Etanda ya makambo ezali na kati
15 Ɔkɔtɔbɛ 2008
Nimero ya boyekoli
BOYEKOLI MPO NA PƆSƆ YA:
Desɛmbɛ 1-7 2008
‘Miso ya Yehova oyo ezali kongɛnga’ etalatalaka nyonso
LOKASA 3
NZEMBO: 160, 34
Desɛmbɛ 8-14 2008
Yehova atalaka biso mpo na bolamu na biso
LOKASA 7
NZEMBO: 81, 80
Desɛmbɛ 15-21 2008
Eyano ya Yehova na libondeli moko
LOKASA 12
NZEMBO: 74, 90
Desɛmbɛ 22-28 2008
Ozalaka moto ya liboso na kopesa basusu lokumu?
LOKASA 21
NZEMBO: 216, 155
Desɛmbɛ 29 2008–Yanuali 4 2009
Eloko nini okopesa mpo otikala na bomoi?
LOKASA 25
NZEMBO: 177, 212
Mokano ya masolo ya boyekoli
Masolo ya boyekoli 1, 2 NKASA 3-11
Masolo yango mibale ezali kondimisa biso ete Yehova ayebaka makambo nyonso oyo tokutanaka na yango. Asepelaka na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe ayebaka mabanzo na biso. Ayebaka mosala makasi oyo tosalaka mpe amonaka likambo nyonso oyo ekómelaka basaleli na ye. Koyeba makambo yango ebɔndisaka mpenza.
Lisolo ya boyekoli 3 NKASA 12-16
Mingi kati na biso toyebi maloba ya Nzembo 83:18. Kasi, ezali boni mpo na bavɛrsɛ mosusu ya nzembo yango? Lisolo oyo ezali komonisa ndenge oyo Nzembo 83 ekoki mpenza kolendisa baklisto lelo oyo.
Lisolo ya boyekoli 4 NKASA 21-25
Paulo alobaki boye: “Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.” Kopesa basusu lokumu elimboli nini? Nani asengeli kopesa lokumu, mpe nani asengeli kozwa yango? Bandakisa nini ya Biblia tozali na yango? Lisolo oyo elobeli malamu likambo yango.
Lisolo ya boyekoli 5 NKASA 25-29
Mokolo moko, Yesu atunaki boye: “Eloko nini moto akopesa na esika ya molimo na ye?” Okopesa eyano nini na motuna yango? Yesu asalelaki liloba “molimo” na ndimbola nini? Bomoi na yo emonisaka mpenza ete opesaka motuya na molimo na yo? Lisolo oyo ekosalisa yo okanisa mozindo na motuna ya ntina mingi oyo Yesu atunaki.
MASOLO MOSUSU:
“Oyo ezali solo nkombo ya Nzambe oyo eleki mosantu mpe monene”
LOKASA 16
LOKASA 17
LOKASA 30