Okobika na ntango Nzambe akokokisa bikateli na ye?
“Soko mikolo yango iyei mikuse te mbɛ moto [“mosuni,” “NW”] moko akobika te. Nde mpo na Baponami, mikolo yango ikoya mikuse.”—MATAI 24:22.
1, 2. (a) Mpo na nini ezali mabe te komibanzabanza na ntina na bmoi na biso ya mikolo mizali koya? (b) Lobanzo na biso ya sembo ekoki kozala likoló na mituna nini ya ntina?
NA MEKO nini omibanzabanzaka na ntina na bomoto na yo moko? Lelo oyo, bato mingi bazali komibanzabanza na ntina na bomoto na bango moko na kolekisáká ndelo, bazali kokóma na ezaleli ya moimi. Nzokande, Biblia ezali kokweisa te ezaleli ya komibanzabanza na ntina na makambo ya bomoi na biso mpenza na lolenge lobongi. (Baefese 5:33) Yango etaleli mpe komibanzabanza na ntina na bomoi na biso ya mikolo mizali koya. Na yango, ekozala mabe te mpo na yo ete oluka koyeba bilikya oyo okoki komizela na yango mpo na mikolo mizali koya. Yango ezali lobanzo na yo?
2 Tokoki kondimisama ete bantoma ya Yesu bazalaki na lobanzo motindo wana mpo na bomoi na bango ya mikolo mizalaki koya. (Matai 19:27) Ekoki mpenza kozala mpo na ntina yango nde minei kati na bango babɛlɛmaki epai na Yesu wana azalaki likoló na Ngomba ya Olive. Batunaki ete: “Makambo oyo makozala ntango nini mpe elembo nini wana oyo nyonso malingi kokoka?” (Malako 13:4) Yesu azangaki te kotya likebi likoló na lobanzo oyo moto nyonso akoki kozala na yango na ntina na mikolo mizali koya—lobanzo oyo bantoma bazalaki na yango, oyo biso mpe tozali na yango. Mbala na mbala, azalaki kolobela makasi bopusi oyo lobanzo wana esengelaki kozala na yango likoló na bango mpe lolenge oyo makambo masengelaki kosuka.
3. Mpo na nini toyokanisi eyano ya Yesu na mikolo na biso?
3 Eyano ya Yesu emonisi esakweli oyo kokokisama na yango monene ezali kosalema na mikolo na biso. Tokoki kososola yango soki totaleli bitumba ya mokili mobimba mpe matáta mosusu oyo esalemi na ekeke na biso, koningana ya mabelé oyo esili koboma ebele ya bato, nzala oyo ezali komema maladi mpe liwa, mpe makɔnɔ—kobanda na maladi mabe ebéngami grippe espagnole oyo ebimaki na 1918 kino na maladi ya nsɔ́mɔ na mikolo na biso, sida. Nzokande, eteni monene ya eyano ya Yesu ekokanaki mwa mikolo liboso ya kobebisama ya Yelusaleme na mabɔkɔ ya Baloma na mobu 70 T.B. mpe na boumeli ya mobu yango. Yesu akebisaki bayekoli na ye na maloba oyo ete: “Bókeba na bino mpenza, mpo ete bakopesa bino na mabɔkɔ na basambisi na bango, bokobɛtama kati na biyanganelo mpe bokotɛma liboso na mikóló na mokili mpe mikonzi na ntina na ngai mpo na kotatola liboso na bango.”—Malako 13:9.
Makambo oyo Yesu asakolaki, mpe lolenge yango ekokisamaki
4. Wapi mwa makebisi oyo ezwami kati na eyano ya Yesu?
4 Yesu asukaki te bobele na kosakola lolenge oyo basusu basengelaki konyokola bayekoli na ye. Akebisaki bango mpe na ntina na lolenge oyo bango moko basengelaki kosala. Na ndakisa: “Soko bokomona Mbindo na libebisi kotɛlɛma kuna ekoki te (tiká motángi asosola oyo), na ntango yango, malamu ete bango na Yuda bákima epai na ngomba.” (Malako 13:14) Lisoló oyo ekokani na yango ezwami na Luka 21:20 elobi ete: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basodá.” Lolenge nini makambo yango makokisamaki solo mpo na mbala ya liboso?
5. Likambo nini libimaki kati na Bayuda oyo bazalaki na Yuda na mobu 66 T.B.?
5 Búku The International Standard Bible Encyclopedia (1982) eyebisi ete: “Bayuda bakómaki kotomboka mingi na nsé ya boyangeli ya Loma mpe bayangeli bazalaki na mobulu mingi, bato na nkó, mpe na kozanga kolongobana. Botomboki monene ebimaki na mobu 66 A.D. . . . Etumba ebandaki na ntango Bazelote babotolaki Masada mpe na nsima, na litambwisi ya Menahem, bazingelaki Yelusaleme. Bobele na ntango yango Bayuda oyo bazalaki na Césarée, engumba epai kuna moyangeli azalaki kofanda, babomamaki, mpe nsango wana ya nsɔ́mɔ epalanganaki na mboka mobimba. Kati na mosolo ya sika ya ebende oyo eyaki kosalema ekomamaki ete Mobu 1 kino Mobu 5 ya botomboki.”
6. Botomboki ya Bayuda epusaki Loma na kosala nini?
6 Limpinga ya Zomi-na-Mibale ya Loma oyo etambwisamaki na Cestius Gallus batambolaki uta na Sulia, babebisaki Galilai mpe Yuda, mpe na nsima babundisaki mboka-mokonzi, kobotoláká mpe etúká ya nɔ́rdi ya “Yelusaleme, mboka na bulɛɛ.” (Nehemia 11:1; Matai 4:5; 5:35; 27:53) Kolobeláká na mokuse lolenge makambo yango masalemaki, búku The Roman Siege of Jerusalem eyebisi ete: “Na boumeli ya mikolo mitano, Baloma bamekaki komata na efelo, kasi bazalaki kozongisama nsima mbala na mbala. Na nsuka, baoyo bazalaki kozongisa bango na nsima balóngamaki na ntango bamisíle ebandaki kokita lokola mbula, mpe batikaki. Basodá ya Loma basalelaki mwango oyo ebéngami testudo—kokangáká nguba na bango likoló na mitó na bango mpo na komibatela—babebisaki bifelo mpe bazikisaki ekɔtelo. Baoyo bazalaki koluka kozongisa bango nsima balɛngaki na nsɔ́mɔ monene.” Baklisto oyo bazalaki na kati ya engumba yango bakokaki komikundola maloba ya Yesu mpe kososola ete eloko na mbindo etɛlɛmaki na esika mosantu.a Kasi, wana engumba ezingamaki, lolenge nini baklisto yango basengelaki kokima, lokola Yesu ayebisaki bango?
7. Na ntango Baloma bakómaki pene na kozwa bolóngi na 66 T.B., basalaki nini?
7 Mokomi na makambo ya kala Flavius Josèphe ayebisi ete: “Kozanga koyeba ezalela ya bozangi elikya oyo bato bazingelamaki bazalaki na yango mpe soki mayoki nini bato bazalaki na yango, na pwasa, Cestius [Gallus] ayebisaki bato na ye ete bábunda lisusu te, alongolaki elikya atako balóngaki ye te, mpe kozanga ete ntina ya solosolo eyebana, bamilongolaki na engumba wana.” (The Jewish War, II, 540 [xix, 7]) Mpo na nini Gallus amilongolaki? Ata soki kolongwa wana ezalaki mpo na mokano nini, yango epesaki nzela na baklisto ete bátosa etindá ya Yesu mpe bákima na ngomba mpo na komibatela.
8. Ntango nini Baloma babundisaki Yelusaleme mpo na mbala ya mibale, mpe bato oyo bakufaki te bakutanaki na makambo nini na nsima?
8 Botosi ebikisaki bango. Mwa moke na nsima, Baloma bakanaki kosukisa botomboki wana. Kampanye oyo esalemaki na bokambemi ya mokonzi monene ya basodá, Titus, ememaki na kozingelama ya Yelusaleme kobanda na sanza ya Apríli kino na sanza ya Augústo ya mobu 70 T.B. Soki otángi makambo oyo Josèphe akomaki na ntina na mpasi oyo ekwelaki Bayuda, okoyoka malili na nzoto. Longolá baoyo bakufaki na etumba na Baloma, Bayuda mosusu babomamaki na banguna na bango Bayuda, mpe nzala epusaki bango na kolya misuni ya bato. Na ntango Loma ezwaki bolóngi, Bayuda 1 100 000 bakufaki.b Kati na bato 97 000 oyo batikalaki na bomoi, basusu babomamaki nokinoki; basusu bakangamaki na boombo. Josèphe alobi ete: “Bato koleka zomi na nsambo batyamaki minyololo mpe batindamaki na Ezipito mpo na kosala mosala makasi, wana Titus atindaki eteni monene na bango na bitúká ete bákende kobomama na bisika ya masano, na mopanga mpe na nyama mabe.” Bobele wana bazalaki komemama mpo na kobomama, bakangami 11 000 bakufaki mpo na nzala.
9. Mpo na nini baklisto bakutanaki te na makambo oyo makómelaki Bayuda, kasi mituna nini mizali kotunama?
9 Baklisto bakokaki kozala na botɔ́ndi mpo ete balandaki likebisi oyo Nkolo apesaki mpe ete bakimaki engumba yango liboso ete limpinga ya Baloma ezonga lisusu. Na yango, babikisamaki na likambo oyo Yesu abéngaki yango ‘bolɔ́zi monene lokola oyo ebimá naino te uta ebandeli ya mokili kino sikawa, mpe ekobima lisusu te’ na Yelusaleme. (Matai 24:21, NW) Yesu abakisaki ete: “Soko mikolo yango iyei mikuse te mbɛ moto [“mosuni,” NW] moko akobika te. Nde mpo na Baponami, mikolo yango ikoya mikuse.” (Matai 24:22) Maloba yango malimbolaki nini na eleko wana, mpe mazali na ndimbola nini lelo oyo?
10. Lolenge nini tozalaki liboso kolimbola Matai 24:22?
10 Liboso ndimbola oyo ezalaki kopesama ete maloba ‘moto [“mosuni,” NW] akobika’ etalelaki Bayuda oyo babikaki na bolɔ́zi monene na Yelusaleme na mobu 70 T.B. Baklisto bakimaki, na yango Nzambe akokaki kotika nzela na Baloma ete báyeisa libebi nokinoki. Na maloba mosusu, mpo na likambo oyo ete “baponami” bázwa likámá te, mikolo ya bolɔ́zi misengelaki koyeisama mokuse, kopesáká nzela na mwa ndambo ya Bayuda ete bábika. Ekanisamaki ete Bayuda oyo babikaki bazalaki elilingi ya baoyo bakobika na bolɔ́zi monene oyo ezali koya na eleko na biso.—Emoniseli 7:14.
11. Mpo na nini emonani ete ndimbola likoló na Matai 24:22 esengeli kotalelama lisusu?
11 Kasi ndimbola wana eyokani mpenza na makambo oyo mabimaki na mobu 70 T.B.? Yesu alobaki ete “mosuni” ya moto esengelaki ‘kobika’ na bolɔ́zi. Tokoki mpenza kosalela liloba ‘kobika’ mpo na kolobela bato 97 000 oyo batikalaki na bomoi, na kotaleláká ete bankóto mingi na bango bakufaki mwa moke na nsima mpo na nzala to mpo ete babomamaki na esika moko ya masano? Josèphe alobi na ntina na esika moko ya masano na Césarée, ete: “Motángo ya baoyo bakufaki na bitumba na banyama mabe to na kobundana moko na mosusu to baoyo bazikisamaki elekaki 2 500.” Atako bakufaki te na ntango mboka na bango ebundisamaki, kasi ‘babikaki’ soko moke te. Mpe, Yesu alingaki kotalela bango lokola ete bakokani na babiki, bato ya esengo, oyo bakobima na “bolɔ́zi monene” oyo ezali koya?
Mosuni mobikisami—Lolenge nini?
12. Na ekeke ya liboso, banani bazalaki baponami oyo Nzambe amibanzabanzaki mpo na bango?
12 Pene na mobu 70 T.B., Nzambe azalaki kotalela Bayuda ya mosuni lisusu te lokola libota liponami. Yesu amonisaki ete Nzambe asilaki kobwaka libota wana mpe ete asengelaki kotika ete mboka-mokonzi, tempelo, mpe ebongiseli ya losambo na bango esukisama. (Matai 23:37–24:2) Nzambe aponaki libota mosusu ya sika, Yisalaele ya elimo. (Misala 15:14; Baloma 2:28, 29; Bagalatia 6:16) Ezalaki na mibali mpe basi baponami uta na mabota nyonso mpe bapakolami na elimo santu. (Matai 22:14; Yoane 15:19; Misala 10:1, 2, 34, 35, 44, 45) Mwa mibu liboso ete Cestus Gallus ayeisa etumba, Petelo akomelaki baoyo ‘Nzambe Tata aponaki pelamoko boyebi boyebaki ye liboso na nzela na kobulisa bango na elimo.’ Bapakolami wana na elimo bazalaki “libota liponami, bonganga ya bokonzi, ekólo ya bulɛɛ.” (1 Petelo 1:1, 2; 2:9, NW) Nzambe asengelaki komema baponami yango kuna na likoló mpo ete báyangela elongo na Yesu.—Bakolose 1:1, 2; 3:12; Tito 1:1; Emoniseli 17:14.
13. Maloba oyo mazwami kati na Matai 24:22 masengelaki kozala na ndimbola nini?
13 Koyebana ya baponami wana ekosalisa biso mingi, mpamba te Yesu asakolaki ete mikolo na bolɔ́zi ekoyeisama mokuse “mpo na baponami.” Maloba ya Greke oyo ebongolami ete “mpo na” ekoki mpe kobongolama “mpo na bolamu ya” to “mpo . . . bolamu.” (Malako 2:27; Yoane 12:30; 1 Bakolinti 8:11; 9:10, 23; 11:9; 2 Timoté 2:10; Emoniseli 2:3) Na yango, maloba wana ya Yesu makoki mpe kobongolama ete, ‘Soko mikolo yango iyei mikuse te mbɛ moto moko akobika te. Nde mpo na bolamu ya Baponami, mikolo yango ikoya mikuse.’c (Matai 24:22) Ezalaki na likambo moko oyo esalemaki mpe epesaki baklisto bapakolami oyo bakangami na Yelusaleme litomba to ezalaki ‘mpo na bolamu’ na bango?
14. Lolenge nini “mosuni” ebikisamaki na ntango Baloma bamilongolaki na pwasa na Yelusaleme na mobu 66 T.B.?
14 Tómikundola ete na mobu 66 T.B., Baloma bakɔtaki na mboka, babotolaki eteni ya nɔ́rdi ya Yelusaleme, mpe babandaki kobebisa bifelo. Josèphe ayebisi ete: “Soki akóbaki mpenza kozingela engumba wana mbɛlɛ, alingaki kobɔtɔla yango na mbala moko.” Omituna ete: ‘Mpo na nini limpinga ya Baloma oyo ezalaki na nguya mingi etikaki kampanye na yango mpe balongwaki “kozanga ete ntina ya solosolo eyebana?”’ Rupert Furneaux, nganga mayele ya makambo ya kala oyo etali misala ya basodá, ayebisi ete: “Mokomi moko te ya makambo ya kala asilá kolónga koyebisa ntina ya solosolo oyo mpo na yango Gallus azwaki ekateli wana ya kokamwa mpe ya nsɔ́mɔ.” Ata soki ezalaki mpo na nini, likambo oyo emonanaki ezalaki ete bolɔ́zi eyeisamaki mokuse. Baloma bazongaki, mpe Bayuda babundisaki bango wana ezalaki bango kozonga. Ezalaki boni mpo na baklisto bapakolami “baponami” oyo bakangamaki na kati? Kolongwa oyo basodá ya Loma balongwaki elimbolaki ete baponami babikisamaki na kobomama oyo elingaki kosalema na boumeli ya bolɔ́zi wana. Na yango, baklisto oyo bazwaki litomba mpo ete bolɔ́zi oyo ebimaki na mobu 66 T.B. eyeisamaki mokuse bazalaki “mosuni” ebikisami oyo elobelami na Matai 24:22.
Elikya nini ezali mpo na yo na mikolo mizali koya?
15. Mpo na nini tokoki koloba ete Matai mokapo 24 esengeli kotyelama likebi mingi na mikolo na biso?
15 Moto moko akoki komituna ete: ‘Mpo na nini nasengeli kotya likebi na maloba ya Yesu oyo mayeisami polele?’ Ee, tozali na bantina malamu ya koloba ete esakweli ya Yesu esengelaki kokokisama lisusu na bonene mpenza, koleka oyo esalemaki liboso ya mobu 70 mpe na boumeli ya mobu yango.d (Kokanisá na Matai 24:7; Emoniseli 6:2-8.) Na boumeli ya mibu mingi Batatoli ya Yehova bazalaki koteya ete kokokisama monene oyo ezali kosalema na eleko na biso emonisi ete tokoki komizela ete “bolɔ́zi monene” koleka ekosalema na mikolo mizali koya mosika te. Na boumeli na yango, lolenge nini maloba ya esakweli ya Matai 24:22 makokokisama?
16. Likambo nini ya kolendisa Emoniseli elobi yango na ntina na bolɔ́zi monene oyo etikali moke eya?
16 Mibu soko ntuku mibale na nsima wana bolɔ́zi ekwelaki Yelusaleme, ntoma Yoane akomaki mokanda ya Emoniseli. Endimisaki ete bolɔ́zi monene ezalaki koya liboso. Mpe, lokola tozali komibanzabanza na ntina na bopusi oyo yango esengeli mpenza kosala epai na biso, tokoki kobɔndisama na koyebáká ete na bisakweli oyo ezwami kati na yango, mokanda ya Emoniseli ezali kondimisa biso ete mosuni ekobika na bolɔ́zi monene oyo ezali koya. Yoane asakolaki “ebele monene . . . bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso.” Ezali bongo banani? Mongongo moko na likoló eyanoli ete: “Bazali baoyo babimi na monyoko [“bolɔ́zi,” NW] monene.” (Emoniseli 7:9, 14) Ee, bakozala babiki! Emoniseli epesi biso mpe engɛngiseli mpo na koyeba lolenge nini makambo makosalema na ntango ya bolɔ́zi monene oyo ezali koya mpe lolenge Matai 24:22 ekokokisama.
17. Makambo nini makosalema na eteni ya liboso ya kokokisama ya bolɔ́zi monene?
17 Eteni ya liboso ya bolɔ́zi yango ekozala kobundisama ya mwasi na pite ya elilingi oyo abéngami “Babilone monene.” (Emoniseli 14:8; 17:1, 2) Azali komonisa lisangá mobimba ya mangomba ya lokuta, oyo kati na yango boklisto ya nkombo mpamba nde ezali mabe koleka. Engebene maloba oyo mazwami kati na Emoniseli 17:16-18, Nzambe akopusa mitema ya bato ya politiki ete bábundisa mwasi na pite ya elilingi.e Kanisá naino lolenge nini “baponami” bapakolami ya Nzambe mpe baninga na bango “ebele monene” bakotalela etumba yango. Wana etumba yango ya nsɔ́mɔ ekokóba nokinoki likoló na mangomba, emonani ete ekolongola mangomba nyonso, ata mpe Batatoli ya Yehova.
18. Mpo na nini emonani ete “mosuni” moko te ekobikisama na boumeli ya eteni ya liboso ya kokokisama ya bolɔ́zi monene?
18 Ekozala na ntango wana nde maloba ya Yesu oyo mazwami kati na Matai 24:22 makokokisama na bonene. Lokola emonanaki ete baponami oyo bazalaki kati na Yelusaleme bakokaki kozala na likámá, ekomonana mpe lokola ete Batatoli ya Yehova bakozala na likámá na ntango etumba yango ekosalema likoló na mangomba, lokola nde etumba yango ekoboma “mosuni” nyonso ya libota ya Nzambe. Nzokande, tóbosana te makambo oyo masalemaki na mobu 66 T.B. Bolɔ́zi oyo Baloma bakweisaki eyeisamaki mokuse, kopesáká bongo nzela na bapakolami ete bákima mpe bátikala na bomoi. Na yango, tokoki kondimisama ete etumba ya nsɔ́mɔ oyo ekokweisama likoló na mangomba ekopesamela nzela te ete eboma lisangá ya basambeli ya solo oyo epalangani na mabelé mobimba. Ekosalema nokinoki, lokola nde “na mokolo moko.” Nzokande, na lolenge moko to mosusu, ekoyeisama mokuse, ekopesamela nzela te ete ekokisa mokano na yango, na bongo libota ya Nzambe likoka ‘kobikisama.’—Emoniseli 18:8.
19. (a) Na nsima ya eteni ya liboso ya bolɔ́zi monene, nini ekoyebana polele? (b) Mpe yango ekomema na kosalema ya likambo nini?
19 Na nsima, basangani mosusu ya ebongiseli ya Satana oyo ezali awa na mabelé bakokóba mpo na mwa ntango moke, bakolela mpo na mimbongo oyo bazalaki kosala elongo na makango na bango. (Emoniseli 18:9-19) Na ntango moko boye, bakoya komona ete basaleli ya solo ya Nzambe bazali kokóba, “baoyo na kimya, baoyo bafandi na kobanga te, bango nyonso bafandi kuna na bitutu te” mpe bakomonana lokola ete bakoki kobomama kozanga nkaká. Kasi bakokamwa mingi mpenza! Mpo na kopesa etumbu epai na baoyo bakolinga kobundisa to bakobundisa mpenza basaleli na ye, Nzambe akotɛlɛma mpo na koyeisa bikateli na ye likoló na banguna na ye na eteni ya nsuka ya bolɔ́zi monene.—Ezekiele 38:10-12, 14, 18-23.
20. Mpo na nini libota ya Nzambe likozala na likámá te na eteni ya mibale ya bolɔ́zi monene?
20 Eteni wana ya mibale ya bolɔ́zi monene ekokokana na oyo esalemaki likoló na Yelusaleme mpe likoló na bafandi na yango na ntango Baloma babundisaki bango mpo na mbala ya liboso na mobu 70 T.B. Ekozala solo “bolɔ́zi monene lokola oyo ebimá naino te uta na ebandeli ya mokili kino [na ntango wana], te, na nsima ekobima lisusu mpe te.” (Matai 24:21, NW) Atako bongo, tokoki kondimisama ete, baponami ya Nzambe mpe baninga na bango bakozala na esika ya likámá te, likámá ya kobomama. Ah, ekosɛnga te ete bákima na mboka moko boye. Baklisto ya ekeke ya liboso bakokaki kokima engumba wana mpe bakendaki na esika ya ngomba, lokola Pella na nsima ya bokatisi Yaladene. Nzokande, na mikolo mizali koya Batatoli ya sembo ya Nzambe bakozala kati na mabelé mobimba, na yango libateli na bango ekotalela te esika bobele moko ya sikisiki awa na mabelé.
21. Nani akobunda na etumba ya nsuka, mpe yango ekobimisa litomba nini?
21 Libebi yango ekouta te na mampinga ya Loma to na ebongiseli mosusu ya bato. Nzokande, mokanda ya Emoniseli eyebisi ete mampinga oyo makoyeisa libebi wana makouta na likoló. Ee, eteni wana ya nsuka ya bolɔ́zi monene ekokokisama na nzela ya mampinga ya bato te, kasi na nzela ya “Liloba na Nzambe,” Mokonzi Yesu Klisto, oyo akosungama na ‘mampinga na makoló,’ kati na bango mpe baklisto bapakolami basekwisami. “Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo” akokweisa etumbu oyo ekoleka mpenza oyo esalemaki na mobu 70 T.B. Ekolongola bato nyonso oyo bazali banguna ya Nzambe—bakonzi, bakomandá ya basodá, bansɔmi mpe baombo; bato minene mpe bato mike. Ata mpe bibongiseli ya bato oyo bizwami kati na mokili ya Satana bikosukisama.—Emoniseli 2:26, 27; 17:14; 19:11-21; 1 Yoane 5:19.
22. Na lolenge nini mosusu “mosuni” ekobikisama?
22 Tómikundola ete “mosuni,” ezala oyo ya batikali bapakolami to oyo ya “ebele monene,” ekosila kobikisama na ntango Babilone monene ekobomama nokinoki mpe na mobimba mpenza na eteni ya liboso ya bolɔ́zi monene. Bobele bongo, na eteni ya nsuka ya bolɔ́zi, “mosuni” oyo ekokima na ngámbo ya Yehova ekobikisama. Ekokesana mpenza na likambo oyo ekwelaki Bayuda batomboki na mobu 70 T.B.!
23. “Mosuni” oyo ekobika esengeli komizela na komona kokokisama ya elaka nini?
23 Wana ozali kokanisa na ntina na bomoi na yo moko mpe ya balingami na yo mpo na mikolo mizali koya, talá elaka oyo ezwami na Emoniseli 7:16, 17: “Bakoyoka nzala lisusu te, soko mposa na mai lisusu te. Moi ekobola bango soko moke te, na mɔ́tɔ makasi mpe te, mpo ete Mwana na Mpate oyo na kati na bokonzi akobatela bango, mpe akokamba bango epai na mitó na mai na bomoi. Nzambe mpe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.” Ekozala solo ‘kobikisama’ na lolenge kitoko, mpo na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yúni 1996, nkasa 14-19.
b Josèphe alobi ete: “Ntango Titus akɔtaki, akamwaki mingi mpo na makasi ya engumba wana . . . Angangaki ete: ‘Nzambe azali na ngámbo na biso; ezali Nzambe nde alongoli Bayuda na esika makasi oyo; mpamba te mabɔkɔ ya bato to bibundeli bisalemi na bato bikokaki kosala eloko nini na manɔ́ngi oyo?’”
c Likambo ya kobenda likebi ezali ete, makomi ya Shem-Tob, Matai 24:22 esaleli liloba ya Liebele ʽa·vurʹ, oyo elimboli “mpo na bolamu ya, mpo na, na mokano ete.”—Talá lisoló oyo ezali liboso ya oyo, lokasa 13.
d Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1994, nkasa 11 mpe 12, mpe etanda oyo ezwami na nkasa 14 mpe 15, oyo etye esika moko esakweli oyo Yesu apesaki kati na eyano na ye ezwami na Matai mokapo 24, Malako mokapo 13 mpe Luka mokapo 21.
e Talá Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi!, na nkasa 235 kino 258; ebimisami na 1992 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Mampinga ya Loma ebundisaki Yelusaleme na biteni nini mibale?
◻ Mpo na nini tokoki mpenza te koloba ete Bayuda 97 000 oyo batikalaki na bomoi na mobu 70 T.B. bazalaki nde “mosuni” oyo elobelami na Matai 24:22?
◻ Na ndimbola nini mikolo ya bolɔ́zi ya Yelusaleme eyeisamaki mokuse, mpe lolenge nini “mosuni” ebikisamaki?
◻ Na ndimbola nini mikolo mikoyeisama mokuse na bolɔ́zi monene oyo etikali moke eya, mpe na ndimbola nini “mosuni” ekobikisama?
[Elilingi na lokasa 16]
Mosolo ya ebendé ya Bayuda oyo ebimisamaki na nsima ya botomboki. Makomi ya Liebele malobi “Mobu ya mibale,” oyo elimboli mobu 67 T.B., mbula ya mibale ya kozala na lipandá
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 17]
Mosolo ya ebendé ya Baloma oyo ebimisamaki na mobu 71 T.B. Na lobɔkɔ ya mwasi ezali bongo sodá Moloma; na lobɔkɔ ya mobali ezali bongo mwasi Moyuda azali kolela. Maloba “IVDAEA CAPTA” malimboli “Yuda mokangami”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.