Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/7 nk. 29-31
  • Origène​—Ndenge nini mateya na ye ebebisaki eklezia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Origène​—Ndenge nini mateya na ye ebebisaki eklezia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Azalaki na molende mpo na eklezia
  • ‘Akendaki mosika koleka makambo oyo ekomamá’
  • Babengi ye mopɛngwi
  • “Babengi yango na lokuta mpenza ete ‘boyebi’ ”
  • Bomoi ya seko na mabelé—Elikya oyo ebombamaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Lolenge liteya yango ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda, na mangomba ya boklisto mpe na Lingomba ya Bamizilma
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Batata ya lingomba balongisaki solo ya Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mateya ya filozofi ya Bagreke-Ebongisaki mateya ya boklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/7 nk. 29-31

Origène​—Ndenge nini mateya na ye ebebisaki eklezia?

“Ye nde mokambi ya eklezia oyo aleki bakambi nyonso nsima ya bantoma.” Wana ezali maloba ya Jérôme, mobali oyo abongolaki Biblia Vulgate ya Latin; alobaki bongo mpo na kokumisa Origène, moto moko ya teoloji oyo azalaki na bomoi na ekeke ya misato. Kasi bato nyonso te nde bazalaki kokumisa ye ndenge wana. Ezalaki na bato mosusu oyo bazalaki kotalela ye lokola mosisa ya mabe oyo ebotaki mateya ya kopɛngwisa bato. Mokomi moko na ekeke ya 17 akomaki mpe maloba ya bato oyo bazalaki koboya mateya ya Origène; balobaki boye: “Mateya na ye mingi ezali mpasi mpo na kososola mpe ezali ya likama, ezali ngɛngɛ oyo ebomaka lokola Nyoka, asanzi yango na kati ya mokili.” Kutu, bambula koleka nkama minei nsima ya liwa ya Origène, eklezia epekisaki mateya na ye, ebengaki ye mopɛngwi.

MPO na nini bato mosusu bazalaki kolinga Origène kasi bamosusu bazalaki koboya ye? Ndenge nini balandaki makanisi na ye na mateya ya eklezia?

Azalaki na molende mpo na eklezia

Origène abotamaki soki na mobu 185 na ntango na biso (T.B.), na engumba Alexandrie, na Ezipito. Ayekolaki makambo nyonso oyo Bagrɛki bazalaki kotángisa na kelasi; kasi tata na ye, Leonides, asɛngaki na ye ete ayekola mpe Makomami ndenge ayekolaki makambo wana. Ntango Origène akómaki na mbula 17, mokonzi ya Loma abimisaki mobeko oyo epekisaki makambo ya kolongwa na lingomba moko mpe kokɔta na lingomba mosusu. Bakangaki tata ya Origène mpe batyaki ye na bolɔkɔ mpo akómaki moklisto. Molende oyo Origène azalaki na yango etindaki ye azwa mokano ya kokende kokɔta bolɔkɔ mpe kokufa martiru esika moko na tata na ye. Ntango mama na ye amonaki bongo, azwaki bilamba ya Origène, abombaki yango mpo akende te. Bongo, Origène akomelaki tata na ye mokanda; mpe asɛngaki ye boye: “Kolinga ata moke te makanisi na yo ebongwana mpo na bolamu na biso.” Léonide akangamaki na losambo na ye mpe babomaki ye; libota na ye etikalaki mabɔkɔ mpamba. Kasi, lokola Origène atángaki kelasi oyo ekoki mpenza, akómaki kotángisa makambo ya kelasi ya Bagrɛki; na ndenge wana nde azwaki mwayɛ ya kosalisa mama na ye na balɛki na ye motoba ya mibali.

Mposa ya mokonzi ya Loma ezalaki ya kopekisa ete mateya ya boklisto epalangana lisusu te. Mobeko wana etalaki kaka bayekoli te kasi mpe bateyi; yango wana, balakisi nyonso ya mateya ya boklisto bakimaki Alexandrie. Kasi, ntango bato oyo bazalaki baklisto te bakómaki na mposa ya koyekola Makomami, basɛngaki na elenge Origène asalisa bango, mpe Origène azalaki kotalela mosala yango lokola mokumba oyo euti mpenza epai ya Nzambe. Bato mingi kati na bayekoli na ye babomamaki lokola bamartiru, bamosusu kutu basilisaki naino kelasi yango te. Atako ayebaki ete bakoki koboma ye, Origène azalaki kobanga te kolendisa bayekoli na ye polelepolele, ezala ntango batɛlɛmi liboso ya zuzi, to ntango bazali na bolɔkɔ, to ntango balingi bákende koboma bango. Eusèbe, mokomi ya makambo ya kala, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya minei, alobaki ete ntango bazalaki kokende koboma bango, Origène azalaki koya “na mpiko mpenza, kopesa bango bizi mpo na kokumisa bango.”

Bato mingi oyo bazalaki baklisto te basilikelaki Origène makasi, bazalaki koloba ete ye nde moto alongoli baninga na bango na lingomba mpo na kobomisa bango. Mbala mingi, ebele ya bato bazalaki koluka kokanga ye mpo na kosala ye mabe mpe koboma ye na ndenge ya nsɔmɔ. Atako azalaki kolongwalongwa na bisika oyo azalaki kofanda mpo na kokima bato oyo bazalaki koluka ye, atikaki te mosala na ye ya koteya. Kutu Demetrius, episkopo ya Alexandrie, akamwaki mingi na mpiko na ye mpe ndenge azalaki komipesa. Yango wana, ntango Origène azalaki kaka na mbula 18 mpamba, Demetrius atyaki ye mokambi ya eteyelo ya makambo ya losambo na Alexandrie.

Nsukansuka, Origène akómaki moto monene ya mayele mpe mokomi ya babuku ebele. Bato mosusu balobaki kutu ete akomaki babuku 6 000; kasi emonani ete balekisaki ndelo na likambo yango. Origène ayebani mingi mpenza mpo na buku na ye Hexaples, buku moko ya monene mpenza, oyo ezali na Makomami ya Liebele na bavolimi 50. Origène akabolaki Hexaples yango na biteni motoba oyo ezalaki na: (1) makomi ya Liebele mpe ya Arameyɛ, (2) liloba mokomoko ya makomi wana kasi na alfabɛ ya Grɛki, (3) libongoli ya Akila na Grɛki, (4) libongoli ya Simmaque na Grɛki, (5) Septante ya Grɛki, oyo Origène abongisaki lisusu mpo ekokana mpenza na makomi ya Liebele, mpe (6) libongoli ya Théodotion na Grɛki. Moto moko ya mayele na makambo etali Biblia, nkombo na ye John Hort, akomaki boye: “Soki Origène atyaki mikanda nyonso wana esika moko, ezali mpo alingaki ete makanisi ya mikapo mingi oyo ekokaki kozala mpasi to kopesa mobulu epai ya moto oyo azali kotánga yango na Grɛki emonana polelepolele; mpo, soki moto yango azali kaka na Septante mpamba akokanga ntina ya mikapo yango te.”

‘Akendaki mosika koleka makambo oyo ekomamá’

Origène azalaki na ndenge na ye ya koteya Makomami; nzokande, mateya kilikili oyo ezalaki na ekeke wana ya misato, na makambo ya losambo, ebebisaki mpenza ndenge na ye ya koteya. Atako na ntango wana, mangomba ya boklisto eutaki kosalama sika, kasi ekómaki kondima makambo mosusu oyo eutaki na Makomami te, mpe bandako-nzambe na yango oyo ezalaki bipai na bipai ezalaki kopesa mateya ya ndenge na ndenge.

Origène andimaki mwa ndambo ya mateya yango oyo eutaki na Makomami te; alobaki ete ezalaki mateya ya bantoma. Kasi akómaki mpe kopesa makanisi na ye moko na makambo mosusu. Na ntango wana, bayekoli na ye mingi bazalaki kobundabunda na makambo ya filozofi ya mikolo wana. Mpo na kosalisa bango, Origène ayekolaki malamumalamu mateya ndenge na ndenge ya bato ya filozofi oyo ezalaki kosepelisa bayekoli na ye wana ya bilenge. Abandaki kopesa bango biyano ya solosolo na mituna oyo bazalaki kotuna na makambo ya filozofi.

Origène akómaki koluka kosangisa Biblia na filozofi; mpo na kosala yango, abandaki kolimbola Makomami na ndenge ya bikanisakanisa. Azalaki koloba ete mikapo ya Makomami ezalaka ntango nyonso na ndimbola oyo ebombamá na nse, kasi mpenzampenza te oyo ya kolanda makambo ndenge ekomami. Moto moko ya mayele alobaki ete likambo yango epesaki Origène “mwayɛ ya kolimbola na kati ya Biblia makanisi ya ndenge nyonso, oyo, atako eutaki na Biblia te, eyokanaki na mateya na ye moko ya teoloji; mpe ntango azalaki kosala bongo, azalaki mpe kobɛta ntolo ete ye moko kaka nde moto alimbolaka makanisi ya Biblia na esengo mpe na bosembo (azalaki mbala mosusu koyeba te ete azalaki nde kobebisa).”

Mokanda oyo Origène atindelaki moko ya bayekoli na ye ezali komonisa makanisi oyo ye azalaki na yango. Na mokanda yango alobaki ete bato ya Yisalaele bazwaki wolo ya Ezipito mpe basalaki na yango basaani ya tempelo ya Yehova. Yango wana, na mateya na ye ya bikanisakanisa, abandaki kosalela filozofi ya Bagrɛki mpo na koteya makambo ya boklisto. Akomaki boye: “Biloko oyo bana ya Yisalaele bazwaki na Ezipito esalisaki bango mingi, bato ya Ezipito bazalaki kosalela yango na ndenge ya mabe, kasi Baebele, lokola mayele ya Nzambe ezalaki kolakisa bango nzela, bazwaki biloko wana mpo na kosala na yango mosala ya Nzambe.” Na ndenge wana nde Origène azalaki kolendisa moyekoli na ye wana “aluka kobimisa na kati ya filozofi ya Bagrɛki likambo nyonso oyo akokaki kosalela lokola liteya ya koyekola to ya komibongisa mpo na kozala moklisto.”

Lokola akómaki kolimbola Biblia na ndenge oyo ye moko amonaki malamu, bandelo oyo ezalaki kokabola mateya ya baklisto mpe mateya ya filozofi ya Bagrɛki ezalaki lisusu komonana te. Tópesa ndakisa: na kati ya buku na ye, oyo babengaka Traité des principes, Origène alobaki ete Yesu azali ‘Mwana mobotami-bobele-moko, oyo abotamaki, kasi azali na ebandeli te.’ Mpe abakisaki boye: ‘Kozala na ye ezali na ebandeli te mpe na nsuka te. Soki akómisamaki Mwana, ezalaki te na nzela ya mpema ya bomoi, to na mosala moko boye oyo ekoki komonana, kasi nde na bomoto ya Nzambe mpenza.’

Origène azwaki likanisi wana na kati ya Biblia te, mpo Makomami eteyi nde ete Mwana ya Yehova, oyo azali mobotami-se-moko, azali “Mwana ya liboso kati na biloko oyo Nzambe asala” mpe azali “Ebandeli ya biloko nyonso Nzambe asala.” (Kolosai 1:15, Boyokani ya Sika; Koyebisa (Emoniseli) 3:14, Boyokani ya Sika) Mokomi moko ya makambo ya mangomba ya kala, nkombo na ye Augustus Neander, alobaki ete ezali “mateya ya filozofi oyo [Origène] azwaki na eteyelo ya Platon” nde epesaki ye likanisi wana ya ‘Kozala oyo ezangi ebandeli mpe nsuka.’ Lokola abakisaki makambo ndenge wana, Origène abukaki mobeko ya Makomami oyo elobi ete: “Bókende te mosika koleka makambo oyo ekomamá.”​—1 Bakolinti 4:6, NW.

Babengi ye mopɛngwi

Na bambula ya ebandeli ya mosala na ye ya molakisi, na likita moko ya bakambi ya lingomba oyo esalemaki na Alexandrie, babɔtɔlaki Origène mokumba na ye ya nganga-nzambe. Esalemaki bongo mbala mosusu mpo Episkopo Demetrius akómaki koyokela Origène zuwa na ndenge bato bazalaki kokumisa ye mingi. Origène alongwaki wana mpe akendaki na Palestine, epai bato bazalaki naino kosepela na ye mpe koloba ete azali moto monene oyo akɔtelaka mateya ya boklisto; mpe akobaki na mosala na ye ya nganga-nzambe kuna. Na nsima, ntango mateya oyo bazalaki kobenga “lipɛngwi” ebimaki na mbalakaka na mikili ya Ɛsti, basɛngaki ye asalisa baepiskopo oyo bapɛngwaki bázongela mateya ya malamu. Origène akufaki na mobu 254 T.B.; kasi nsima ya liwa na ye, nkombo na ye esambwaki mpenza kosambwa. Mpo na nini?

Ntango boklisto ya nkombo mpamba ekómaki lingomba monene, eklezia emonisaki polelepolele mateya nini endimami ete ezali mateya ya malamu, oyo lingomba ekobanda kosalela. Yango wana, bato ya teoloji oyo bayaki nsima balingaki ata koyoka te makanisi ya Origène oyo eutaki na filozofi, oyo ezalaki mateya ya bikanisakanisa mpe ya bongolabongola. Kutu mateya na ye ebimisaki bantembe makasi na kati ya eklezia. Bongo, mpo na kosilisa bantembe yango mpe kobatela bomoko ya eklezia, bapekisaki mateya na ye mpe babengaki ye mopɛngwi.

Longola Origène, ezalaki mpe na bato mosusu oyo bazalaki na kati ya mabunga ya ndenge wana. Likambo ya kokamwa ezali te, mpo Biblia esakolá yango banda kala ete bato mingi bakotika mateya ya pɛto ya Klisto. Lipɛngwi yango ebandaki komonana mingimingi mpenza pene na nsuka ya ekeke ya liboso, ntango bantoma nyonso ya Yesu bakufaki. (2 Batesaloniki 2:6, 7) Nsukansuka, baklisto mosusu ya nkombo mpamba bakómaki koloba ete bango nde bazali na “mateya ya malamu,” mpe bazalaki kobenga bamosusu oyo batikali “bapɛngwi.” Kasi bazalaki komikosa, mpo mangomba nyonso ya boklisto epɛngwá banda kala mosika na boklisto ya solosolo.

“Babengi yango na lokuta mpenza ete ‘boyebi’ ”

Atako mateya ya Origène ezalaki ya bikanisakanisa mingi, mikanda oyo akomaki ezali na mwa makambo mosusu ya malamu. Na ndakisa, na kati ya mokanda Hexaples, nkombo ya Nzambe ekomami kuna ndenge ezalaki kokomama na balɛtrɛ minei ya Liebele, oyo babengaka Tetragramɛ. Likambo yango emonisi polele ete baklisto ya liboso bayebaki nkombo ya Nzambe​—Yehova​—mpe bazalaki kosalela yango. Kasi kebá, mokonzi moko ya eklezia, nkombo na ye Theophilus, alobaki boye: “Mikanda ya Origène ezali lokola matiti oyo ezali na bafololo ndenge na ndenge. Soki namoni fololo moko ya kitoko na kati, nabuki yango; kasi soki namoni eloko moko boye ya nzubɛnzubɛ, nakimi yango ndenge bakimaka nsende.”

Lokola Origène asangisaki mateya ya Biblia na oyo ya filozofi ya Bagrɛki, mateya na ye ya teoloji etondaki na mabunga mingi, mpe mangomba ya boklisto ebebaki makasi mpo na yango. Na ndakisa, atako, nsima ya bambula, baboyaki mateya mingi ya Origène epai bikanisakanisa elekaki ndelo, nzokande makanisi na ye oyo elobi ete ‘kozala ya Klisto ezali na ebandeli te mpe na nsuka te’ endimamaki, mpe ebotaki liteya oyo babengi Bosato, oyo ezali kutu te na kati ya Biblia. Buku moko, nkombo na yango Eklezia ya bikeke misato ya liboso (na Lingelesi) elobaki boye: “Filozofi [oyo Origène abandisaki] elingamaki mingi koleka mpe kolingama wana ezalaki eloko ya kosuka lelo to lobi te.” Yango ebotaki mbuma nini? “Mateya ya kondima ya baklisto oyo ezalaki pɛtɛɛ ebebaki, mpe Eklezia etondaki na mateya ya kobungisa bato nzela.”

Mawa mingi, Origène mbɛlɛ asalaki malamu soki alandaki toli oyo ntoma Paulo apesaki ya “koboya bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo ya bosantu mpe bongolabongola ya oyo ebengami na lokuta mpenza ete ‘boyebi’”; mbɛlɛ lipɛngwi oyo ebimaki mpo na ye elingaki kobima te. Kasi lokola akómaki nde kozwa mateya na ye na kati ya “boyebi” wana, ‘apɛngwaki mosika na kondima.’​—1 Timote 6:20, 21; Bakolose 2:8, NW.

[Elilingi na lokasa 31]

“Hexaples” ya Origène emonisi ete bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe na Makomami ya Greki ya boklisto

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya Syndics of Cambridge University Library, T-S 12.182

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]

Culver Pictures

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto