Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/1 nk. 8-12
  • Tyá likebi na ‘mayele na yo ya koteya’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tyá likebi na ‘mayele na yo ya koteya’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolisá “mayele ya koteya”
  • Saleláká Liloba ya Nzambe
  • Tunáká mituna oyo ekosalisa moto akanisa
  • Kobakisaka makambo ebeleebele te
  • Salisá bayekoli bázwaka na motuya makambo bazali koyekola
  • Monisá ete olingaka bango
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Salisá moyekoli na yo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/1 nk. 8-12

Tyá likebi na ‘mayele na yo ya koteya’

“Sakolá liloba, . . . pamelá, sembolá, lendisá, na motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya.”​—2 Tim. 4:2.

1. Etinda nini Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe ndakisa nini apesaki?

ATAKO Yesu abikisaki bato ya maladi ntango azalaki awa na mabelé, ayebanaki libosoliboso lokola moteyi, kasi te lokola mosali ya makamwisi. (Mko. 12:19; 13:1) Kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezalaki likambo eleki ntina mpo na Yesu, mpe ezali kaka bongo mpo na baklisto lelo oyo. Baklisto bazali na mokumba ya kokoba mosala ya kokómisa bato bayekoli mpe koteya bato bátosa makambo nyonso oyo Yesu asɛngaki.​—Mat. 28:19, 20.

2. Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa mosala na biso ya kosakola?

2 Mpo na kokokisa mosala na biso ya kokómisa bato bayekoli, tolukaka ntango nyonso kokolisa mayele na biso ya koteya. Ntoma Paulo amonisaki ntina ya likambo yango ntango akomelaki Timote, moninga na ye ya mosala ete: “Kebá ntango nyonso mpo na yo moko mpe mpo na mateya na yo. Kangamá na makambo yango, mpamba te na kosaláká bongo okobikisa ná yo moko ná baoyo bazali koyoka yo.” (1 Tim. 4:16) Koteya oyo Paulo alobelaki na vɛrsɛ wana esuki te kaka na kopesa moto boyebi. Baklisto oyo bayebi koteya basimbaka mitema ya bato mpe basalisaka bango bábongola bomoi na bango. Yango esɛngaka mayele. Na yango, ndenge nini tokoki kokolisa “mayele ya koteya” ntango tozali kosakwela basusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe?​—2 Tim. 4:2.

Kolisá “mayele ya koteya”

3, 4. (a) Ndenge nini tokoki kokolisa “mayele ya koteya”? (b) Ndenge nini Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esalisaka biso tókóma bateyi ya malamu?

3 Mayele ya mosala ezali mayele oyo moto azwaka na koyekola, na kosala likambo moko to na kotala ndenge bato mosusu bazali kosala. Mpo tókóma bateyi ya malamu ya nsango malamu, tosengeli kotya likebi na makambo misato wana. Tokosimba malamu likambo oyo tozali koyekola kaka soki toyekoli yango mpe tozali kobondela mpo na yango. (Tángá Nzembo 119:27, 34.) Kotala ndenge basakoli oyo bayebi mpenza koteya basalaka ekosalisa biso tóyeba mayele na bango mpe tómekola bango. Mpe soki tozali kosalela mayele yango mbala na mbala, makoki na biso ekokola.​—Luka 6:40; 1 Tim. 4:13-15.

4 Yehova azali moteyi na biso monene. Na nzela ya ebongiseli na ye awa na mabelé, azali kolakisa basaleli na ye ndenge basengeli kokokisa mokumba na bango ya kosakola. (Yis. 30:20, 21) Yango wana, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esalemaka na masangá nyonso pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosalisa baoyo bakomisá nkombo na kelasi yango bákóma basakoli ya solosolo ya Bokonzi ya Nzambe. Buku ya libosoliboso oyo basalelaka ezali Biblia. Liloba ya Yehova eyebisaka biso makambo oyo tosengeli koteya. Elakisaka mpe mayele oyo ebongi mpo na koteya. Na eteyelo yango, bayebisaka biso mbala na mbala ete soki tolingi kokóma bateyi ya malamu, tosengeli kosalelaka Liloba ya Nzambe ntango tozali koteya, kosalelaka mituna na ndenge oyo ebongi, koteyaka na maloba ya pɛtɛɛ mpe komibanzabanzaka mpenza mpo na basusu. Tiká tótalela makambo yango mokomoko. Na nsima, tokolobela ndenge oyo tokoki kosimba motema ya moyekoli.

Saleláká Liloba ya Nzambe

5. Mateya na biso esengeli koutaka wapi, mpe mpo na nini?

5 Yesu, moteyi oyo aleki bateyi nyonso ya mokili oyo, azalaki kosalela Biblia ntango azalaki koteya. (Mat. 21:13; Yoa. 6:45; 8:17) Makambo oyo azalaki koloba ezalaki kouta epai na ye moko te, kasi epai ya moto oyo atindaki ye. (Yoa. 7:16-18) Yango nde ndakisa oyo tolandaka. Na yango, makambo oyo tolobaka ntango tozali kosakola ndako na ndako to ntango tozali koyekola Biblia na bato esengeli kouta na kati ya Liloba ya Nzambe. (2 Tim. 3:16, 17) Makanisi na biso moko, ata soki tozali mayele ndenge nini, ekoki kokokana ata moke te na nguya ya Liloba ya Nzambe. Biblia ezali na nguya. Ezala likambo nini tozali komeka kolimbolela moyekoli ya Biblia, lolenge eleki malamu ya kosalisa ye ezali ya kotángisa ye oyo Makomami elobaka na ntina ya likambo yango.​—Tángá Baebele 4:12.

6. Moteyi asengeli kosala nini mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia akanga ntina ya makambo oyo azali koyekola?

6 Yango elingi koloba te ete tosengeli te komibongisaka liboso ya kokende koyekola na bato Biblia. Kutu, tosengeli nde kokanisaka malamu liboso mpo na koyeba bavɛrsɛ oyo tokotánga na bango na kati ya Biblia ntango tozali koyekola. Na momeseno, ezalaka malamu kotánga bavɛrsɛ oyo esimbi mateya na biso. Esengeli mpe kosalisa moyekoli akanga ntina ya vɛrsɛ mokomoko oyo atángi.​—1 Kol. 14:8, 9.

Tunáká mituna oyo ekosalisa moto akanisa

7. Mpo na nini kotunaka mituna ezali lolenge ya malamu ya koteya?

7 Moteyi akoki mpenza kosimba motema ya moyekoli soki azali kotuna ye mituna oyo ekotinda ye akanisa. Yango wana, na esika ya kolimbolela ye bavɛrsɛ, sɛngá ye alimbolela yo yango. Ntango mosusu, ekosɛnga obakisa motuna moko to mituna ebele mpo na kosalisa ye asimba likambo oyo bozali kolobela. Soki ozali kosalisa moyekoli akanisaka ndenge wana, yango ekosalisa ye kaka te na kokanga ntina ya makambo oyo azali koyekola, kasi ekosalisa ye mpe andima yango.​—Mat. 17:24-26; Luka 10:36, 37.

8. Ndenge nini tokoki koyeba oyo ezali na kati ya motema ya moyekoli?

8 Lolenge ya koyekola oyo mikanda na biso esalelaka ezali ya mituna mpe biyano. Na ntembe te, bato mingi oyo oyekolaka na bango Biblia bazwaka mbala moko biyano na mituna yango na kati ya baparagrafe. Kasi, moteyi ya mayele alukaka kaka te biyano ya malamu. Na ndakisa, moyekoli akoki kolimbola malamu mpenza oyo Biblia elobi mpo na pite. (1 Kol. 6:18) Nzokande, kotuna ye mituna mosusu na mayele mpenza ekoki kosalisa yo oyeba oyo ye azali kokanisa na makambo oyo azali koyekola. Na yango, moteyi akoki kotuna boye: “Mpo na nini Biblia epekisi kosangisa nzoto na moto oyo obalani na ye te? Okanisi nini mpo na mobeko yango? Okanisi ete kotosa mitinda ya Nzambe ezali na litomba?” Biyano oyo moyekoli akopesa na mituna wana ekoki komonisa oyo ezali na kati ya motema na ye.​—Tángá Matai 16:13-17.

Kobakisaka makambo ebeleebele te

9. Likambo nini tosengeli kobosanaka te ntango tozali koteya bato Biblia?

9 Mateya mingi oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe ezalaka mpenza mpasi te mpo na kosimba yango. Kasi, ekoki kozala ete mateya oyo bato oyo tozali koyekola na bango bayoká na mangomba ya lokuta etyá bango mobulu na motó. Mokumba na biso bateyi ezali ya kokómisa mateya ya Biblia pɛtɛɛ. Bateyi ya solosolo bateyaka makambo ebeleebele na mbala moko te, basalelaka maloba ya polele mpe bateyaka na bosikisiki. Soki tozali kosala bongo, tokokómisa mateya ya Biblia pɛtɛɛ. Tosengeli te kobakisaka makambo ebeleebele. Ezali na ntina te tólimbolaka makambo nyonso oyo ezali na vɛrsɛ oyo touti kotánga. Pesá kaka ndimbola oyo ekosalisa moyekoli akanga ntina ya likambo oyo bozali kolobela. Moyekoli akokɔta na mateya ya mozindo malɛmbɛmalɛmbɛ, ntango boyebi na ye ezali kobakisama.​—Ebe. 5:13, 14.

10. Ndenge nini tokoki koyeba soki tosengeli kotalelaka paragrafe boni ná moyekoli?

10 Baparagrafe boni tokoki koyekola na moto na mbala moko? Mpo na yango, tosengeli kosalela bososoli. Makoki mpe bomoi ya moyekoli mpe oyo ya moteyi ezalaka ntango nyonso ndenge moko te, kasi tosengeli ntango nyonso koyebaka ete mokano na biso bateyi ezali ya kosalisa moto oyo azali koyekola akóma na kondima makasi. Na yango, tokotikela ye ntango oyo ebongi na ye mpo atánga, akanga ntina ya makambo oyo azali kotánga mpe andima solo ya Liloba ya Nzambe. Tokoyekola na ye te makambo ebeleebele oyo akokoka kosimba te. Kasi, boyekoli esengeli mpe kokoba kokende liboso. Soki moyekoli asimbi likambo moko, tóleka na likambo mosusu.​—Kols. 2:6, 7.

11. Liteya nini tozwi epai ya ntoma Paulo mpo na oyo etali koteya?

11 Ntoma Paulo azalaki kokómisa nsango malamu pɛtɛɛ ntango azali kosolola na bato ya sika. Atako atángaki bakelasi mingi, azalaki kosalela maloba ya makasimakasi te. (Tángá 1 Bakolinti 2:1, 2.) Bato ya sembo basepelaka na solo ya Biblia mpe basimbaka yango mpo ezalaka na mateya makasimakasi te. Ekosɛnga te moto atánga bakelasi mingi mpo akanga ntina na yango.​—Mat. 11:25; Mis. 4:13; 1 Kol. 1:26, 27.

Salisá bayekoli bázwaka na motuya makambo bazali koyekola

12, 13. Nini ekoki kotinda moyekoli asalela makambo oyo azali koyekola? Pesá ndakisa.

12 Mateya na biso ekozala na ntina kaka soki esimbi motema ya moyekoli. Moyekoli asengeli koyeba ndenge akoki kosalela makambo oyo ayekoli, matomba oyo akozwa mpe ndenge oyo bomoi na ye ekoki kobongwana soki atiki Biblia etambwisa ye.​—Yis. 48:17, 18.

13 Na ndakisa, soki tozali kotalela Baebele 10:24, 25 oyo elendisaka baklisto báyanganaka mpo na kolendisana mpe kosalisana. Soki moyekoli yango abandi naino koya na makita te, tokoki kolimbolela ye mwa moke ndenge makita yango esalemaka mpe makambo nini tolobelaka kuna. Tokoki koyebisa ye ete makita ya lisangá ezali moko ya makambo ya ntina na losambo na biso, mpe koyebisa ye matomba oyo tozwaka na makita yango. Na nsima, tokoki kobenga ye aya na makita. Asengeli kotosa mitinda ya Biblia mpo alingi kosepelisa Yehova, kasi te mpo na kosepelisa moto oyo ayekolaka na ye Biblia.​—Gal. 6:4, 5.

14, 15. (a) Makambo nini moyekoli ya Biblia akoki koyeba na ntina ya Yehova? (b) Ndenge nini koyeba bizaleli ya Nzambe ekoki kosalisa moyekoli?

14 Litomba monene oyo bayekoli bazwaka na boyekoli ya Biblia mpe na kotosa mitinda na yango ezali ete esalisaka bango báyeba mpenza Yehova mpe bálinga ye. (Yis. 42:8) Longola kozala Tata ya bolingo, Mokeli mpe Nkolo ya molɔ́ngɔ́, Yehova amonisaka mpe bomoto mpe makoki na ye epai ya bato oyo balingaka mpe basalelaka ye. (Tángá Exode 34:6, 7.) Ntango Moize alingaki kobimisa bana ya Yisalaele na boombo ya Ezipito, Yehova amiyebisaki epai na bango na nkombo oyo: “Nakozala oyo nakozala.” (Ex. 3:13-15, NW) Yango elingaki koloba ete Yehova akokaki komikómisa nyonso esengelaki mpo na kokokisa mikano na ye mpo na libota oyo aponaki. Na yango, Yehova ayebanaki epai ya Bayisalaele lokola Mobikisi, Mobali ya etumba, Moleisi, Mokokisi ya bilaka, mpe bongo na bongo.​—Ex. 15:2, 3; 16:2-5; Yos. 23:14.

15 Ntango mosusu, bato oyo tozali koyekola na bango Biblia bakomona mpenza lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na bango te ndenge Moize amonaki yango. Atako bongo, ntango kondima na bango ezali kokóma makasi mpe botɔndi na bango mpo na makambo bazali koyekola ezali kobakisama mpe bazali kosalela yango, na ntembe te bakomona ete basengeli kotya motema epai ya Yehova ete akopesa bango mpiko mpe bwanya, mpe akotambwisa bango. Soki basali bongo, bango mpe bakoyeba ete Yehova azali Mopesi-toli, Mobateli mpe Mosungi ya bwanya oyo tosengeli kotyela motema.​—Nz. 55:22; 63:7; Mas. 3:5, 6.

Monisá ete olingaka bango

16. Mpo na nini makoki na biso ezali likambo eleki ntina te mpo na kozala bateyi ya malamu?

16 Soki omoni ete makoki na yo ya koteya ekómi mpenza ndenge olingaka te, kolɛmba te. Yehova ná Yesu nde bazali kotambwisa mosala ya koteya bato Biblia oyo ezali kosalema na mokili mobimba lelo oyo. (Mis. 1:7, 8; Emon. 14:6) Bakoki kopambola milende na biso mpo maloba na biso esimba mitema ya bato ya motema sembo. (Yoa. 6:44) Ata soki moteyi azali na makoki mingi te, bolingo na ye mpo na moyekoli ekoki kosunga. Ntoma Paulo amonisaki ete kolinga bato oyo tozali koteya ezali na litomba monene.​—Tángá 1 Batesaloniki 2:7, 8.

17. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na moyekoli ya Biblia?

17 Ndenge moko mpe, tokomonisa ete tozali komibanzabanza mpo na moyekoli soki tosali makasi mpo na koyeba ye. Wana tozali koyekola na ye Biblia, na ntembe te tokoyeba bomoi na ye. Tokoki komona ete abandi kosalela mwa makambo mosusu oyo ayekoli na Biblia. Ekoki kozala ete asengeli naino kobongola makambo mosusu. Na yango, soki tozali kosalisa moyekoli asalelaka makambo oyo azali koyekola, yango ekosalisa ye akóma mpenza moyekoli ya Klisto.

18. Mpo na nini ezali na ntina kobondelaka elongo na moyekoli mpe mpo na ye?

18 Oyo eleki ntina, tokoki kobondelaka elongo na moyekoli mpe mpo na ye. Moyekoli asengeli koyeba ete tozali na mposa ya kosalisa ye ayeba Mozalisi na ye malamumalamu, apusana penepene na ye mpe akóma kotambwisama na ye. (Tángá Nzembo 25:4, 5.) Ntango tozali kobondela Yehova apambola milende oyo moyekoli azali kosala mpo na kosalela makambo oyo azali koyekola, yango ekosalisa ye amona ntina ya kokóma ‘motosi ya liloba.’ (Yak. 1:22) Ntango mpe azali koyoka mabondeli na biso oyo ezali kouta mpenza na motema, ye mpe akoyekola kobondela. Ezali mpenza esengo kosalisa bayekoli ya Biblia bákóma baninga ya Yehova!

19. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

19 Ezali mpenza esengo koyeba ete, na mokili mobimba, Batatoli koleka milio motoba na ndambo bazali kosalela “mayele ya koteya” mpo na kosalisa bato ya motema sembo básalaka makambo nyonso oyo Yesu asɛngaki bayekoli na ye. Matomba nini mosala na biso ya kosakola ezali kobimisa? Tokozwa eyano na motuna wana na lisolo oyo elandi.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini baklisto basengeli kokolisa “mayele ya koteya”?

• Tosengeli kosalela mayele nini mpo na kosimbaka mpenza mitema ya bato?

• Ata soki tozali na makoki mingi te, nini ekoki kosalisa biso?

[Elilingi na lokasa 9]

Okomisá nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi?

[Elilingi na lokasa 10]

Mpo na nini ezali na ntina kosɛngaka moyekoli ya Biblia atánga bavɛrsɛ na kati ya Biblia?

[Elilingi na lokasa 12]

Bondelá elongo na moyekoli na yo mpe mpo na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto