Lisolo ya bomoi
Nazali kozongisa matɔndi soki nakanisi makambo malamu oyo nakutaná na yango!
YA DRUSILLA CAINE
Ezalaki na 1933, toutaki kobalana na Zanoah Caine, mpe biso mibale tozalaki babongisi-nzela, elingi koloba basakoli ya ntango nyonso. Motema na ngai ezalaki kobɛta ntango nazalaki komilɛngɛla mpo na kosala elongo na mobali na ngai na teritware na ye, kasi mpo na kosala yango esengelaki nazala na velo. Kasi na ntango wana nazalaki na makoki ya kosomba velo te, mpo na bambula wana nkita ekweaki makasi, ekómaki mpasi mpo na kozwa mbongo. Nalingaki kosala nini?
NTANGO balɛki ya mobali na ngai bayebaki mokakatano oyo nazalaki na yango, balukaki bibende ya velo na bisika oyo babwakaka biloko ekufá, mpo na kosalela ngai velo. Bazwaki yango mpe basalelaki ngai velo! Ntango kaka nasilisaki koyekola kotambwisa velo, nakómaki kotambola na Zanoah, na esengo mpenza, tozalaki kotambola na etúká ya Worcester mpe ya Hereford, mpe tozalaki kopesa litatoli epai ya moto nyonso oyo tozalaki kokutana na ye.
Nayebaki te ete mwa ebandeli wana ya kondima na ngai elingaki komema ngai na bomoi oyo etondi na makambo mingi ya malamu. Kasi, baboti na ngai ya bolingo nde bato basalisaki ngai na ebandeli mpo na makambo ya elimo.
Bampasi na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba
Nabotamá na sanza ya Desɛmbɛ 1909. Mwa moke na nsima, mama na ngai azwaki mokanda Le divin Plan des Âges, mpe na 1914, tokendaki elongo na baboti na ngai na Oldham, na etúká ya Lancashire, kotala “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” (Nyonso mibale ebimisamaki na Batatoli ya Yehova.) Atako nazalaki naino elenge, nabosanaka te ete ntango tozalaki kozonga na ndako, nazalaki kopumbwa na esengo mpo na makambo oyo namonaki! Na nsima, Frank Heeley afungolaki etuluku moko ya boyekoli ya Biblia, na Rochdale, mboka oyo tozalaki kofanda. Boyekoli yango esalisaki libota na biso na kokólisa bososoli ya Makomami.
Kimya na biso eyaki kobeba kaka na mbula wana, ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki. Babengisaki tata na ngai na mosala ya soda, kasi aboyaki kokende na bitumba. Zulunalo moko ya Angleterre eyebisaki ete na tribinale balobaki ete azali “moto moko malamu,” mpe bazwaki mikanda mingi ya “bato oyo ezali komonisa ete bandimi ete soki aboyi kosimba mondoki, ezali mpenza na bosembo.”
Kasi, na esika bálongola ye mpenza na mosala ya soda, balongolaki kaka nkombo na ye na molɔngɔ ya “basoda oyo bakendaka bitumba.” Mbala moko, bato bakómaki kotyola ye, bakómaki mpe kotyola ngai na mama. Nsukansuka, batalelaki lisusu mosala oyo ebongaki na ye, mpe batindaki ye na mosala ya bilanga, kasi bankóló-bilanga mosusu bazalaki kofuta ye mbongo moke to mpe bazalaki kopesa ye eloko te. Mpo na kozwa mbongo ya kosunga libota, mama akómaki kosala, mpo na mwa lifuti moke, mosala makasi na kompanyi ya moto moko oyo ezalaki kosukola bilamba. Atako bongo, namoni sikoyo ete ndenge nayikelaki mikakatano ya lolenge wana mpiko na bambula ya ebandeli ya bomoi na ngai, elendisaki ngai mingi; yango esalisaki ngai napesa motuya mingi na makambo ya elimo oyo eleki ntina.
Tobandi na mwa bato moke
Eumelaki te, Daniel Hughes, moyekoli ya Biblia ya molende, ayaki kosangana na biso. Azalaki kosala mosala ya kotimola charbon na Ruabon, mboka moko oyo ezalaki na kilomɛtrɛ 20, longwa na Oswestry, esika oyo azalaki kofanda. Nazalaki kobenga ye Tonton Dan, azalaki ntango nyonso koya kotala biso, mpe mbala nyonso oyo azalaki koya, masolo na ye ezalaki kaka ya Biblia. Azalaki kosolola makambo ya mpambampamba ata mbala moko te. Tobandaki koyekola Biblia na Oswestry na 1920, mpe na 1921, Tonton Dan apesaki ngai mokanda La harpe de Dieu. Nalingaki yango mingi mpamba te ezalaki kokómisa mateya ya Biblia pɛtɛɛ mpo nakanga ntina na yango.
Tozalaki mpe na Pryce Hughes,a oyo na nsima akómaki mokɛngɛli ya ndako na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Londres. Libota na bango mobimba bazalaki kofanda mosika te na biso, na Bronygarth, na ndelo ya Pays de Galles, mpe Cissie, ndeko na ye ya mwasi, akómaki moninga ya motema ya mama na ngai.
Nazali komikundola esengo oyo tozalaki na yango na 1922, ntango balendisaki biso ‘tósakola Mokonzi mpe bokonzi na ye.’ Na bambula oyo elandaki, atako nazalaki naino na kelasi, nasanganaki na bolingo malamu na mosala ya kokabola batrakte moko ya ntina mingi; mingimingi na 1924, ntango tokabolaki trakte oyo ezalaki na motó ya likambo ete Tofundi bakonzi ya mangomba na makambo oyo. Soki nazongisi makanisi na ntango wana, nazalaki mpenza na libaku malamu ya kosangana na bandeko mingi mibali mpe basi ya sembo—kati na bango Maud Clarkb mpe moninga na ye Mary Grant,c Edgar Clay,d Robert Hadlington, Katy Roberts, Edwin Skinner,e elongo na Percy Chapman mpe Jack Nathanf oyo bakendaki bango mibale na Canada mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala kuna.
Lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bamililo ya bato oyo bazali na bomoi lelo bakokufa te,” epesaki mpenza litatoli oyo ebongi na teritware na biso oyo ezalaki se kokola. Na mokolo ya 14 Mai 1922, Stanley Rogers, ndeko ya Pryce Hughes, autaki Liverpool mpe ayaki kosala lisukulu yango na Chirk, mboka oyo ezalaki na Nɔrdi ya engumba na biso, mpe na nsima, kaka na mpokwa yango, asalaki mpe lisukulu yango na ndako oyo balakisaka sinema na Oswestry. Tii lelo, nabatelaka lokasa oyo babimisaki mpo na kobengisa bato na likita yango. Na boumeli ya ntango nyonso wana, bandeko misato: Herbert Senior, Albert Lloyd mpe John Blaney—oyo bazalaki bakɛngɛli-batamboli (pèlerins, ndenge tozalaki kobenga bango), bazalaki ntango nyonso koya kotala mwa etuluku na biso mpe kolendisa biso.
Ntango ya kozwa ekateli
Na 1929, nazwaki ekateli ya kozwa batisimo. Nazalaki na mbula 19, mpe kaka na ntango yango, nakutanaki na komekama ya solosolo mpo na mbala ya liboso. Nakutanaki na elenge mobali moko, oyo tata na ye azalaki moto ya politiki. Asepelaki na ngai, mpe ngai nasepelaki na ye, mpe atunaki ngai libala. Napesaki ye buku Gouvernement, oyo ebimaki mbula moko liboso. Kasi eumelaki te, emonanaki ete azalaki kosepela te na guvɛrnɛma ya likoló, oyo ezalaki motó ya likambo ya buku yango. Na boyekoli na ngai ya Biblia, nayebaki ete Yehova apesaki etinda epai ya Bayisalaele ya ntango ya kala ete bábalana te na bato bazangi kondima; nayebaki ete etinda yango mpe ezali mpo na baklisto. Yango wana, atako ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai, naboyaki tóbalana.—Deteronome 7:3; 2 Bakolinti 6:14.
Maloba ya ntoma Paulo oyo elobi ete: “Tólɛmbaka mpo na kosalaka malamu te zambi na ntango oyo ekoki, tokobuka soki tokotika motema te” elendisaki ngai. (Bagalatia 6:9) Tonton Dan mpe alendisaki ngai, ntango akomaki ete: “Ntango okutani na komekama, ezala ya monene to ya moke, salelá Baloma 8, versɛ 28, oyo elobi ete: “Toyebi ete Nzambe akosalana mosala mpo na malamu kati na makambo nyonso epai na bango bakolingaka ye, bango babyangami mpo na mokano na ye.” Ezalaki pɛtɛɛ te, kasi nayebaki ete ekateli oyo nazwaki ezalaki ya malamu. Na mbula yango, nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela.
Nakutani na mokakatano
Na 1931, tozwaki nkombo na biso ya sika, Batatoli ya Yehova, mpe na mbula yango, tozalaki na kampanye monene ya kokabola mwa buku Bokonzi, elikya ya mokili. Tokabolaki mwa buku yango epai ya bato nyonso ya politiki, bakonzi ya mangomba mpe bato ya mombongo. Teritware na ngai ebandaki na Oswestry tii na Wrexham, soki kilomɛtrɛ 25 na Nɔrdi. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kosala teritware yango mobimba.
Na mbula oyo elandaki, ntango tokendaki na liyangani moko na Birmingham, bazalaki koluka basali ya bolingo malamu 24. Na bolingo malamu, bandeko 24 kati na biso topesaki bankombo mpo na mosala ya sika oyo balingaki kopesa biso, kasi toyebaki te soki mosala yango ekozala nini. Tokamwaki mpenza ntango batindaki biso mibalemibale ete tókabola mwa buku yango, Bokonzi, elikya ya mokili; na mbala oyo tolataki bitanda oyo bakomaki maloba oyo ezali kosakola Bokonzi.
Nazalaki komitungisa mingi ntango tozalaki kosakola pembeni ya ndako-nzambe, kasi nazalaki komibɔndisa lokola nayebaki ete na engumba wana, moto moko te ayebaki ngai. Nzokande, moto ya liboso oyo ayebaki ngai ezalaki moninga moko ya kala ya kelasi, oyo afungolelaki ngai miso mpe alobaki boye: “Ozali kosala nini na biloko wana olati?” Likambo yango elongolaki ngai kobanga nyonso ya bato oyo nakokaki kozala na yango!
Tokei mboka mopaya
Na 1933, nabalanaki na Zanoah, mobali oyo akufelaki mwasi, mpe oyo alekaki ngai na mbula 25. Mwasi na ye ya liboso azalaki moyekoli ya Biblia ya molende mpenza, mpe nsima ya liwa ya mwasi yango, Zanoah atikalaki na teritware oyo batindaki ye. Eumelaki te, tolongwaki na Angleterre mpe tokendaki na teritware na biso ya sika na Nɔrdi ya Pays de Galles, na ntaka ya kilomɛtrɛ 150. Tokangisaki bakarton, bavalizi mpe biloko mosusu ya ntina na bagidon mpe likoló ya bavelo na biso, mosusu totyaki yango na kati matunga; atako bongo, tokómaki malamu! Na teritware yango, bavelo esalisaki biso mingi—tozalaki kokende na yango bisika nyonso, ezala pene na nsɔngɛ ya Ngomba Cader Idris, ngomba moko ya Pays de Galles, oyo ezali na bolai ya mɛtrɛ 900. Ezalaki mpenza esengo na kokutana na bato oyo bazalaki na mposa ya koyoka “nsango malamu oyo ya Bokonzi.”—Matai 24:14.
Toumelaki naino kuna mingi te ntango bato bayebisaki biso ete moto moko nkombo na ye Tom Pryce azalaki koteya bango, se ndenge biso tozalaki kosala. Nsukansuka, toyebaki esika oyo Tom azalaki kofanda, na Long Mountain, pene na engumba Welshpool—mpe likambo yango ekamwisaki biso mingi! Ntango nabandaki mosala ya kosakola, natikelaki ye mokanda Réconciliation. Ayekolaki yango ye moko, atindaki mokanda na Londres mpo bátindela ye mikanda mosusu, mpe kobanda wana abandaki kotatola na molende mpenza kondima oyo akómaki na yango. Tozalaki na esengo ya kosala boninga mpe kolekisa bangonga mingi elongo na ye, mpe biso misato tozalaki koyekola elongo mpo na kolendisana.
Likama ememi mapamboli
Na 1934, basɛngaki ete babongisi-nzela nyonso oyo bazalaki kofanda pene ya Nɔrdi ya Pays de Galles bákenda na engumba Wrexham, kopesa mabɔkɔ mpo na kokabola mwa buku Mokonzi ya sembo. Na mokolo oyo ezalaki liboso tóbanda kampanye yango, likama moko esalemaki, oyo eyebanaki na ekólo mobimba. Na Gresford, mboka oyo ezwami na kilomɛtrɛ 3 na nɔrdi ya Wrexham, esika moko oyo batimolaka charbon, epanzanaki mpe ebomaki bato ya mosala 266. Bana koleka 200 batikalaki bitike mpe basi 160 bakufelaki mibali.
Esengelaki tósala liste ya bato oyo bakufelaki bandeko na bango, tókende kotala mokomoko na bango mpe tótikela bango mwa buku. Nkombo ya mwasi moko oyo bapesaki ngai natala ye ezalaki Chadwick, oyo akufelaki mwana na ye ya mobali ya mbula 19. Na ntango oyo nakendaki kotala ye, nakutaki Jack, mwana na ye ya mokóló, azali kobɔndisa ye. Mwana mobali yango ayebaki ngai kasi alobaki eloko te. Na nsima, atángaki mwa buku oyo natikelaki bango, mpe alukaki mwa buku mosusu oyo natikelaki ye mwa bambula liboso, oyo ezalaki na motó ya likambo Etumba ya nsuka.
Jack na mwasi na ye May, bayebaki esika oyo nazalaki kofanda mpe bayaki mpo na koluka mikanda mosusu. Na 1936, bandimaki ete tósalaka makita na ndako na bango na Wrexham. Ndeko Albert Lloyd ayaki kotala biso, mpe na nsima ya sanza motoba, lisangá moko efungwamaki, oyo Jack Chadwick akómaki mokɛngɛli-mokambi na yango. Lelo oyo masangá misato ezali na Wrexham.
Tokómi kofanda na kati ya wagɔ
Tii na ntango wana, tozalaki kofanda na ndako nyonso oyo tokokaki kozwa ntango tozalaki kolongwa na mboka moko mpo na kokenda na mboka mosusu; kasi Zanoah azwaki mokano ete ntango ekokaki mpo tózala na ndako ya biso moko, oyo tokokaki komema soki tolongwi na esika moko mpo na kokende na esika mosusu. Mobali na ngai autaki na libota ya bato oyo basalaka bawagɔ; yango wana asalelaki biso wagɔ moko. Tozalaki kobenga yango Elizabeth, nkombo euti na Biblia, oyo elimboli “Nzambe ya kofuluka.”
Mingimingi namikundolaka esika moko oyo tofandaki—ezalaki na elanga ya banzete oyo ezalaki pembeni ya mai. Nazalaki komona yango lokola Paladiso! Eloko moko te ebebisaki esengo oyo tozalaki na yango na bambula oyo tolekisaki elongo na kati ya wagɔ wana, atako ezalaki moke mpe ezalaki na biloko nyonso te. Na ntango ya malili, bilamba ya mbeto ezalaki mbala mingi kokangama na bitutu ya wagɔ, mpe mokakatano mosusu ezalaki mamwɛ oyo ezalaki kokɔta na kati ya wagɔ yango. Esengelaki mpe kokende koluka mai mpe komema yango na kati ya wagɔ; mbala mingi ezalaki mwa mosika, kasi tolongaki mikakatano wana nyonso.
Na eleko moko ya malili, nazalaki maladi mpe tozalaki na biloko mingi te ya kolya mpe tozalaki na mbongo te. Zanoah afandaki na mbeto, asimbaki lobɔkɔ na ngai, mpe atángelaki ngai Nzembo 37:25, oyo elobi ete: “Nazalaki elenge mpe nakómi mobange, nde naino namoni moyengebeni te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga.” Atalaki ngai na miso mpe alobaki boye: “Soki eloko moko esalemi noki te, tokokóma basɛngi; kasi, nandimi te ete Nzambe akotika nzela ete likambo ya ndenge wana esalema!” Na nsima abimaki mpo na kosakola epai ya bato oyo bazalaki kofanda pene na biso.
Na midi, ntango Zanoah azongaki mpo na kosalela ngai mwa eloko ya komɛla, akutaki anvelopi moko. Na kati, ezalaki na livre sterling 50 (dolare 75), oyo tata na ye atindelaki ye. Mwa bambula liboso, bakoselaki Zanoah makambo ete ayibaki mbongo, kasi eyaki komonana ete ezalaki lokuta. Mbongo wana ezalaki nde lomande oyo bafutaki ye mpo na likambo yango. Ekómaki mpenza na ntango malamu!
Liteya ya ntina
Ntango mosusu, tozwaka mateya na makambo mingi soki bambula esi eleki. Na ndakisa, liboso ete natika kelasi na 1927, napesaki litatoli epai ya baninga na ngai nyonso ya kelasi mpe epai ya balakisi nyonso, longola kaka molakisi moko, Lavinia Fairclough. Lokola moto moko te azalaki kosepela na oyo nazalaki kokana kosala na bomoi na ngai, mpe lokola nazalaki mpenza koyokana malamu te na Miss Fairclough, naboyaki koyebisa ye. Kanisá ndenge nakamwaki mpe esengo oyo nazalaki na yango mbula 20 na nsima, ntango mama na ngai ayebisaki ngai ete molakisi wana azongaki kotala baninga mpe bana-kelasi na ye nyonso ya kala mpo na koyebisa bango ete sikoyo azali Motatoli ya Yehova!
Ntango tokutanaki, nalimbolaki mpo na nini nateyaki ye te mpe mpo na nini nayebisaki ye te mosala oyo nazalaki kokana kosala. Ayokaki na likebi mpenza mpe na nsima alobaki ete: “Ntango nyonso nazalaki kaka koluka lingomba ya solo. Ezalaki eloko oyo nazalaki koluka na bomoi na ngai!” Likambo wana ezalaki liteya ya ntina mpo na ngai: nasengeli kokanga monɔkɔ te mpe kozanga kopesa litatoli epai ya moto nyonso oyo nakutani na ye mpe nakoki kozwela moto moko te makanisi mabe liboso.
Etumba mosusu mpe makambo oyo nakutanaki na yango na nsima
Ntango tokómaki kopusana na nsuka ya bambula ya 1930, etumba mosusu ezalaki koya liboso. Batikaki Dennis, leki na ngai ya mobali oyo nalekaki na mbula zomi, akɔtá mosala ya soda te, kasi asengelaki kotikala na mosala ya mosuni oyo azalaki kosala. Atako azalaki mpenza kosepela na mateya ya solo te, ngai na mobali na ngai tosɛngaki Rupert Bradbury, na leki na ye David, oyo bazalaki babongisi-nzela, ete bákende kotala ye. Bakendaki kotala ye mpe andimaki bayekola Biblia. Dennis azwaki batisimo na 1942, na nsima akómaki mobongisi-nzela, mpe na 1957 akómaki mokɛngɛli-motamboli.
Na 1938, Elizabeth, mwana mwasi na biso ya liboso abotamaki, mpe mpo na yango, Zanoah akómisaki wagɔ na biso monene. Ntango Eunice, mwana mwasi na biso ya mibale abotamaki na 1942, tomonaki ete ezalaki malamu tóluka mpenza ndako ya kofanda. Mpo na yango, Zanoah atikaki naino mosala ya mobongisi-nzela mpo na mwa bambula, mpe tokendaki kofanda na mwa ndako moko pene ya Wrexham. Na nsima, tofandaki na Middlewich, mboka oyo ezali pene ya etúká ya Cheshire. Ezali kuna nde mobali na ngai ya bolingo akufaki na 1956.
Bana na biso bakómaki basakoli ya ntango nyonso, mpe bango mibale bazwaki mabala ya malamu. Tii lelo, Eunice na mobali na ye, oyo azali nkulutu, bazali babongisi-nzela minene na Londres. Mobali ya Elizabeth azali mpe nkulutu na lisangá, mpe mpo na ngai ezali esengo ya kozala na bango, na bana na bango, mpe na bana ya bana na bango minei oyo bazali kofanda pembeni na ngai na Preston, na etúká ya Lancashire.
Nazongisaka matondi mingi mpo nakoki kotambola kolongwa na ndako na ngai, kokatisa balabala, tii na Ndako ya Bokonzi. Na bambula oyo euti koleka, nakómaki kosangana na etuluku oyo balobaka lokota ya Gujarati, oyo mpe basanganaka na Ndako ya Bokonzi yango. Koyekola monɔkɔ yango ezalaki pɛtɛɛ te, mpo sikoyo matoyi na ngai eyokaka lisusu malamu te. Ezali mpasi mpo na kokanga mbala moko maloba oyo ekeseni, ndenge elenge akoki kosala yango. Kasi ezali etumba oyo epesaka esengo.
Nazali naino na makasi ya kosakola ndako na ndako mpe koyekola na bato Biblia na ndako na ngai. Ntango baninga bayaka kotala ngai, nazalaka ntango nyonso na esengo ya kobɛtela bango masolo ya mwa makambo oyo nakutaná na yango. Nazali mpenza na botɔndi soki nakanisi mapamboli oyo nazwi na boumeli ya mbula pene ya 90 oyo nasangani na libota ya Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Nazali kotambola elongo na ebongiseli ya sembo ya Nzambe,” lisolo ya bomoi ya Pryce Hughes, oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 1963, ebimeli ya Lingelesi.
b Masolo ya bomoi ya basaleli wana ya sembo ya Yehova ebimaki na banimero ya kala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
c Masolo ya bomoi ya basaleli wana ya sembo ya Yehova ebimaki na banimero ya kala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
d Masolo ya bomoi ya basaleli wana ya sembo ya Yehova ebimaki na banimero ya kala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
e Masolo ya bomoi ya basaleli wana ya sembo ya Yehova ebimaki na banimero ya kala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
f Masolo ya bomoi ya basaleli wana ya sembo ya Yehova ebimaki na banimero ya kala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
[Elilingi na lokasa 25]
Lokasa mpo na kobengisa bato na lisukulu “Bamilio ya bato oyo bazali na bomoi lelo bakokufa te,” oyo nayokaki na mokolo ya 14 Mai 1922
[Elilingi na lokasa 26]
Ngai na Zanoah na 1933, nsima ya libala na biso
[Elilingi na lokasa 26]
Totɛlɛmi pembeni ya “Elizabeth,” wagɔ oyo mobali na ngai asalaki