mokolo yango, ezalaki mpenza na ‘makila, mɔ́tɔ mpe kobuta na milinga,’ moi ezalaki te kopesa engengiseli likoló na molili oyo mozipaki engumba na boumeli ya mokolo, mpe sanza motane lokola makila masopani ekokanaki te na pole kitoko ya sanza oyo ezali kongenga na bonzenga na yango na butu.”c

13 Ya solo, lolenge moko na bilembo ya likoló oyo bimonisamaki na bisakweli mosusu oyo tolobelaki, oyo Yoele asakolaki esengelaki kokokisama na ntango oyo Yehova alingaki kokokisa bikateli na ye. Kozanga kongenga ya moi, sanza mpe myoto elandanaki te na boumeli ya eleko nyonso ya nsuka ya ebongiseli ya Bayuda, kasi esalemaki nde ntango mampinga ya makasi mayaki mpo na kobundisa Yelusaleme. Na bososoli malamu, tokoki komizela na kokokisama eleki monene ya eteni oyo ya esakweli ya Yoele na ntango oyo Yehova akobanda kokokisa bikateli na ye likoló na ebongiseli oyo.

Bolózi nini esengeli kobima liboso na bilembo na likoló?

14, 15. Bopusi nini esakweli ya Yoele ezali na yango likoló na bososoli na biso ya Matai 24:29?

14 Kokokisama ya esakweli ya Yoele (na boyokani na bisakweli mosusu oyo ezali kosalela maloba motindo moko) ezali kosalisa biso na kokanga ntina ya maloba mazwami kati na Matai 24:29. Ezali polele ete, wana Yesu alobaki ete ‘moi ekoyinda, sanza ekopesa pole na yango lisusu te mpe myoto mikokwea,’ azalaki te kolobela makambo oyo mazali kobima na boumeli ya ebele ya bambula ya nsuka ya ebongiseli ya ntango oyo, na ndakisa kosalema ya ebele ya bafizé, kokende na sanza, mpe makambo mosusu ya motindo wana. Te, azalaki nde kolobela makambo matali mpenza “mokɔlɔ na [Yehova, NW], mokɔlɔ monɛnɛ mpe na nsɔmɔ,” libebi oyo ezali ekoya.

15 Yango esalisi biso na koyeba na ndimbola nini makambo na likoló makobima “nokinoki nsima na bolózi.” Yesu azalaki te kolobela bolózi oyo eteni na yango eleki ntina ekokisamaki na mobu 70 T.B. Kasi azalaki nde kolobela ebandeli ya bolózi monene oyo ekokwea likoló ya ebongiseli ya mokili mobimba na mikolo mizali koya, oyo ekosukisa bongo “kozala” na ye oyo elakamaki. (Matai 24:3) Bolózi yango ezali naino mpo na mikolo mizali koya.

16. Malako 13:24 ezalaki kolobela na ntina na bolózi nini, mpe nini emonisi yango?

16 Tokoloba boni mpo na maloba oyo makomami kati na Malako 13:24: “Na [mikolo] yango na nsima na bolóji yango, moi ekoyinda mpe sanja ekotana tɛ”? Na esika oyo, liloba “yango” euti na liloba ya greke e·keiʹnos, oyo ezali bongo liloba oyo ezali kotyama pembeni ya nkombo ya eloko moko mpo na komonisa ete eloko oyo ezali mosika na kotalela ntango. E·keiʹnos ekoki mpe kosalelama na ntina na likambo moko eleká kala (to oyo elobelamaki liboso) to eloko oyo ezali mpo na mikolo mizali mosika mpenza. (Matai 3:1; 7:22; 10:19; 24:38; Malako 13:11, 17, 32; 14:25; Luka 10:12; 2 Batesaloniki 1:10) Na yango, wana Malako 13:24 elobeli “bolóji yango,” ezali te kolobela bolózi oyo Baloma bayeisaki, kasi mosala ya nguya ya Yehova na nsuka ya ebongiseli ya ntango oyo.

17, 18. Engengiseli nini Emoniseli epesi na ntina na lolenge bolózi monene ekobima?

17 Mokapo 17 kino mokapo 19 ya Emoniseli eyokani na bososoli oyo ya sika mpe oyo esembolami ya Matai 24:29-31, ya Malako 13:24-27 mpe ya Luka 21:25-28 mpe endimisi yango. Na lolenge nini? Baevanzile emonisi ete bolózi oyo ekobanda mpe ekosila mbala moko te; nsima wana ekobanda, bato bazangi botosi bakozala naino na bomoi mpo na komona “elembo ya Mwana na moto” mpe kosala eloko oyo ekomonisa mayoki na bango​—kolela mpe, lokola tozali kotanga yango kati na Luka 21:26, ‘kosenzwa na nsomo na kotalela makambo makobima kati na mokili.’ Bakozala na nsomo monene wana mpo ete bakomona “elembo” oyo ekolakisa ete kobomama na bango ebelemi.

18 Lisoló lizwami na Emoniseli liyebisi ete bolózi monene oyo ezali koya ekobanda na ntango “maseke” elongo na mampinga na yango ya “nyama na yauli” ya mikili mikeseni makobalukela “mwasi monene na pite,” Babilone Monene.d (Emoniseli 17:1, 10-16) Kasi ebele na bato bakotikala na bomoi nsima na makambo wana, mpo ete mikonzi, bato na mombongo, mikóló na masuwa mpe bato mosusu bakolela nsuka ya mangomba ya lokuta. Na ntembe te, mingi bakoyeba ete kosambisama na bango mpe ekoya na nsima.​—Emoniseli 18:9-19.

Nini ekosalema?

19. Likambo nini tokoki komizela na yango wana bolózi monene ekobanda?

19 Milɔ́ngɔ́ ya mikapo ya Evanzile ya Matai, ya Malako mpe ya Luka, bakisa mpe milɔ́ngɔ́ ya Emoniseli 17 kino 19 epesi mpenza engengiseli makasi na ntina na likambo oyo likosalema mosika te. Na ntango oyo elakami na Nzambe, bolózi monene ekobanda na kobebisama ya lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta (Babilone Monene). Kobebisama wana ekozala mpasi mingi mpo na boklisto ya lokuta, oyo ekokani na Yelusaleme oyo ezangaki sembo. Ezali “nokinoki nsima” ya eteni wana ya bolózi nde “bilembo bikozala kati na moi, sanza mpe myoto, mpe awa na nsé mitema na mabota mikozala na likoló.”​—Matai 24:29; Luka 21:25.

20. Makambo nini ya likoló tokosengela mbala mosusu komona yango?

20 Na ndimbola nini ‘moi ekoyinda, sanza ekopesa lisusu pole na yango te, myoto mikokwea longwa na likoló mpe nguya na lola ekotetema’? Na ntembe te, kati na eteni ya liboso ya bolózi monene, bingengiseli mingi​—elingi koloba bakonzi minene na mangomba, bakomonisama polele ete bazali bakosi mpe bakobomama na “maseke zomi” oyo malobelami kati na Emoniseli 17:16. Na ntembe te, nguya ya politiki mpe ekotetema. Ekoki mpe kozala na makambo ya nsomo, kati na makoló oyo mazali komonana? Ekoki mpenza kozala bongo, mpe ekozala ya nsomo, koleka oyo esalemaki mwa liboso ya nsuka ya ebongiseli ya Bayuda lokola Josèphe, mokomi na makambo ya kala ayebisaki yango. Toyebi ete na ntango ya kala, Nzambe asalelaki nguya na ye mpo na kobimisa makámá minene motindo wana, mpe akoki kosala bongo lisusu.​—Exode 10:21-23; Yosua 10:12-14; Basambisi 5:20; Luka 23:44, 45.

21. Lolenge nini “elembo” moko ya mikolo mizali koya ekobima?

21 Na likambo oyo, bakomi ya Baevanzile oyo touti kolobela basaleli liloba ya Greke toʹte (bongo) mpo na koyebisa likambo oyo likolanda na nsima: “Bongo elembo na Mwana na moto ekomɔnana na likoló.” (Matai 24:30; Malako 13:26; Luka 21:27) Uta Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esalemaki, bayekoli ya solo ya Yesu bazali kososola elembo oyo esangisi makambo mingi ya kozala na ye kozanga komonana, nzokande bato mingi bazali koyeba yango te. Kasi Matai 24:30 ezali kosakola komonana ya “elembo” mosusu, oyo ekoya na nsima na ntina na “Mwana na moto,” mpe mabota nyonso bakosengela na kotyela yango likebi. Wana Yesu ‘akoya kati na mapata,’ oyo elimboli bongo elembo ya kozanga komonana, kati na mokili mobimba bato oyo bazali banguna na ye bakosengela kondima “koya” yango (na Greke er·khoʹme·non) mpamba te nguya na ye ya bokonzi ekomonana na lolenge moko ya kokamwa mpenza.​—Emoniseli 1:7.

22. Komonana ya “elembo” oyo elobelami na Matai 24:30 ekozala na bopusi nini?

22 Kati na Matai 24:30, liloba toʹte lisalelami mbala moko lisusu mpo na koyebisa likambo oyo ekolanda na nsima. Bongo mabota, wana bakososola makambo oyo makokómela bango, bakomibeta na ntolo mpe bakolela, ntango mosusu bakoyeba ete kobomama na bango esili kobelema. Oyo nde bokeseni na basaleli na Nzambe, mpamba te biso tokokoka kotombola mitó na biso, koyebáká ete kobika na biso ebelemi! (Luka 21:28) Emoniseli 19:1-6 emonisi mpe ete basambeli ya solo na likoló mpe na mabelé bakosepela na kobomama ya mwasi monene na pite.

23. (a) Yesu akosala likambo nini mpo na baponami? (b) Tokoki koloba nini mpo na kokamatama ya batikali mpo na kokende na likoló?

23 Esakweli ya Yesu ekobi na koloba boye, kati na Malako 13:27: “[Bongo, NW] [toʹte] akotinda banje mpe akoyanganisa bapɔnami na ye, [longwa na mipepe minei, NW], longwa na nsuka na mokili kino nsuka na likoló.” Yesu azali kotya likebi awa likoló na batikali kati na ba 144 000 “baponami” baoyo bakozala naino na bomoi awa na mabelé. Wana nsuka ya ebongiseli ya biloko ebandaki, bayekoli bapakolami na Yesu bayanganisamaki kati na bomoko ya teokrasi. Nzokande, engebene kolandana ya makambo ndenge emonisami, Malako 13:27 mpe Matai 24:31 ezali kolobela likambo mosusu. “Na ntango ya kobeta ya kelelo monene,” batikali “baponami” bakoyanganisama longwa na bandelo ya mabelé. Bakoyanganisama lolenge nini? Kozanga ntembe, bakotyama “elembo” mpe Yehova akondima bango libela lokola basangani ya baoyo bazali “babyangami, mpe baponami, mpe basembwi.” Na ntango oyo elakami na Nzambe, bakoyanganisama na likoló mpo na kozala bakonzi mpe banganga.e Yango mpe ekosepelisa bango mpe baninga na bango ya sembo, “ebele monene,” baoyo mpe bakotyama elembo mpo ete ‘babima longwa na bolózi monene’ mpo na kozwa bolamu ya seko na mabelé oyo mabongwani Paladiso.​—Matai 24:22; Emoniseli 7:3, 4, 9-17; 17:14; 20:6; Ezekiele 9:4, 6.

24. Ndenge nini Matai 24:29-31 ezali komonisa kolandana ya makambo oyo ekobima na mikolo mizali koya?

24 Ntango bantoma balobaki ete: “Yebisá biso . . .,” Yesu apesaki bango eyano oyo bakokaki kososola bonene na yango te. Nzokande, na boumeli ya bomoi na bango, basepelaki na komona kokokisama ya liboso ya esakweli na ye. Boyekoli na biso ya eyano ya Yesu etalelaki eteni ya esakweli na ye oyo ekokokisama mosika te. (Matai 24:29-31; Malako 13:24-27; Luka 21:25-28) Tokoki uta sikawa kososola ete kobika na biso ezali kobelema. Tokoki mpe komizela ete tokomona ebandeli ya bolózi monene, bongo elembo na Mwana na moto ekomonana, mpe bongo Nzambe akoyanganisa baponami. Na nsuka, lokola Mokokisi ya bikateli ya Yehova na Armagedon, Mokonzi-Mobundi Yesu, ‘akokokisa bolóngi na ye.’ (Emoniseli 6:2) Mokolo wana ya Yehova, na ntango akoyeisa nkanda na ye, ekozala nsuka monene ya ebongiseli ya biloko oyo esili komona mokolo na Nkolo Yesu kobanda 1914.

25. Lolenge nini tokoki kosangana na kokokisama ya Luka 21:28 oyo ezali naino mpo na mikolo mizali koya?

25 Tika ete ólanda kozwa litomba na mateya mauti na Nzambe, mpo ete oyanola na libyangi oyo ekokokana na mikolo mizali koya: “Wana ekobanda makambo oyo kobima, tɛlɛma alima mpe botombola mitó na bino, mpo ete [kobika, NW] na bino ejali kobelema.” (Luka 21:28) Oyo nde mikolo kitoko mizali liboso na baponami mpe ebele monene wana Yehova azali kolanda kosala mpo na kobulisama ya nkombo na ye!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya komonisa yo bilembeteli wana, kolakisáká lolenge nini makambo oyo tozali komona na miso na mikolo na biso mazali kokokisa bisakweli ya Biblia.

b Makambo mosusu malimbolamaki na lokasa 288 kino lokasa 316 ya búku Le Royaume millénaire s’est approché, ebimisami na Lifalansé na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc. na 1975 mpe Mosenzeli ya Desɛ́mbɛ 15, 1982 (ebimeli ya Lifalansé) nkasa 16 kino 21.

c Mokomi na makambo na kala, Josèphe akomaki na ntina na makambo oyo mabimaki kobanda na etumba ya liboso ya Baloma likoló na Yelusaleme (na mobu 66 T.B.) kino kobebisama na yango: “Na boumeli ya butu, mopepe moko makasi mobetaki; mbula makasi, mikalikali mingalaki kozanga kotika, lokito ya bankake ezalaki kobangisa, mabelé maninganaki na makelele makasi oyo ezalaki kokangisa matoi. Mbongwana wana na molɔ́ngɔ́ ezalaki elembo oyo ekoki kotyelama ntembe te na ntina etali kobebisama ya bato, mpe makambo wana ya kokamwisa mazalaki bilembo ya komonisa libebi monene oyo ekokani na mosusu te.”

d Oyo Yesu abengaki yango ete “bolózi monene” mpe “bolózi” ekokanaki liboso mpo na kolobela kobebisama ya ebongiseli ya Bayuda. Kasi kati na mikapo oyo ezali kosalelama bobele mpo na mikolo na biso, alobelaki yango na lolenge ya bosikisiki ete “bolózi,” Biblia ya Lingelesi, New World Translation etye liloba the liboso na yango (na Lifalanse, article “la”) mpo na komonisa bosikisiki na yango. (Matai 24:21, 29; Malako 13:19, 24) Emoniseli 7:14 (NW) ebengaki likambo oyo ekosalema na mikolo mizali koya ete “bolózi monene,” oyo elimboli mpenzampenza “bolózi oyo ya monene.”

e Tala Mosenzeli ya Augústo 15, 1990, “Mituna ya batangi.”

Ozali komikundola?

◻ Lolenge nini biteni mosusu ya Yoele 2:28-31 mpe 3:15 bikokanaki na ekeke ya liboso?

◻ Matai 24:29 ezali koloba na ntina na bolózi nini, mpe mpo na nini tolobi bongo?

◻ Bilembo nini na likoló oyo Matai 24:29-31 ezali kolobela, mpe na ndimbola nini yango ezali kosalema nokinoki nsima na bolózi monene?

◻ Lolenge nini Luka 21:26, 28 ekokokisama na mikolo mizali koya?

[Elilingi na lokasa 16, 17]

Zingazinga ya Tempelo

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto