Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/12 lok. 7
  • Kolekisa ntango ná bato ya libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolekisa ntango ná bato ya libota
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Eyenga ya Mbótama elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya Noele te?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Biutelo Ya Eyenga ya Mbotama na Mikolo na Biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Nini etindaka bato básala makambo oyo basalaka na Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/12 lok. 7

Kolekisa ntango ná bato ya libota

“Talá! Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!”​—NZEMBO 133:1.

Ntina oyo bato mosusu basalaka fɛti ya Noele.

Lokola Bayisraele nyonso bazalaki bana ya Yakobo to Yisraele, bazalaki “bandeko,” bato ya libota moko. Ezalaki “malamu” mpe “esengo” ntango bazalaki kokende bafɛti na Yerusaleme. Ndenge moko na bango, lelo oyo mpe mabota mingi elukaka kozala esika moko mpe kolekisa ntango moko “malamu” mpe ya “esengo” na eleko ya Noele.

Mokakatano ezali wapi?

Buku moko (Encyclopedia of Christmas and New Year’s Celebrations) elobi boye: “Makambo mikemike oyo libota ekutanaka na yango na boumeli ya mbula ekoki kokóma minene ntango libota ekutani esika moko mpo na bafɛti.”

Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa?

‘Bókoba kozongisela baboti na bino ná bankɔkɔ na bino bolamu oyo bosengeli kozongisela bango.’ (1 Timote 5:4) Soki likoki ezali, kendáká mbala na mbala kotala bato ya libota na yo. Soki bandeko na yo bafandaka mosika, okoki kosololaka na bango mbala na mbala. Mpo na nini te kokomela bango mokanda, kobenga to kotindela bango bamesaje na telefone to na Internet? Kosolola mbala na mbala esalaka ete mwa makambo mikemike oyo ebimisaka matata ezala mingi te.

“Bozali na nkaka nde na kati ya bolingo ya motema na bino moko. . . . Bófungwama.” (2 Bakorinti 6:12, 13) Bandeko oyo omonanaka na bango kaka mbala moko na mbula bakoki nokinoki kokóma bapaya; mingimingi epai ya bana. Bana mosusu bamonaka ete bazali mpenza te na makambo ya kosala ná bankɔkɔ to bandeko ya libota na bango ya mosika. Na yango, lendisáká bana na yo ‘báfungwama’ na bolingo na bango ata mpe epai ya bandeko oyo bakómi mibange.a Bana oyo balekisaka ntango mbala na mbala ná mibange bakómaka na ezaleli ya komitya na esika ya basusu mpe basepelaka na baoyo baleki bango na mbula.

“Bato nyonso basepelaka soki bazwi eyano ya malamu na tango oyo esengeli.” (Masese 15:23, Bible na lingala ya lelo oyo) Okoki kosala nini mpo matata to makambo mosusu ebebisa te boyokani ya libota? Lolenge moko ya kosala ezali ya kopona “tango oyo esengeli” mpo na kosolola makambo oyo ezali mpenza na ntina. Soki bozali kosolola mbala na mbala, ekozala mpasi te kosolola na bato ya libota na yo na esika oyo bato mosusu bazali te mpo na kobongisa ata likambo ya ndenge nini mpe kolekisa ntango moko ya “malamu” mpe ya “esengo” ntango bokutani.

a Talá masolo “Pourquoi devrais-je apprendre à connaître mes grands-parents?” mpe “Comment me lier d’amitié avec mes grands-parents?” na Lamuká! ya 22 Aprili mpe 22 Mai 2001 na Lifalanse, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto