Tótika te komonisa motema malamu
“Mbuma ya pole ezalaka na ndenge nyonso ya motema malamu mpe boyengebene mpe solo.”—BAEFESE 5:9, NW.
1. Lelo oyo ndenge nini bamilio ya bato bazali komonisa ete bazali kondima maloba ya Nzembo 31:19?
KOKUMISA Yehova ezali malamu oyo eleki malamu mosusu nyonso oyo moto akoki kosala. Lelo oyo, bamilio ya bato bazali kosala yango, bazali kokumisa Nzambe mpo na motema malamu na ye. Biso Batatoli ya Yehova oyo tozali sembo epai na ye, tokanisaka lokola mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Motema malamu na yo ezali monene mpenza, oyo obombeli baoyo babangaka yo.”—Nzembo 31:19, NW.
2, 3. Likambo nini ekoki komonana soki tozali kokómisa bato bayekoli kasi tozali na bizaleli ya malamu te?
2 Kobanga Yehova etindaka biso tókumisa ye mpo na motema malamu na ye. Kobanga yango etindaka biso mpe na ‘kosanzola Yehova, kopambola ye, mpe kosakola nkembo ya bokonzi na ye.’ (Nzembo 145:10-13, NW) Yango wana tosalaka na molende mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Kasi, ntango tozali kosakola, tosengeli mpe komonisaka bizaleli ya malamu. Soki tosali bongo te, tokoki kofingisa nde nkombo mosantu ya Yehova.
3 Bato mingi balobaka ete basambelaka Nzambe, kasi makambo oyo Liloba na ye epemami ezali kosɛnga basalelaka yango te. Mpo na bato mosusu oyo bazalaki koloba kaka na monɔkɔ ete basalaka malamu, ntoma Paulo akomaki boye: “Yo okolakisa moto mosusu, ozali komilakisa yo moko te? Ezali yo kosakola ete, Yibá te! yo moko ozali koyiba? Ezali yo kolobaka ete, Salá ekobo te! yo moko ozali na ekobo? . . . Ekomami ete, Bapakano bakotuka nkombo ya Nzambe mpo na bino.”—Baloma 2:21, 22, 24.
4. Bizaleli malamu na biso ebotaka mbuma nini?
4 Biso tofingisaka nkombo ya Yehova te, tosalaka nde makasi ete tókumisa yango na bizaleli malamu. Likambo yango ebendaka mpenza bato oyo bazali na kati ya lisangá ya boklisto te. Esalaka mpe ete banguna na biso bákanga monɔkɔ. (1 Petelo 2:15) Likambo ya ntina mingi ezali ete bizaleli malamu na biso ebendaka bato na ebongiseli ya Yehova, epesaka bango nzela ya koya kokumisa ye mpo na nsima bázwa bomoi ya seko.—Misala 13:48, NW.
5. Mituna nini tosengeli kotalela sikoyo?
5 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ndenge nini tokoki kokima bizaleli oyo ekoki kobebisa lokumu ya Yehova mpe kobɛtisa bato mosusu libaku, baoyo balukaka koyeba mateya ya solo? Ndenge nini tokoki kolonga komonisa motema malamu?
Mbuma ya pole
6. Tángá mwa “misala ya molili mizangi mbuma”; nzokande baklisto basengeli komonisa mbuma nini?
6 Lokola tozali baklisto oyo tomipesi na Nzambe, tozali na lisalisi mpo na kokima “misala ya molili mizangi mbuma.” Na kati na yango ezali na misala oyo ebebisaka lokumu ya Nzambe lokola kokosa, koyiba, kofinga, masolo ya kosangisa nzoto, bizaleli ya nsɔni, masɛki na makambo ya nsɔni, mpe kolangwa masanga. (Baefese 4:25, 28, 31; 5:3, 4, 11, 12, 18, NW) Biso tosalaka misala ya ndenge wana te, ‘totambolaka lokola bana ya pole.’ Ntoma Paulo alobaki ete “mbuma ya pole ezalaka na ndenge nyonso ya motema malamu mpe boyengebene mpe solo.” (Baefese 5:8, 9, NW) Elingi koloba ete mpo tólanda komonisa motema malamu, tosengeli kotambola na kati ya pole. Kasi, pole ya ndenge nini?
7. Tosengeli kosala nini mpo tótika te komonisa motema malamu?
7 Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki komonisa motema malamu soki tozali kotambola na kati ya pole ya elimo. Mokomi ya nzembo akomaki ete: “Liloba na yo ezali mwinda na makaka na ngai mpe pole na nzela na ngai.” (Nzembo 119:105) Soki tolingi ete tómonisaka ntango nyonso “mbuma ya pole” na nzela ya “ndenge nyonso ya motema malamu,” tosengeli koluka ntango nyonso pole ya elimo oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe, oyo mikanda ya lisangá ya boklisto elimbolaka malamumalamu, mpe oyo toyekolaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita. (Luka 12:42; Baloma 15:4; Baebele 10:24, 25) Tosengeli mpe kolanda malamumalamu ndakisa mpe mateya ya Yesu Klisto, ye azali “pole ya mokili” mpe “kongɛnga ya nkembo ya [Yehova].”—Yoane 8:12, NW; Baebele 1:1-3.
Mbuma ya elimo
8. Mpo na nini tokoki komonisa motema malamu?
8 Na ntembe te pole ya elimo esalisaka biso na komonisa motema malamu. Longola yango, tokoki komonisa ezaleli yango mpamba te elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye, ezali kotambwisa biso. Motema malamu ezali na kati ya “mbuma ya elimo.” (Bagalatia 5:22, 23, NW) Soki totiki ete elimo santu ya Yehova etambwisa biso, ekobota mbuma na yango kitoko oyo tobengi motema malamu epai na biso.
9. Ndenge nini tokoki kolanda toli ya Yesu oyo ezali na Luka 11:9-13?
9 Mposa na biso makasi ya kobota mbuma ya elimo oyo tobengi motema malamu mpo na kosepelisa Yehova esengeli kotinda biso na kosalela maloba ya Yesu oyo: “Bosenga, mpe bokozwa; boluka, mpe bokomona; bobeta porte ya ndako bongo bakofungolela bino. Mpo moto nyonso oyo asengaka, azwaka; mpe moto nyonso oyo alukaka, amonaka; mpe moto oyo abetaka porte ya ndako, bafungolelaka ye yango. Tata nani na kati na bino akopesa mwana na ye nyoka, soki mwana asengi ye mbisi? To akopesa ye nkoto, soki asengi ye liki? Soki bino [bato ya kozanga kokoka mpe na bongo] bato mabe, boyebi kopesa biloko ya malamu na bana na bino; bongo Tata ya Likolo akopesa [elimo santu, NW] te, soki bosengi ye?” (Luka 11:9-13, Boyokani ya Sika) Tólanda toli ya Yesu, tóbondelaka Yehova apesa biso elimo na ye mpo tótika te komonisa motema malamu oyo ezali na kati ya mbuma ya elimo yango.
‘Tótika te kosala malamu’
10. Mokapo ya Exode 34:6, 7 elobeli makambo nini oyo emonisaka motema malamu ya Yehova?
10 Tokoki ‘kotika te kosala malamu’ soki tozali kozwa pole ya Liloba ya Nzambe mpe soki elimo santu ya Nzambe ezali kosalisa biso. (Baloma 13:3, NW) Ntango tozali koyekola Biblia mbala na mbala, tokoyekola mpe tokoyeba malamu ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa ya Yehova na oyo etali komonisa motema malamu. Boyekoli ya pɔsɔ eleki elobelaki makambo oyo emonisaka motema malamu ya Nzambe, makambo oyo ezali na maloba oyo ayebisaki Mose na Exode 34:6, 7, epai tozali kotánga boye: “[Yehova, Yehova], azali Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto, mpe akolimbisa mabe mpe [kobuka mobeko, NW] mpe lisumu, kasi [akoki kozangisa te kopesa etumbu, NW].” Soki totaleli makambo wana oyo emonisaka motema malamu ya Yehova, ekosalisa biso mpo ‘tótika te kosala malamu.’
11. Koyeba ete Yehova azali na mawa mpe na ngɔlu esengeli kotinda biso na nini?
11 Maloba wana ya Nzambe ezali komonisa biso ntina ya kolanda ndakisa ya Yehova mpe kozala na mawa mpe na ngɔlu. Yesu alobaki ete: “Mapamboli epai na bango bakoyokela bamosusu mawa, zambi bamosusu bakoyokela bango mawa.” (Matai 5:7; Luka 6:36) Koyeba ete Yehova azali na ngɔlu ezali kopesa biso mposa ya komonisela basusu ngɔlu mpe boboto, ata mpe baoyo tokendaka kosakola epai na bango. Yango eyokani na toli ya Paulo oyo: “Tiká ete maloba na bino mazala na ngɔlu, na elɛngi na mungwa ntango nyonso ete bóyeba soko ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.”—Bakolose 4:6.
12. (a) Lokola Nzambe ayokaka nkanda noki te, biso mpe tosengeli kosalela basusu makambo ndenge nini? (b) Boboto ya Yehova etindaka biso na kosala nini?
12 Lokola Nzambe ayokaka nkanda noki te, mposa na biso ya ‘kotika te kosala malamu’ etindaka biso na kolanda te mabunga mikemike ya baninga na biso bandimi mpe kotya makanisi na biso na bizaleli malamu na bango. (Matai 7:5; Yakobo 1:19) Boboto ya Yehova epesaka biso mposa ya komonisa bolingo ya sembo, ata na makambo ya mpasi mpenza. Yango ezali mpenza likambo ya malamu.—Masese 19:22.
13. Tosengeli kosala nini mpo biso mpe tómonisa ezaleli ya Yehova oyo ‘aleki na solo’?
13 Lokola Tata na biso ya likoló ‘aleki na solo,’ biso mpe tolukaka ‘tómilobela lokola baministre na ye na maloba ya solo.’ (2 Bakolinti 6:3-7, NW) “Lolemo ya lokuta” mpe “motatoli ya lokuta oyo akolobaka maloba ya sembo te” ezali na kati ya makambo nsambo oyo Yehova ayinaka. (Masese 6:16-19) Yango wana, mposa ya kosepelisa Nzambe etindi biso na ‘kobwaka makambo ya lokuta mpe koloba solo.’ (Baefese 4:25) Tótika te komonisa motema malamu na lolenge wana ya ntina mingi.
14. Mpo na nini tosengeli kolimbisaka?
14 Maloba oyo Nzambe alobaki na Mose esengeli mpe kotinda biso na kolimbisaka, mpamba te Yehova alimbisaka mabe. (Matai 6:14, 15) Kasi, bato ya masumu oyo baboyi kobongola motema, Yehova apesaka bango etumbu. Yango wana tosengeli kosalaka oyo ezali malamu na miso na ye na likambo etali kobatela lisangá mpo etikala pɛto na elimo.—Levitike 5:1; 1 Bakolinti 5:11, 12; 1 Timote 5:22.
“Bókeba”
15, 16. Na ndenge nini toli ya Paulo na Baefese 5:15-19 ezali kosalisa biso na kokoba komonisa motema malamu?
15 Mpo tótika te komonisa motema malamu, atako mabe ezali pembeni na biso, tosengeli kotonda na elimo ya Nzambe mpe kokeba na ndenge oyo tozali kotambola. Yango wana, Paulo alendisaki baklisto ya Efese ete: “Bókeba mpo na etamboli na bino, bózalaka bazoba te kasi bato ya mayele mpenza. Bósalisa ntango na bino misala malamu, zambi mikolo izali mabe. Na ntina yango bózala bilema te nde bósosola yango ezali mokano na Nkolo. Bólangwaka vinyo te zambi yango ezali [na makambo ya mbindo, NW]. Nde bótondaka na [elimo, NW], awa ekosololanaka bino na koyemba nzembo ya Nzambe mpe nzembo ya [elimo, NW], awa mpe ekosanzola bino Nkolo mpe ekoyembaka bino nzembo na mitema na bino.” (Baefese 5:15-19) Toli oyo ebongi mpenza na biso na mikolo ya nsuka mpe ya mpasi oyo tozali.—2 Timote 3:1.
16 Mpo tólanda komonisa motema malamu, tosengeli mpenza kokebaka na ndenge oyo tozali kotambola; tótambolaka lokola bato oyo bazali na mayele oyo euti na Nzambe. (Yakobo 3:17) Tosengeli kokima masumu minene mpe tosengeli kotonda na elimo santu mpe kotika yango ete etambwisa biso. (Bagalatia 5:19-25) Soki tozali kolanda malako oyo tozali koyoka na makita mpe na mayangani, tokotika te kosala oyo ezali malamu. Maloba oyo Paulo akomelaki Baefese ekoki mpe kolamusa biso makanisi ete na makita mingi, tozalaka na libaku ya koyemba “nzembo ya elimo,” oyo mingi na yango elobelaka bizaleli ya elimo, na ndakisa motema malamu.
17. Baklisto oyo bazali na maladi makasi oyo ezali kopesa bango nzela te ya koyangana na makita bakoki kozala na elikya nini?
17 Tokoloba boni mpo na baninga na biso bandimi oyo bazali na likoki te ya koyangana ntango nyonso na makita mpo bazali na maladi makasi oyo esilaka te? Bakoki koyoka mpasi na motema mpamba te bazali na likoki te ya kosangana esika moko na bandeko na bango ya elimo mpo na kosambela Yehova. Kasi, basengeli koyeba ete Yehova ayebi mikakatano na bango, akotika te kongɛngisa bango, akopesa bango elimo santu, mpe akosalisa bango mpo bátika te kosala oyo ezali malamu.—Yisaya 57:15.
18. Nini ekosalisa biso ete tótika te komonisa motema malamu?
18 Mpo na kolanda kozala na motema malamu, ezali kosɛnga biso tótalela malamu baninga nini tokoki kotambola na bango mpe tókima baoyo bazali “bayini na malamu.” (2 Timote 3:2-5; 1 Bakolinti 15:33) Soki tozali kolanda toli yango, ekosalisa biso tóboya misala oyo eyokani te na banzela ya Nzambe, mpe na ndenge yango tokoboya ‘koyokisa elimo santu mawa.’ ( Baefese 4:30) Longola yango, tokozwa lisalisi mpo na kosala malamu soki toluki kozala baninga mpenza ya bato oyo bamonisaka ete bazalaka na motema malamu mpe batikaka ete elimo santu ya Yehova etambwisa bango.—Amosa 5:15; Baloma 8:14; Bagalatia 5:18.
Motema malamu ebotaka mbuma kitoko
19-21. Makambo nini ezali komonisa mbuma kitoko oyo eutaka na komonisa motema malamu?
19 Kotambola na kati ya pole ya elimo, kolanda nzela oyo elimo ya Nzambe ezali kolakisa mpe kokeba na ndenge oyo tozali kotambola, ekosalisa biso tókima makambo ya mabe mpe ‘tótika te kosala malamu.’ Yango ekoki kobota mbuma malamu na nsima. Tótala likambo oyo Zongezile, Motatoli ya Yehova moko na Afrika ya Sudi, akutanaki na yango. Mokolo moko na ntɔngɔ ntango azalaki kokende kelasi, alukaki koyeba mbongo boni atikalaki na yango na banki. Na banki ezali na masini moko oyo ebimisaka mwa papye epai bakomi motuya ya mbongo oyo moto azali na yango. Ntango abimisaki yango, amonaki ete mbongo oyo bakomaki elekaki mbongo oyo ye atyaki mpenza; rand 42 000 (to dolare 6 000) elekaki likoló. Mobali moko oyo akɛngɛlaka banki mpe bato mosusu bapesaki ye toli ete abimisa mbongo yango mpe atya yango na nkombo na ye na banki mosusu. Kaka mobali moko na mwasi na ye, bango mibale bazali mpe Batatoli, oyo bazalaki kofanda esika moko na Zongezile nde bapesaki ye toli ete abimisa mbongo yango te.
20 Na mokolo oyo elandaki, Zongezile ayebisaki na banki ete mbongo oyo ezalaki na kɔnti na ye elekaki. Bato ya banki bamonaki ete nimero ya kɔnti na ye ekokanaki mwa moke na oyo ya komelesa moko monene oyo asalaki mwa libunga mpe akɔtisaki mbongo na ye na kɔnti ya Zongezile. Komelesa yango akamwaki ete Zongezile azwaki ata falanga moko te na mbongo yango; mpe atunaki ye ete: “Ozali moto ya lingomba nini?” Zongezile ayebisaki ye ete azali Motatoli ya Yehova. Bakonzi ya banki bapesaki ye longonya mingi mpe balobaki ete: “Soki bato nyonso bazalaki sembo lokola Batatoli ya Yehova mbɛlɛ malamu mpenza.” Ya solo, soki tozali bato oyo basalaka makambo ya bosembo mpe tozalaka na motema malamu, yango ekoki kotinda bato mosusu bákumisa Yehova.—Baebele 13:18.
21 Motema malamu esengeli kaka te kozala na makambo ya minene mpo ebota mbuma malamu. Tópesa ndakisa: Na Esanga Samoa, elenge moko oyo azali Motatoli ya Yehova mpe azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza akendaki na lopitalo. Bato mingi bazalaki kozela mpo na kokutana na monganga, mpe Motatoli yango amonaki ete mwasi moko mobange oyo afandaki pembeni na ye azalaki mpenza na maladi makasi. Atikaki ete mwasi yango akɔta na esika na ye mpo akutana noki na monganga bongo ye akɔta nsima. Mokolo mosusu, Motatoli yango akutanaki lisusu na mwasi wana na zando. Mwasi yango abosanaki ye te mpe abosanaki te boboto oyo asalelaki ye na lopitalo. Mwasi yango alobaki ete: “Nayebi ete Batatoli ya Yehova balingaka mpenza bazalani na bango.” Atako liboso mwasi yango azalaki kolinga koyoka nsango ya Bokonzi te, motema malamu oyo Motatoli wana amonisaki ye ebotaki mbuma. Mobange yango andimaki koyekola Biblia na ndako na ye mpe abandaki koyeba Liloba ya Nzambe.
22. Wapi lolenge moko ya ntina mingi oyo tosengeli ‘kotika te kosala malamu’?
22 Na ntembe te okoki kozala na masolo mosusu oyo ezali komonisa ntina ya kozala na motema malamu. Lolenge moko ebongi mpenza ya ‘kotika te kosala malamu’ ezali ya kosakola ntango nyonso nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Tómipesa na mosala yango mpe tósala yango na molende, tóbosana te ete yango ezali lolenge moko ya kosala malamu, mingimingi epai ya baoyo bakondima koyoka nsango yango. Na koleka, mosala na biso mpe ezaleli malamu na biso ekokumisa Yehova, ye oyo motema malamu eutaka mpenzampenza epai na ye.—Matai 19:16, 17.
Tótika te ‘kosala oyo ezali malamu’
23. Mpo na nini mosala ya kosakola ezali mosala malamu?
23 Ntembe ezali te ete mosala na biso ya kosakola ezali mosala malamu. Ekoki kobikisa biso mpe ekoki kobikisa baoyo bazali koyoka nsango ya Biblia mpe kosalisa bango bákɔta na nzela oyo ekomema bango na bomoi ya seko. (Matai 7:13, 14; 1 Timote 4:16) Na bongo, ntango tolingi kozwa ekateli moko, mposa ya kosala oyo ezali malamu ekoki kotinda biso na komituna boye: ‘Mosala na ngai ya kosakola Bokonzi ekozala ndenge nini soki nazwi ekateli oyo? Nazali mpenza komona ete ekozala nzela ya malamu? Ekosalisa ngai na kosunga bato mosusu bándima “nsango malamu ya seko” mpe bákóma baninga ya Yehova Nzambe?’ (Emoniseli 14:6) Soki tozali kozwa mikano oyo ezali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, tokozwela yango bolamu mingi.—Matai 6:33; Misala 20:35.
24, 25. Na makambo nini tokoki kosala malamu na kati ya lisangá mpe tokoki kozala na elikya na likambo nini soki tozali kotika te komonisa motema malamu?
24 Tómonaka matomba oyo motema malamu ebotaka lokola eloko mpamba te. Tokoki kolanda komonisa ezaleli yango soki tozali komonisa na kati ya lisangá ete biso mpe tozali kosala mosala mpe tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na matomba mpe bolamu ya lisangá. Tosalaka mpenza malamu ntango toyanganaka na makita mpe topesaka biyano. Ntango tokei na makita tolendisaka mpenza bandeko na biso bandimi, mpe soki tozali kopesa biyano oyo tobongisaki malamu, etongaka bango na elimo. Tosalaka mpe malamu ntango tozali kopesa mbongo na biso mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi mpe ntango tozali kopesa mabɔkɔ na misala mpo na kobatela yango malamu. (2 Mikonzi 22:3-7; 2 Bakolinti 9:6, 7) Ya solo, “wana tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.”—Bagalatia 6:10, NW.
25 Tokoki te koyeba liboso likambo mokomoko oyo tokokutana na yango oyo ekosɛnga ete tómonisa motema malamu. Yango wana, ntango tokutani na mikakatano mosusu, tóluka pole oyo ezali na Makomami, tóbondela Yehova apesa biso elimo santu na ye, mpe tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosala mokano na ye malamu mpe ebongi. (Baloma 2:9, 10; 12:2) Tótya elikya ete Yehova akopambola biso mingi soki tozali kotika te komonisa motema malamu.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini tokoki kosala malamu oyo eleki malamu nyonso?
• Mpo na nini motema malamu ebengami “mbuma ya pole”?
• Mpo na nini motema malamu ebengami “mbuma ya elimo”?
• Ezaleli malamu na biso ebotaka mbuma nini?
[Elilingi na lokasa 17]
Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye esalisaka biso na komonisa motema malamu
[Bililingi na lokasa 18]
Komonisa motema malamu ebotaka mbuma kitoko