Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Ntina: Kopesa bapalanganisi ya nsango malamu formasyo mpo bázala basakoli mpe bateyi ya malamu.
Boumeli: Esilaka te.
Esika: Na Ndako ya Bokonzi.
Masɛngami: Moto nyonso oyo ayanganaka na makita ya lisangá, oyo andimaka mateya ya Biblia, mpe oyo atosaka mibeko ya bokristo na bomoi na ye.
Ndenge ya kokɔta: Esengeli kopesa nkombo epai ya mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.
Sharon, ndeko moko oyo abɛlaka maladi ya paralize, alobaki boye: “Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esalisi ngai nayeba koluka makanisi na mikanda mpe koteya na ndenge ebongi. Esalisi ngai natyaka mpe likebi na bamposa ya elimo ya bato mosusu.”
Arnie, ndeko moko oyo aumeli na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, alobaki boye: “Na bomwana nazalaki na likukuma; nazalaki kokoka te kotala na miso moto oyo nazali kosolola na ye. Eteyelo yango esalisi ngai natika kobanga mpe komona ete nazali na ntina te. Na nzela ya formasyo yango, Yehova asalisi ngai mpe nayekoli ndenge ya kopema mpe kotika te ete makanisi na ngai eyengayenga. Nazali na botɔndi mingi ndenge nakoki kosanzola Nzambe na lisangá mpe na mosala ya kosakola.”
Eteyelo ya bandeko oyo bakɔti sika na Betele
Ntina: Kosalisa bandeko oyo bakɔti sika na Betele básala mosala na bango malamu.
Boumeli: Miniti 45 na pɔsɔ, na boumeli ya pɔsɔ 16.
Esika: Betele.
Masɛngami: Kozala ndeko oyo babengisi mpo na kosala na Betele to oyo andimi kopesa mabɔkɔ na mosala ya Betele mbula mobimba to koleka.
Ndenge ya kokɔta: Bakomisaka mbala moko ndeko nyonso oyo akɔti sika na Betele.
Demetrius, oyo akɔtaki na eteyelo yango na bambula ya 1980, alobi boye: “Mateya yango esalisaki ngai nakóma koyekola malamu mpe esalisaki ngai mpo naumela na Betele. Balakisi, mateya, mpe batoli ya malamu endimisaki ngai ete Yehova alingaka ngai mpe amibanzabanzaka mpo na ngai mpe alingaki kosalisa ngai mpo nasalela ye na Betele.”
Kaitlyn alobi boye: “Eteyelo ya bandeko oyo bakɔti sika na Betele esalisaki ngai natya makanisi na likambo oyo eleki ntina, elingi koloba kozala moto oyo alingaka makambo ya elimo. Eteyelo yango esalisaki ngai nasepela lisusu mingi na Yehova, na ndako na ye, mpe na ebongiseli na ye.”
Eteyelo ya mosala ya Bokonzi
Ntina: Kopesa bakɛngɛli-batamboli, bankulutu, mpe ntango mosusu basaleli na misala formasyo mpo na kobatela bampate mpe kotambwisa lisangá. (Mis. 20:28) Elobelaka mosala oyo masangá ezali kosala mpe elimo oyo ezali komonisa, bakisá mpe bamposa oyo masangá ezali na yango. Eteyelo yango esalemaka nsima ya mwa bambula soki Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisi yango.
Boumeli: Banda mwa bambula, eteyelo yango eumelaka mikolo mibale to mikolo mibale na ndambo mpo na bakɛngɛli-batamboli, mokolo moko na ndambo mpo na bankulutu, mpe mokolo moko mpo na basaleli na misala.
Esika: Mbala mingi na Ndako ya Bokonzi to Ndako ya Mayangani.
Masɛngami: Esengeli kozala mokɛngɛli-motamboli, nkulutu, to mosaleli na misala.
Ndenge ya kokɔta: Mokɛngɛli ya zongazonga abengisaka bankulutu ná basaleli na misala. Biro ya filiale ebengisaka bakɛngɛli-batamboli.
“Mateya yango, atako ezali mingi mpe epesamaka na mwa ntango moke, elendisaka bankulutu mpe esalisaka bango bázala ntango nyonso na esengo mpe ‘bákoba kozala mibali’ na mosala ya Yehova. Bankulutu ya sika mpe baoyo baumeli bayekolaka kobatela bampate malamu mpe kozala na bomoko ‘na molɔngɔ moko ya makanisi.’”—Quinn.
“Kelasi yango eteyaki biso makambo oyo esengeli mpenza, na ndakisa mateya oyo etali kondima na biso, ekebisaki biso na makama, mpe epesaki biso makanisi oyo tokoki kosalela mpo na kobatela etonga. Yehova amonisaka mpenza boboto na ndenge asalisaka biso.”—Michael.
Eteyelo ya babongisi-nzela
Ntina: Kosalisa babongisi-nzela ‘bákokisa mosala na bango malamumalamu.’—2 Tim. 4:5.
Boumeli: Pɔsɔ mibale.
Esika: Biro ya filiale nde eponaka yango; mbala mingi na Ndako ya Bokonzi moko.
Masɛngami: Esengeli kozala mobongisi-nzela ya sanza na sanza banda mbula mobimba to koleka.
Ndenge ya kokɔta: Babengisaka mobongisi-nzela nyonso oyo akokisi masɛngami mpe mokɛngɛli ya zongazonga na bango nde ayebisaka ye.
Lily alobi boye: “Eteyelo yango esalisi ngai nalonga mikakatano oyo nakutanaka na yango na mosala ya kosakola mpe na bomoi na ngai. Esalisi ngai nabongisa ndenge na ngai ya koyekola, koteya, mpe kosalela Biblia. Epesi ngai mpenza makoki ya kosalisa basusu, mpe kopesa bankulutu mabɔkɔ, mpe kosalisa lisangá ekola.”
Brenda, oyo akɔtá eteyelo yango mbala mibale, alobi boye: “Esalisi ngai natyaka likebi na ngai mobimba na makambo ya elimo, nabongisa lisosoli na ngai, mpe namityela mokano ya kosalisa basusu. Ya solo mpenza, Yehova asepelaka kokaba!”
Eteyelo mpo na bankulutu ya masangá
Ntina: Kosalisa bankulutu bákokisa malamu mikumba na bango na lisangá mpe bámipesa lisusu na makambo ya elimo.
Boumeli: Mikolo mitano.
Esika: Biro ya filiale nde eponaka yango; mbala mingi na Ndako ya Bokonzi to Ndako ya mayangani.
Masɛngami: Esengeli kozala nkulutu.
Ndenge ya kokɔta: Biro ya filiale nde ebengisaka bankulutu.
Bandeko mosusu oyo bakɔtaki na kelasi ya mbala ya 92 na États-Unis balobi boye:
“Eteyelo yango esalisi ngai mingi, esalisi ngai namitalela mpe natalela ndenge oyo nasengeli kobatela bampate ya Yehova.”
“Nakoki sikoyo kobenda likebi na makanisi ya ntina ya Biblia mpo na kolendisa mpenza bato nyonso.”
“Na bomoi na ngai mobimba, nakobosana te makambo oyo nayekoli.”
Eteyelo mpo na bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango
Ntina: Kosalisa bakɛngɛli ya zongazonga mpe bakɛngɛli ya etúká bákokisa malamu mokumba na bango ya kosalisa masangá wana bazali kosala “mosala makasi ya koloba mpe ya koteya.”—1 Tim. 5:17; 1 Pe. 5:2, 3.
Boumeli: Sanza mibale.
Esika: Biro ya filiale nde eponaka yango.
Masɛngami: Ndeko mobali asengeli kozala mokɛngɛli ya zongazonga to mokɛngɛli ya etúká.
Ndenge ya kokɔta: Biro ya filiale ebengisaka bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango.
“Eteyelo yango esalisaki biso tómona malamumalamu ete Yesu nde azali kotambwisa ebongiseli oyo. Emonisaki biso ntina ya kolendisa bandeko ya masangá oyo totalaka mpe kolendisa bomoko ya lisangá mokomoko. Mateya ekɔtisaki mpenza na makanisi na biso ete atako mokɛngɛli-motamboli apesaka toli mpe ntango mosusu asembolaka, mokumba na ye ya liboso ezali ya kosalisa bandeko bámona ete Yehova alingaka bango.”—Joel, kelasi ya liboso, 1999.
Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba
Ntina: Kobongisa bankulutu mpe basaleli na misala oyo bazali minzemba bákokisa mikumba mosusu na ebongiseli ya Yehova. Bandeko mingi oyo bakɔti na eteyelo yango batindamaka mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala na mboka na bango, na esika nyonso oyo mposa ezali. Basusu bakoki kotindama na mboka mopaya soki bandimi. Bandeko mosusu bakoki kokende kosala lokola babongisi-nzela monene mpo na mwa ntango na bamboka ya mosika, na bisika oyo basakoli bazali te to na bisika oyo basakoli bazali moke.
Boumeli: Sanza mibale.
Esika: Biro ya filiale nde eponaka yango; mbala mingi Ndako ya Bokonzi to Ndako ya mayangani.
Masɛngami: Bandeko mibali oyo bazali minzemba mpe bazali na mbula kobanda 23 tii 62, oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe oyo bakondima bátinda bango epai nyonso oyo bazali na mposa ya basakoli. (Mrk. 10:29, 30) Basengeli kozala babongisi-nzela ya sanza na sanza banda mbula mibale to koleka mpe kozala bankulutu to basaleli na misala banda mbula mibale.
Ndenge ya kokɔta: Likita moko esalemaka na liyangani ya zongazonga mpo na koyebisa masɛngami na baoyo basepeli.
Rick, oyo akɔtaki kelasi ya mbala ya 23 na États-Unis, alobi boye: “Lokola namipesaki mobimba na kelasi yango, elimo ya Yehova ebongolaki ngai mpenza. Ntango Yehova apesi moto mokumba, asungaka ye mpo akokisa mokumba yango. Namonaki ete soki natye makanisi na kosala mokano ya Nzambe, kasi oyo ya ngai moko te, akolendisa ngai.”
Andreas, oyo azali kosala na Allemagne, alobi boye: “Nakómaki komona ete ebongiseli ya Yehova ezali likamwisi oyo ezali kosalema na mikolo na biso. Formasyo yango esalisi ngai namibongisa mpo na mosala oyo ezali liboso. Longola yango, bandakisa mingi ya Biblia eteyaki ngai likambo oyo: Kosalela bandeko mpe Yehova epesaka esengo ya solosolo.”
Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá
Ntina: Kopesa bandeko oyo babalá formasyo oyo ebongi mpo básala lisusu mingi na ebongiseli ya Yehova. Bandeko mingi oyo bakɔtaka kelasi yango batindamaka na bisika oyo basakoli bazali mingi te na mboka na bango. Bamosusu bakoki kotindama na mboka mopaya soki bango moko bandimi kokende. Bandeko oyo bakɔti eteyelo yango batindamaka liboso lokola babongisi-nzela monene mpo na mwa ntango na bisika oyo basakoli bazali te to na bisika oyo basakoli bazali moke.
Boumeli: Sanza mibale.
Esika: Eteyelo yango ezali kosalema na États-Unis, mpe kobanda sanza ya Sɛtɛmbɛ 2012, ekobanda mpe kosalema na bafiliale oyo ekoponama na mokili mobimba, mbala mingi na Ndako ya Bokonzi to Ndako ya mayangani.
Masɛngami: Babalani oyo bazali na mbula kobanda 25 tii 50, oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ, oyo bakoki kondima bátinda bango bipai nyonso oyo bazali na mposa ya basakoli, mpe oyo bandimaka koloba ete: “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yis. 6:8) Basengeli kozala bato oyo babalani banda mbula mibale to koleka mpe bazali na mosala ya ntango nyonso banda mbula mibale to koleka. Mobali asengeli kozala nkulutu to mosaleli na misala banda mbula mibale to koleka.
Ndenge ya kokɔta: Likita moko esalemaka na liyangani ya etúká mpo na koyebisa masɛngami na baoyo basepeli. Soki na mboka na bino likita ya ndenge wana esalemaka te na mayangani, kasi bosepeli kokɔta eteyelo yango, bokoki kokoma mokanda na biro ya filiale mpo na kotuna mituna.
“Pɔsɔ mwambe yango ebongoli mpenza bomoi na biso mpe ezali libaku malamu mpo na babalani oyo balingi kosala mingi na mosala ya Yehova! Tozwi ekateli ya kozala na bomoi ya mindɔndɔ te, oyo ekosalisa biso tósalela malamu ntango na biso.”—Eric ná Corina, kelasi ya mbala ya 1, 2011.
Gileade—Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Ntina: Kopesa bana-kelasi formasyo mpo na kosala lokola bamisionɛrɛ na bamboka oyo bato bazali mingi, mpo na kozala bakɛngɛli-batamboli, to kosala na Betele. Mokano na yango ezali ya kobongisa malamumalamu mpe kofandisa mosala na teritware mpe na filiale.
Boumeli: Sanza mitano.
Esika: Esika monene ya Watchtower mpo na mateya na Patterson, etúká ya New York, na États-Unis.
Masɛngami: Ezali mpo na babalani oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, elingi koloba bazali bamisionɛrɛ oyo bakɔtá Gileade te, babongisi-nzela monene, bakɛngɛli-batamboli, to bandeko oyo basalaka na Betele. Basengeli kozala na mosala yango bango mibale kobanda mbula misato to koleka. Basengeli koloba, kotánga, mpe kokoma Lingelesi malamu.
Ndenge ya kokɔta: Komite ya filiale ekoki kosɛnga na babalani bátondisa formilɛrɛ.
Lade ná Monique bautá na États-Unis mpe bazali kosala lelo na Afrika. Lade alobi boye: “Eteyelo ya Gileade ebongisaki biso mpo tókende ata epai nini na mokili mpe ebongisaki makanisi na biso mpo na kosala na bandeko.”
Monique abakisi boye: “Ntango nazali kosalela makambo oyo nayekoli na Liloba ya Nzambe, nasepelaka mingi na mosala na ngai. Esengo yango emonisaka ngai malamumalamu ete Yehova alingaka ngai.”
Eteyelo ya bandeko ya komite ya filiale ná basi na bango
Ntina: Kosalisa bandeko oyo bazali na komite ya filiale báyeba kotambwisa makambo na Babetele, bátalela malamu mosala ya kosakola na masangá, mpe bátambwisa malamu misala ya bakɛngɛli ya zongazonga mpe ya etúká. Bayekolaka mpe ndenge ya kotambwisa makambo etali mosala ya kobongola, konyata mikanda mpe kotinda mikanda na masangá.
Boumeli: Sanza mibale.
Esika: Esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, etúká ya New York, na États-Unis.
Masɛngami: Ndeko mobali asengeli kozala na komite ya filiale to na komite ya ekólo to kozala ndeko oyo aponami mpo na mokumba yango.
Ndenge ya kokɔta: Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebengisaka bandeko mibali ná basi na bango.
Lowell ná Cara bakɔtaki na kelasi ya mbala ya 25 mpe bazali lelo kosala na Nigeria. Lowell alobi boye: “Kelasi yango esalisaki ngai nayeba ete ata soki nazali na mosala mingi mpe ata soki bapesi ngai mokumba nini, mpo na kosepelisa Yehova nasengeli kozala makasi na elimo. Mateya emonisaki mpe ete bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na basaleli na ye nde esengeli komonana na ndenge oyo tosalelaka basusu makambo.”
Cara abakisi boye: “Toli moko oyo nakanisaka mingi ezali oyo: Soki nazali kokoka te kolimbola polele likambo moko boye, nasengeli koyekola yango malamu liboso nateya yango bato mosusu.”