Okoki kokola na elimo
EKOKI kozala mpasi mpo na koyeba motuya ya solo ya eloko moko. Ezali bongo mpo na diama. Diama oyo epɛtolami malamu engɛngaka makasi, kasi diama oyo euti kobima na mabelé engɛngaka mpenza te. Atako bongo, na kati ya diama oyo epɛtolami naino te, ezali na elembeteli oyo emonisi ete ekozala biju ya kitoko.
Baklisto bakokani na diama oyo epɛtolami naino te na makambo mingi. Atako tozali naino bato ya kozanga kokoka, kati na biso tozali na eloko oyo Yehova apesaka motuya mingi. Lokola diama, biso nyonso tozali na bizaleli oyo ekesenisi biso na bato mosusu. Mpe mokomoko na biso akoki kokola na elimo soki alingi yango na motema mobimba. Tokoki kopɛtola bomoto na biso, na boye ete engɛnga mpo na nkembo ya Yehova.—1 Bakolinti 10:31.
Nsima ya kokata mpe kopɛtola yango, diama ekotyama na vitrini oyo ekobakisa lisusu kongɛnga na yango. Bobele bongo, Yehova akoki kosalela biso na bisika bikeseni to mikumba mikeseni soki ‘tolati bomoto ya sika oyo ezali na motindo na Nzambe na boyengebene mpe na bulɛɛ na solo.’—Baefese 4:20-24.
Bokoli na elimo motindo wana eyaka yango moko te, lolenge moko, diama oyo epɛtolami naino te engɛngaka lokola biju te. Mbala mosusu ekosengela na biso kolongola bolɛmbu oyo ezali kokanga biso, kobongisa makanisi na biso mpo na oyo etali kondima mikumba, to ata kosala makasi mpo na kotika momeseno moko mabe na elimo. Kasi tokoki kokola soki tolingi yango mpenza, mpamba te Yehova Nzambe akoki kopesa biso “nguya oyo eleki nguya ya bato.”—2 Bakolinti 4:7, NW; Bafilipi 4:13.
Yehova alendisaka basaleli na ye
Kopalola diama esɛngaka koyeba mosala yango malamumalamu, mpamba te soki eteni moko ya diama oyo epɛtolami naino te elongwe, ekozongisama lisusu te. Ndambo monene—mbala mosusu katikati ya libanga oyo ekatami naino te—ekolongolama mpo na kobimisa motindo ya libanga oyo balingi. Biso mpe tozali na mposa ya koyeba malamumalamu solo mpo ete tóbimisa motindo ya bomoto na biso mpe tókola na elimo. Mingimingi tosengeli kondimisama ete Yehova akopesa biso makasi.
Nzokande, tokoki komiyoka ete tobongi te, to tokolonga te kosala mingi. Na ntango ya kala, basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango mosusu bakanisaki bongo. (Exode 3:11, 12; 1 Mikonzi 19:1-4) Ntango Nzambe apesaki ye mokumba ete azala “mosakoli epai na mabota,” Yilimia alobaki ete: “Talá; nayebi koloba te zambi ngai nazali bobele elenge.” (Yilimia 1:5, 6) Nzokande, atako abangaki, Yilimia akómaki mosakoli ya mpiko oyo asakolaki bansango na kozanga kokakatana epai na bato oyo bazalaki koyina ye. Nini epesaki ye nzela ya kosala yango? Ayekolaki kotyela Yehova motema. Na nsima, Yilimia akomaki ete: “Moto apambolama oyo akotalela [Yehova] mpe oyo [Yehova] azali elikya na ye.”—Yilimia 17:7; 20:11.
Bobele bongo, lelo oyo, Yehova azali mpe kolendisa baoyo bazali kotya elikya na bango epai na ye. Edouard,a tata ya bana minei oyo azalaki kokola noki te na elimo andimaki likambo yango. Alimboli ete: “Nalekisaki mbula libwa lokola Motatoli ya Yehova, kasi nazalaki kokola na elimo te. Ezalaki bongo mpamba te nazalaki na ntina ya komipesa te mpe natyaki motema te. Ntango nakendaki kofanda na ekólo Espagne, nakómaki na lisangá moko ya moke oyo ezalaki bobele na nkulutu moko mpe mosaleli na misala moko. Lokola bosɛnga ezalaki, nkulutu apesaki ngai mikumba mingi. Nazalaki kolɛnga ntango nasalaki masukulu ya liboso mpe masolo na likita ya mosala. Na yango, nayekolaki kotya elikya epai na Yehova. Ntango nyonso, nkulutu yango azalaki kopesa ngai longonya mpe toli ya mayele mpo ete nakolisa makoki ya koteya.
“Bobele na eleko yango, nakómaki kobima mingi na mosala ya kosakola mpe nabandaki kokamba malamu libota na ngai na elimo. Lokola litomba, solo esalaki bopusi makasi na libota mobimba, mpe nasepelaki mingi. Sikawa nazali mosaleli na misala, mpe nazali kosala makasi mpo na kokokisa masɛngami ya kokóma mokɛngɛli moklisto.”
“Bóbwaka bomoto na kala”
Lokola Edouard andimaki yango, bokoli na elimo ezali kosɛnga kotya elikya epai na Yehova. Ebongi lisusu kokolisa “bomoto ya sika” lokola oyo ya Klisto. Ndenge nini yango ekoki kosalema? Litambe ya liboso ezali ya “kobwaka” bizaleli ya bomoto ya kala. (Bakolose 3:9, 10) Ndenge moko na biloko bizangi ntina, lokola salite, esengeli kolongolama na diama oyo epɛtolami naino te mpo na kokómisa yango biju oyo ezali kongɛnga, bizaleli “ya mokili” bisengeli kolongolama mpo ete bomoto na biso ya sika engɛnga.—Bagalatia 4:3.
Moko na bizaleli yango ezali kokakatana mpo na kondima mokumba na kobangáká ete bakosɛnga biso makambo mingi. Ya solo, mokumba elimboli mosala, kasi mosala ya esengo. (Kokanisá na Misala 20:35.) Paulo andimaki ete bokangami epai na Nzambe esɛngisi ete ‘tósalaka mosala mpe tóbundaka etumba.’ Alobaki ete tokosalaka bongo, “zambi tosili kolikya epai na Nzambe na bomoi,” oyo akobosana te mosala oyo tozali kosalela bandeko na biso baklisto mpe bato mosusu.—1 Timoté 4:9, 10; Baebele 6:10.
Diama mosusu ezalaka na “matɔnɔ” oyo mabandaka na ntango ya kobanda na yango mpe esengeli kopalola diama yango na bokɛngi nyonso. Nzokande, na lisalisi ya esaleli ebéngami polariscope, motuli na diama akoki komona matɔnɔ mpe kolonga kolongola yango. Ekoki kozala ete tozali na matɔnɔ ya kati ya nzoto, to ezaleli moko mabe na kati ya bomoto na biso, oyo euti na mimeseno ya kala to likambo moko oyo enyokolaka biso uta kala. Tokoki kosala nini? Liboso, tosengeli kondima bolɛmbu na biso mpe kozwa ekateli ya kolonga yango na meko oyo tokoki. Tosengeli kokitisa bozito na biso liboso na Yehova na libondeli, mpe lisusu koluka lisungi ya bankulutu baklisto.—Nzembo 55:22; Yakobo 5:14, 15.
Nicolas atungisamaki na matɔnɔ motindo wana kati na ye. Alimboli ete: “Tata na ngai azalaki molangwi masanga, mpe azalaki konyokola ngai na ndeko na ngai ya mwasi. Ntango natikaki kelasi, nakɔtaki mosala ya soda, kasi mosika te ezaleli na ngai ya botomboki etyaki ngai na mokakatano. Bakonzi ya basoda batyaki ngai na bolɔkɔ mpo nazalaki kotekisa bilangwiseli, mpe na libaku moko nakimaki mosala ya soda. Nsukansuka, naboyaki mosala ya soda, kasi nazalaki kaka na mikakatano. Atako nazalaki na bomoi ya mobulumobulu mpamba te nazalaki kosalela bilangwiseli mpe komela masanga mingi, nazalaki kosepela na Biblia mpe nazalaki na mposa makasi ya komityela mokano na bomoi. Na nsuka, nakutanaki na Batatoli ya Yehova, nabongolaki lolenge ya bomoi na ngai mpe nayambaki solo.
“Nzokande, esalaki bambula mingi liboso ete natika makambo mabe ya bomoto na ngai. Nayinaki likambo babéngi bokonzi likoló na ngai mpe nazalaki kotomboka ntango bapesi ngai toli. Atako nazalaki na mposa ya kosala mingi na mosala ya Yehova, bolɛmbu yango ezalaki kopekisa ngai. Nsukansuka, na lisungi ya bankulutu mibale ya boboto, nandimaki bolɛmbu na ngai, mpe nabandaki kosalela toli oyo bapesaki ngai na bolingo uta na Makomami. Atako mwa mayoki ya nkanda eyaka na bantango mosusu, sikawa nasili kolongola bomoto ya botomboki. Nazali kotɔ́nda Yehova mingi mpo na motema molai amoniseli ngai mpe mpo na lisungi ya bolingo oyo bankulutu bapesaki ngai. Na ntina na bokoli nasali na elimo, nautaki koponama lokola mosaleli na misala.”
Ndenge Nicolas amonaki yango, kobongola ezaleli oyo omesanaki na yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Tokoki kokutana na mokakatano motindo moko. Mbala mosusu totungisamaka mingi na makambo mabe oyo bato basalaka. Ekoki kozala ete tozali kobomba nkanda, to mpe tolingi kozala na lipanda. Yango, ekoki kokanga bokoli na biso na elimo. Batuli na diama bakutanaka na makambo motindo wana na mabanga oyo babéngaka naat. Yango ezali mitindo mibale mikeseni ya mabanga ya diama oyo ekangami esika moko uta kobanda na yango. Mpo na yango, naat ebimaka na mitindo mibale ekeseni, yango wana kopalola yango ezalaka mpasi. Epai na biso, tozali kokuta “mposa” ya kosala malamu ezali kobunda na “mposa” ya nzoto ya kozanga kokoka. (Matai 26:41; Bagalatia 5:17) Na bantango mosusu, tokoki koyoka ete topusami ete tótika etumba yango, kokanisáká ete ntina ya koboma nzoto ezali te mpo na kozanga kokoka ya bomoto na biso. Tokoki ata koloba ete, ‘kutu, bandeko na ngai mpe baninga na ngai balingaka ngai kaka.’
Nzokande, soki tolingi kosalela bandeko na biso mpe kokumisa Tata na biso ya likoló, tosengeli ‘koyeisa sika makasi oyo epusaka makanisi na biso’ na kolatáká bomoto ya sika. Milende oyo tokosala ezali na ntina, ndenge Nicolas mpe bato mingi mosusu bakoki kondimisa yango. Motuli na diama ayebi ete litɔnɔ moko ekoki kobebisa diama mobimba. Bobele bongo, soki tokomonisa bopɔtu na bolɛmbu ya bomoto na biso, tokoki kobebisa elimo na biso. Likambo ya mabe koleka, bolɛmbu oyo ekɔmeli ekoki komema biso kino kokwea na elimo.—Masese 8:33.
Lokola “mɔ́tɔ” kati na biso
Motuli na diama alukaka kobatela kongɛnga oyo ezali kati na diama. Asalaka yango na kobongisáká libándá ya diama mpo ete ebimisa ngɛlingɛli. Na kati ya diama ngɛlingɛli emonanaka na liboso mpe na nsima, kobimisáká mɔ́tɔ oyo engɛngisaka diama. Bobele bongo, elimo ya Nzambe ekoki kozala lokola “mɔ́tɔ” kati na biso.—1 Batesaloniki 5:19; Misala 18:25; Baloma 12:11.
Kasi ezali boni soki tomoni ete tosengeli komipesa na elimo? Yango ekoki kosalema ndenge nini? Tosengeli ‘kotalela banzela na biso.’ (Nzembo 119:59, 60, NW) Yango esɛngaka koyeba makambo oyo mazali kolɛmbisa biso na elimo mpe na nsima koluka misala nini ya Teokrasi tosengeli kolanda kosala na molende. Tokoki kosepela lisusu mingi na makambo ya elimo na nzela ya boyekoli ya biso moko ya pɔsɔ na pɔsɔ mpe na mabondeli ya etingya. (Nzembo 119:18, 32; 143:1, 5, 8, 10) Na koleka, kosalana elongo na baoyo bazali kosala mingi kati na kondima, tokolendisa ekateli na biso ya kosalela Yehova na molende.—Tito 2:14.
Louise, moklisto moko ya mwasi, andimaki ete: “Liboso ete nabanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, nalekisaki mbula mibale ya kokanisa mpo na kotondisa lokasa ya lisɛngi ya kosala lokola mobongisi-nzela. Eloko moko te ezalaki kopekisa ngai, kasi namesanaki na bomoi ya pɛpɛlɛ, mpe nazalaki kosala ata molende moko te mpo na kotika yango. Na nsima tata na ngai akufaki na mbalakaka. Nasosolaki ete bomoi ezali motau mpe nazalaki kosalela bomoi na ngai na lolenge ebongi te. Bongo, nabongolaki lolenge na ngai ya kotalela makambo na elimo, nabakisaki milende na mosala ya Nzambe, mpe nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Baoyo basungaki ngai mpenza na likambo yango ezali bongo bandeko mibali mpe basi oyo ntango nyonso bazalaki kosimba bibongiseli ya mosala ya kosakola mpe baoyo bazalaki kobima na ngai pɔsɔ na pɔsɔ na mosala ya kosakola. Nayekolaki ete ezala makambo ya malamu to ya mabe, tómekolaka makanisi mpe mikano ya baoyo bazali baninga na biso.”
Topelisami lokola ebende
Diama ezali libanga eleki makasi kati na mabanga nyonso ya mabelé. Na yango, esengeli kozala na diama moko mpo na kokata diama mosusu. Yango ekoki kokundwela moyekoli ya Biblia lisese oyo elobi ete: “Ebende ekopelisaka ebende. Bongo moto [akopelisaka, NW] elongi ya moto mosusu.” (Masese 27:17) Ndenge nini elongi ya moto ‘epelisamaka’? Moto moko akoki kolonga kokolisa mayele mpe elimo ya moto mosusu, lolenge moko bakoki kosalela eteni ya ebende mpo na kopelisa mbeli oyo esalemi mpe na ebende. Na ndakisa, soki totungisami na mawa mpo ete makambo tokanisaki makosalema kasi masalemi te, elendiseli ya moto moko ekoki kotɛlɛmisa biso. Mawa na biso ekobongwana bongo malamu, mpe tokoki kolendisama mpo na kozongela lisusu mosala na molende koleka. (Masese 13:12) Mingimingi bankulutu ya lisangá bakoki kopelisa biso na nzela ya bilendiseli mpe batoli ya Makomami mpo ete tókolisa makoki na biso. Bazali kolanda lilako Salomo alobaki ete: “Lakisá moto na mayele mpe akoleka na mayele; teyá moyengebene mpe akobakisa boyebi.”—Masese 9:9.
Ya solo, kobongisama na elimo ezwaka ntango. Na boumeli ya mbula koleka zomi, ntoma Paulo alakisaki Timoté boyebi mpe lolenge na ye ya koteya. (1 Bakolinti 4:17; 1 Timoté 4:6, 16) Kobongisama oyo Mose apesaki Yosua na boumeli ya mbula koleka 40 epesaki libota ya Yisalaele litomba ya ntango molai. (Yosua 1:1, 2; 24:29, 31) Elisa atambolaki elongo na mosakoli Eliya soko mbula motoba, azwaki mateya malamu mpo na mosala na ye oyo esengelaki koumela soko mbula 60. (1 Mikonzi 19:21; 2 Mikonzi 3:11) Na ndenge bazali kolakisa bato mosusu mokemoke mpe na motema molai, bankulutu bazali kolanda ndakisa ya Paulo, ya Mose, mpe ya Eliya.
Kopesa longonya ezali na ntina mingi kati na kobongisama. Kopesa bandeko matɔ́ndi mpo na mikumba mikokisami malamu mpe misala mibongi na kokumisama ekopusa bango ete básalela Nzambe lisusu mingi. Kopesa longonya etongaka elikya oyo epesaka makasi mpo na kolonga bolɛmbu. (Kokanisá na 1 Bakolinti 11:2.) Komipesa mingi na mosala ya kosakola Bokonzi mpe na misala misusu ya lisangá elendisaka moto mpo akola kati na solo. (Misala 18:5) Ntango bankulutu bazali kopesa bandeko mikumba engebene bokoli na bango na elimo, bandeko yango bakokóma na makoki mpe ekolendisa mposa na bango ya kolanda kokola na elimo.—Bafilipi 1:8, 9.
Ntina malamu mpo na kokola na elimo
Diama etalelamaka lokola eloko ya motuya. Ezali mpe bongo mpo na baoyo bazali sikawa kokóma basangani ya libota ya basambeli ya Yehova na mokili mobimba. Kutu, Nzambe ye moko azali kobénga bango biloko “kitoko” to “na motuya” ya mabota nyonso. (Hagai 2:7, NW, maloba na nse ya lokasa) Na mbula eleki, bato 375 923 bazwaki batisimo mpo na kokóma Batatoli ya Yehova. Na boyokani na bokoli yango, esengeli ‘koyeisa hema monene.’ Na kokoláká na elimo—mpe na kondimáká mikumba na mosala ya boklisto—tokozala na likoki ya kosangana na kobatela bokoli yango.—Yisaya 54:2, NW; 60:22.
Na bokeseni na diama mingi ya motuya oyo ebatelami na basanduku mpe emonanaka epai ya bato mingi te, biloko na biso ya motuya ekoki kongɛnga makasi. Mpe lokola tozali mbala na mbala kopɛtola mpe komonisa bizaleli na biso ya boklisto, tozali kokumisa Yehova Nzambe. Yesu alendisaki bayekoli na ye ete: “Tiká ete moi na bino engɛnga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe ete bákumisa Tata na bino oyo azali na likoló.” (Matai 5:16) Ya solo, yango epesi biso ntina malamu mpo na kokola na elimo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.