Etanda ya makambo ezali na kati
15 Aprili 2010
Nimero ya boyekoli
MASOLO YA BOYEKOLI MPO NA PƆSƆ YA:
31 Mai 2010–6 Yuni 2010
Bilenge—Bókolisa mposa na bino ya kosalela Yehova
LOKASA 3
7-13 Yuni 2010
Mosala ya elimo santu na kokokisama ya mokano ya Yehova
LOKASA 7
14-20 Yuni 2010
Longolá miso na yo na biloko oyo ezangi ntina!
LOKASA 20
21-27 Yuni 2010
Ozali kolanda Kristo malamumalamu?
LOKASA 24
Ntina ya masolo ya boyekoli
LISOLO YA BOYEKOLI 1 NKASA 3-7
Yehova azali kobenga bilenge báyoka, báyekola, mpe bálanda malako na ye. Lisolo oyo elobeli ndenge oyo botángi ya Biblia, libondeli, mpe etamboli ya malamu ekoki kosalisa bilenge básambela Yehova na motema mobimba.
LISOLO YA BOYEKOLI 2 NKASA 7-11
Toyebi ete mokano ya Yehova ezali kokende liboso tii ekokokisama na mobimba na yango. Lisolo oyo elobeli mosala ya elimo santu—na ntango ya kala, na mikolo na biso, mpe na mikolo ezali koya—na kokokisama ya mokano yango.
LISOLO YA BOYEKOLI 3 NKASA 20-24
Lokola mokili ya Satana ezali kokóma na nsuka, bililingi ya makambo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Nzambe ezali kosopana na mokili. Na lisolo oyo, tokolobela makambo yango mosusu, ntina oyo Satana asalelaka yango, mpe ndenge oyo tokoki komibatela.
LISOLO YA BOYEKOLI 4 NKASA 24-28
Nini ekosalisa biso tóbatela molende na biso na mosala ya Nzambe? Tosengeli kokeba na bolɛmbu nini ya bomoto soki tolingi kokoba kolanda Kristo? Lisolo oyo ekotalela mituna yango ya ntina mingi.
MASOLO MOSUSU:
Koyika mpiko na mikakatano elendisaki elikya na biso epai ya Yehova 16
Yehova alingi bózala “malamu” 29