Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/7 lok. 32
  • “Ezali solo ete Nzambe atumbaka bato na lifelo?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ezali solo ete Nzambe atumbaka bato na lifelo?”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/7 lok. 32

“Ezali solo ete Nzambe atumbaka bato na lifelo?”

“Boyekolaka nde teoloji?”

Motuna wana ekamwisaki Joel na Carl. Bilenge yango mibale​—bandeko oyo basalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na etúká ya New York​—bazalaki kotalatala mikanda na magazini moko ya pene, esika batɛkaka mikanda. Ntango Joel azalaki kotalatala mikanda oyo esalisaka na koluka mikapo ya Biblia, Carl azalaki koyebisa ye lisolo oyo asololaki na moto moko na mosala ya kosakola. Moto moko oyo atɛlɛmaki pembeni na bango alandaki mwa ndambo ya lisolo na bango, mpe apusanaki pene na bango.

Nzokande, mposa mpenza ya moto yango ezalaki kaka te ya koyeba soki bazalaki koyekola teoloji to te; kasi likambo moko ezalaki kotungisa ye. Ayebisaki bango boye: “Nazali Moyuda, mpe baninga na ngai mosusu oyo bazali baklisto bayebisaka ngai ete nakotumbama na lifelo mpo ete Bayuda baboyaki Yesu. Likambo yango etungisaka ngai mingi. Ezali mpenza sembo te ete Nzambe ya bolingo apesa bato etumbu ya lolenge wana. Ezali solo ete Nzambe atumbaka bato na lifelo?”

Joel na Carl bayebisaki moto yango ya motema sembo ete bazali bayekoli ya solosolo ya Biblia. Na nzela ya Makomami, bamonisaki ye ete bakufi bayebi likambo moko te mpe balali na liwa, bazelaka kaka lisekwa. Yango elingi koloba ete banyokwamaka te to batumbamaka te libela na libela na kati ya lifelo. (Nzembo 146:3, 4; Mosakoli 9:5, 10; Danyele 12:13; Yoane 11:11-14, 23-26) Ntango lisolo na bango oyo eumelaki miniti 45 esukaki, moto yango apesaki Joel na Carl adresi na ye mpe asɛngaki bango báya koyebisa ye makambo mosusu etali motuna oyo atunaki bango.

Soki lifelo ezalaka mpenza esika oyo bato banyokwamaka na kati ya mɔ́tɔ, nani alingaki kosɛnga ete bátinda ye kuna? Nzokande, ntango Yobo alingaki kokima mikakatano oyo azalaki na yango, asɛngaki boye: “Nani akondima kosalela ngai likambo oyo, ete okoka kobatela ngai na kati ya lifelo, mpe obomba ngai tii nkanda na yo ekoleka?” (Yobo 14:13, ya Douay Version) Ya solo, Yobo azalaki kokanisa te ete lifelo ezali esika ya minyoko. Kutu, asɛngaki ete azwa libateli na esika yango. Soki moto akufi elingi koloba azali lisusu na bomoi te, mpe lifelo oyo Biblia elobelaka ezali nde lilita ya bato nyonso.

Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo ekómelaka biso soki tokufi, mpe elikya nini ekoki kozala nsima ya liwa, tokosepela mingi ete ondima libyangi oyo elandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto