Bóbatela bana na bino na likambo litali kozongisama makila
1 “Talá, bana bazali libula ya Yehova.” (Nz. 127:3, NW ) Baboti oyo Yehova apesaki libula oyo kitoko bazali na mokumba ya kosalisa bango, atako mokumba yango ezali kilo. Na ndakisa, bosilaki kokamata bibongiseli nyonso bisengeli mpo na kobatela bana na bino oyo bazali bilenge na ntina na likambo litali kozongisama makila? Lolenge nini bana na bino bakosala soki esengeli ete bázongisa bango makila? Bosili kosolola kati na libota na ntina na lolenge malamu bokoki kosala soki esengeli ete bázongisa bango makila na mbalakaka?
2 Soki esengeli na bino kobongisa libota na bino na ntina na makambo wana, yango esengeli te kozala liziba ya mitungisi mpe ya kobanga ezangi ntina. Bokoki te koyeba makambo nyonso makobima kati na bomoi mpe komibongisa mpo na yango; kasi, baboti bokoki kokamata bibongiseli mingi liboso mpo na kobatela bana na bino na likambo litali kozongisama makila. Soki bomonisi bopɔtu na makambo wana, mwana na bino akoki kozongisama makila na ntango bazali kosalisa ye na lopitalo. Bokoki kosala nini?
3 Ntina ya kozala na kondima makasi: Ezali likambo ya ntina mingi kozala na kondima makasi mpo na oyo etali mobeko ya Nzambe na ntina na makila. Boteyaka bana na bino botosi epai na Yehova na likambo yango, motindo moko boteyaka bango mibeko na ye na ntina na kolongobana, bizaleli malamu, kozanga komikɔtisa na makambo ya mokili mpe makambo mosusu matali bomoi? Mayoki na bino mayokani na mobeko oyo Nzambe apesaki na Deteronome 12:23, oyo ete: “Kebá bobele ete olya makila te”? Molɔngɔ 25 ebakisi: “Okolya yango te ete makambo na yo nyonso mazala malamu, mpe oyo na bana na yo na nsima na yo, wana ekosala yo yango ezali sembo na miso na [Yehova].” Monganga moko akoki koloba ete na lisalisi ya makila ‘makambo makotambola malamu’ mpo na mwana na bino oyo azali kobɛla; liboso ete likambo ya mbalakaka esalema, bosengeli kozwa ekateli makasi ya koboya makila mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino, mpe koyeba ete eleki malamu kozala na boyokani malamu elongo na Yehova na esika ya kobuka mobeko ya Nzambe na kokanisáká ete yango ezali mpo na koyeisa bomoi molai. Kondimama epai na Nzambe mpo na sikawa mpe bomoi ya seko na mikolo mizali koya etalelami na likambo oyo!
4 Kozanga ntembe, Batatoli ya Yehova bazwaka bomoi na motuya mingi. Balingaka kokufa te. Balingi kozala na bomoi mpo na kokumisa Yehova mpe kosala mokano na ye. Ezali moko na bantina mpo na yango bakendaka na lopitalo mpe basalisaka bana na bango. Basɛngaka na minganga ete básalisa bango, mpe soki bayebi ete makila ezali nkisi oyo bazali kosalela mingi na esika wana, basɛngaka ete básalisa bango na nkisi oyo ezali na makila te. Bankisi oyo esɛngaka makila te ezali mingi. Minganga oyo bamesani mingi na mosala na bango basalelaka yango. Myango wana ya kosalisa kozanga kosalela makila esengeli te kotalelama lokola likambo ya bindimandima; kasi ezali nde lolenge ya kosalisa mpe myango ya kotyela motema, oyo ezali kolobelama kati na bazulunalo ya lokumu oyo elobelaka makambo ya monganga. Ebele ya minganga kati na mokili mobimba bandimaka likanisi na biso mpe basalisaka biso na lolenge ya malamu mpenza kozanga kosalela makila, atako ezalaka mpasi mbala mosusu na kozwa minganga oyo bandimaka kosalisa bana ya Batatoli na myango oyo misɛngaka makila te.
5 Bóluka monganga oyo akondima makanisi na biso: Lolenge ya kosalisa babɛli ezali likambo oyo etungisaka minganga mingi. Ntango bozali kosɛnga bango ete básalisa bana na bino kozanga kosalela makila, yango ezali bobele kobakisa mikakatano misusu likoló na oyo bazalaka na yango. Minganga misusu bakondima kosalisa mikóló na komemyáká masɛngami na bango na ntina na makila, soki bazali na mokanda ekomami malamu mpe etyami mabɔkɔ oyo emonisi ete baboyi kozongisama makila. Bobele bongo, basusu bakondima mbala mosusu kosalisa bilenge oyo bazali komonisa ete bakɔmeli, mpamba te ata bisambiselo mosusu bindimi ete bilenge oyo batalelami ete bakɔmeli bazali na lotomo ya kosala maponi mpo na oyo etali nkisi basengeli kozwa. (Talá Mosenzeli ya 15 Yuni 1991, nkasa 16 mpe 17, oyo ezali komonisa nani atalelami lokola elenge oyo akɔmeli.) Nzokande, minganga bakoki koboya kosalisa bana, mingimingi bilɛzi, soki bapesameli te ndingisa ya kozongisa bango makila. Ya solo, ezali bobele na minganga moke nde bakondima kopesa ndanga mpenza ya kosalisa mwana moko kozanga kosalela makila ata kati na ezalela nini ya makambo. Mpo na bantina ya makambo matali monganga mpe mibeko, minganga mingi bamonaka malamu ete bakoki kopesa ndanga yango. Atako bongo, mbala mingi bandimaka kosalisa bana ya Batatoli ya Yehova na kosaláká nyonso oyo ekoki mpo na komemya etɛlɛmɛlo na biso mpo na oyo etali makila.
6 Na yango, bokosala nini soki bolukiluki na bino ya kozwa monganga ya malamu mpo na kosalisa mwana na bino ememi bino epai na monganga oyo andimaka makanisi ya Batatoli ya Yehova mpe asalelaki bankisi oyo esɛngaka makila te mpo na Batatoli mosusu, kasi oyo azali komona ete mibeko mizali kopesa ye ndingisa te ya kopesa bino ndanga ete akoki kosalela makila soko moke te? Ya solo, azali kondimisa bino ete makambo makotambola se malamu ata mpo na mbala oyo. Boye bokoki kotalela likambo yango ete ezali likanisi malamu koleka. Na likambo motindo wana, bokoki kosukisa ete likoki ezali ya kopesa ye ndingisa ya kosalela bankisi na ye. Nzokande, bólimbwela ye polele ete soki bopesi ndingisa ete mwana na bino asalisama na lolenge moko to mosusu, bozali kopesa nzela te ete bázongisa ye makila. Na kosaláká bongo, bozali kokokisa mokumba na bino kozanga ete ekateli na bino etalelama lokola koangana kondima.
7 Ya solo, soki likoki ezali ya kozwa mwango mosusu ya malamu oyo bokoki kokitanya, oyo ekoki kokitisa to kolongola likama litali kozongisama makila, boye bokoki kopona mwango oyo emonani ete ezali na makama mingi te. Ekozala malamu ete bósala milende makasi mpo na kokutana na monganga moko to monganga-mopasoli oyo andimaka koleka basusu, kosalisa bato kozanga makila. Mpo na kolonga malamu, osengeli kokamata bibongiseli liboso ete mikakatano mibima. Bósala makasi mpo na kokutana libosoliboso na monganga oyo andimaka makanisi na biso. Soki likoki ezali, bókende te epai ya minganga to lopitalo oyo endimaka te makanisi na biso.
8 Na mikili misusu, ezali lisusu lolenge mbongo ya lopitalo ekozongisama nde ekoki kokata soki bakozongisa makila to bakozongisa yango te. Epai kuna baboti bazali na makoki na bango moko mpo na komisalisa epai na monganga moko oyo balingi, bana bakutanaka te na minganga to basali na lopitalo oyo bandimaka mpenza makanisi na biso te. Makoki oyo moto azali na yango nde ekataka lolenge libota moko ekotalema epai ya minganga mpe na lopitalo. Bobele bongo, monganga moko to lopitalo moko ekondima mbala mingi kotinda mwana na lopitalo mosusu bobele soki baboti bazali na makoki ya kofuta mbongo ya lopitalo. Epai mosusu, bino basi oyo bozali na zemi, bosengeli mpenza kotya likebi mpo na kolɔngɔnɔ na bino na boumeli ya ntango oyo bozali na zemi! Yango ekosala ete bópɛngola likoki ya kobota matsombe mpe mikakatano oyo mibimaka na ntina na yango, mpamba te bankisi oyo esalelamaka mbala mingi mpo na kosalisa bamatsombe esɛngaka makila.
9 Minganga balobaka mbala mosusu ete Batatoli ya Yehova bayebisaka etɛlɛmɛlo na bango ya koboya makila bobele soki makambo makómi ndongo. Yango esengeli kosalema bongo te. Moko kati na makambo ya liboso oyo baboti Batatoli basengeli kosala wana bazali kokende na lopitalo to wana bazali kosalisama na monganga moko ezali bongo ya kosolola elongo na bango na ntina na etɛlɛmɛlo na biso mpo na makila. Soki esengeli ete básala lipaso, sɛngá ete osolola elongo na monganga-molalisi mpɔngi. Monganga-mopasoli akoki mbala mosusu kosalisa yo na likambo yango. Tángá malamumalamu bafɔrmilɛrɛ bondimami na lopitalo. Bozali na lotomo ya koboma makambo nyonso oyo mabongi te. Mpo na kosilisa kozanga koyokana, bókoma likoló na fɔrmilɛrɛ oyo bondimami na lopitalo ete, mpo na bantina ya makambo matali losambo mpe matali monganga, kozongisa makila endimami te mpe epesameli nzela te, atako likambo nini oyo ekoki kobima.
10 Lisungi ya lisangá ya Yehova: Bibongiseli nini lisangá ya Yehova esili kokamata mpo na kosalisa bino na kobatela bana na bino ete bázongisama makila te? Esili kokamata bibongiseli mingi. La Société asili kobimisa ebele ya masolo mpo na komesenisa biso na myango oyo misalelaka makila mpe bankisi oyo esalelamaka na esika ya kozongisama makila. Bosili koyekola mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie? mpe mikanda misusu oyo mizali kolobela likambo yango. Epai mosusu, bandeko ya mibali mpe ya basi ya lisangá na bino bakoki kosalisa bino mingi mpe kosunga bino. Ntango ezalela moko ya kozanga koyokana ebimi, mbala mosusu bankulutu bakomona malamu ete bato bázala wana butu mpe moi mpo na kobatela ndeko oyo azali na lopitalo, mingimingi nkulutu moko elongo na moko kati na baboti to mosangani moko ya libota ya ndeko oyo azali kobɛla. Makila mazongisamaka mbala mingi wana libota to bandeko ya mobɛli bazongi epai na bango na butu.
11 Na Zaïre [sangisa Burundi mpe Congo], bakomite mpo na koyokana elongo na minganga ezali 25 kati na bingumba bileki minene. Lisangá moko na moko ekangisami na komite moko oyo esalemi na bandeko mibali baoyo babongisami mpenza malamu, oyo bakoki kopesa lisalisi. Soki esengeli, bóluka kokutana na bango na nzela ya bankulutu. Ekosengela te kobyanga bango mpo na makambo ya mikemike, kasi kozela ntango molai te soki bozali na mayoki ete mikakatano makasi mikoki kobima. Bandeko wana bakoki mbala mingi kopesa nkombo ya minganga oyo bandimaka makanisi na biso mpe kolakisa bankisi oyo bakoki kosalela na esika ya kozongisama makila. Epai kuna yango esengeli mpe likoki ezali, bandeko wana bamibongisaka mpo na kokóma esika mobɛli azali mpe kopesa lisalisi na bango mpo na koyeba lolenge ya kosala.
12 Lolenge ya komibongisa mpe kosala soki likambo ekómi na esambiselo: Bokosala boni soki monganga moko to esika moko oyo basalisaka bakani kozwa ordonansi oyo ekopesa bango ndingisa ya kozongisa mwana na bino makila? Bosengeli kokanga mabɔkɔ kokanisáká ete bozali na likambo mosusu ya kosala te? Soko moke te! Mbala mosusu likoki ezali naino ya kopɛngola kozongisama makila. Ezali malamu komibongisa liboso na ntina na likambo wana. Bokoki kosala nini?
13 Bokolonga malamu soki boyebi mpenza bamoko na mitinda mitali mibeko ya Leta oyo mizali kokamba to oyo mizali na bopusi likoló na bisika basalisaka bato mpe likoló na bazuzi na makambo motindo wana. Moko kati na mitinda yango oyo mizali na ntina mingi ezali ete mibeko mipesaka te na baboti bokonzi na makambo nyonso mpo na kondima to koboya ete nkisi ya monganga epesama epai na bana na bango. Atako mikóló bazali na lotomo ya kondima to ya koboya bango moko nkisi boye, baboti bapesameli te ndingisa ya koboya nkisi oyo etalelami ete ezali na ntina mingi mpo na bolamu ya mwana na bango, ata soki koboya na bango epusami na bindimeli ya losambo oyo bakangami na yango makasi.
14 Etinda wana ya moboko euti na mobeko oyo ebimisamaki na 1944 na Esambiselo Monene ya États-Unis oyo elobi ete: “Baboti bazali na bonsomi ya komiboma lokola bamartiru. Kasi bazali na bonsomi te, na makambo motindo moko, ya kosala ete bana na bango bázala bamartiru, wana bana bakómi naino te na mbula oyo bazali mpenza na likoki ya kokamata bikateli bango moko na boyokani na mibeko ya Leta.” Lobanzo wana ya liboso mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe mpo na bolamu ya mwana ezali mpe komonana lelo kati na mibeko mitali kobatela bana. Mibeko wana, oyo misalemi mpo na kobundisa minyoko likoló ya bana, mizali mpe na mokano mizali ya kobatela bango na ntina na bopɔtu na makambo matali monganga.
15 Baboti baklisto bamonaka mabe te na likambo litali kobatela bana na ntina na minyoko to bopɔtu ya baboti mosusu. Kasi mibeko oyo mizali kobatela bana na ntina na bopɔtu mpe mobeko ya Esambiselo Monene ya États-Unis oyo touti kotánga esalelamaka mbala mingi na lolenge mabe mpo na oyo etali bana ya Batatoli ya Yehova. Mpo na nini? Mokano ya baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova ezali te ete bana na bango bákóma “bamartiru.” Mpamba te, soki ezalaki bongo, mpo na nini bamemaka bango liboso na lopitalo? Na esika ete ezala bongo, baboti wana baklisto bazali nde pene na kosalisa bana na bango. Balingaka bango mpe bazali na mposa ya komona bango kozala nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi bayebi ete Nzambe apesa bango mokumba ya kopona malamumalamu lolenge ya nkisi oyo esengeli mpo na bana na bango. Balingi ete mitungisi ya kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bana na bango esalisama kozanga kosalela makila. Longola likambo oyo ete kosalisama kozanga kosalela makila ezalaka malamu koleka kosalela makila, kasi oyo eleki ntina, yango ezali kosala ete bana na bango bándimama epai na Ye oyo apesaki bomoi, Yehova Nzambe.
16 Atako matomba mamonanaka mpo na bankisi oyo esalelaka makila te, minganga mingi mpe basáli oyo bazali na mokumba ya kobatela bana bamonaka ete nkisi oyo ezali kosalela makila nde ezali nkisi oyo ezali kosalelama mingi mpe oyo ezali na ntina mingi mpo na kobika na bamaladi mosusu. Mikakatano mikoki bongo kobima soki baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova baboyi kozongisa makila oyo esɛngami. Na ndenge eyebani, minganga bakoki te engebene mibeko kopesa bana nkisi kozanga ete baboti na bango bándima yango. Mpo na kopɛngola koboya oyo baboti bazalaka na yango mpo na kosalela makila, ekómaka ete minganga to basáli na lopitalo bazali kokende koluka ndingisa epai ya zuzi moko na nzela ya ordonansi mpo ete mwana akóma na mabɔkɔ na bango. Ekateli motindo wana ya bato na mibeko ekoki kopesama epai na basáli oyo bazali na mokumba ya kobatela bana, epai na minganga to epai na bakambi ya lopitalo oyo bazali kosala na mokano ya kobatela bana oyo babengaka ete bopɔtu mpo na kosalisa malamu.
Ezali bobele na ntango likambo moko ya mbalakaka ebimi nde, engebene monganga, esengeli kosalela nokinoki nkisi oyo ekanisami ete ezali na ntina mpo na kobikisa to na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya mwana (sangisá kozongisama makila) ekoki na boyokani na mibeko ya Leta kosalelama ete baboti to esambiselo bándima yango. Nzokande, na Zaïre, mbala mingi mibeko mitosamaka te mpe basɛngisaka moto ete andima kozongisama makila kozanga ata kotalela oyo esambiselo elobi, to mpe bakobengana moto na lopitalo, likambo oyo eyokani na mibeko te mpe elongobani te! Ya solo, monganga asengeli kozongisa monɔkɔ na ntina na ekateli yango soki asaleli lolenge wana ya mbalakaka oyo esɛngami na mibeko.
17 Mbala mingi, baordonansi oyo epesaka ndingisa ya kosalela makila ezwamaka nokinoki wana baboti bayebi likambo moko te to bayebi yango na lolenge ya malamu te. Minganga, bakambi na lopitalo to basáli oyo bazali na mokumba ya kobatela bana bamekaka kolongisa myango wana ya kosala na lolenge na mbalakaka na kolobáká ete ezalaka na makambo mosusu ya monganga oyo masengelaka kosalema mbalakaka kozanga koyebisa baboti nini ezali kosalema. Kasi mbala mingi, ntango batunaki bango, minganga bandimaki ete likambo mpenza ya mbalakaka ezalaki te mpe ete bazwaki ordonansi epai na zuzi moko “bobele soki,” na nsima ekosengela, engebene bango, kozongisama makila. Lokola bozali na mokumba ya kobatela bana na bino, bozali ntango nyonso na lotomo ya moboko ya koyeba oyo minganga, bakambi na lopitalo to basáli oyo bazali na mokumba ya kobatela bana bazali kosala epai na mwana na bino. Mobeko ezali kosɛnga ete, soki likoki ezali, bóyeba bibongiseli nyonso oyo ezali kokamatama mpo na kozwa ordonansi epai na zuzi, mpe ete bókoka kolobela likambo na bino epai na ye.
18 Makambo oyo matali mibeko ya Leta mamonisi ntina ya koluka monganga akondima makanisi na biso. Bósala na boyokani elongo na ye mpe, na lisalisi ya basangani ya komite mpo na koyokana elongo na minganga, bósalisa ye na koluka mwango oyo esalelaka makila te oyo eyokani na bokɔnɔ ya mwana na bino, to bómema mwana na bino epai monganga mosusu to na lopitalo mosusu oyo ekopesa ye nkisi motindo wana. Kasi soki emonani ete monganga moko, mokambi moko ya lopitalo to mosáli moko oyo azali na mokumba ya kobatela bana akani kosɛnga ekateli ya bazuzi, bosengeli nokinoki kotuna soki yango ezali mpenza bongo. Mbala mosusu yango esalemaka na nzela ya telefone, na nkuku. Soki ekateli ezwami ete likambo likóma liboso ya basambisi, bósɛnga ete báyebisa bino likambo yango mpo ete bózala na likoki ya koyebisa na zuzi likanisi na bino na ntina na yango. (Mas. 18:17) Soki bozali na mwa ntango, na nzela ya mosangani moko ya komite mpo na koyokana elongo na minganga oyo azali esika bofandi, bókende kotuna na biro ya makambo matali monganga to biro ya Betele oyo etalelaka makambo ya kosambisa mpo na koluka lisalisi epai na biro ya la Société oyo etalelaka makambo ya kosambisa.
19 Soki koboya na bino ya kozongisama makila ememi bino na kosambisama, likanisi ya monganga, oyo andimisami ete makila ezali na ntina mpo na kobika ya mwana, ekoki kondimama koleka ya bino. Zuzi oyo ayebi na ye malamu te makambo ya monganga, akondima mingimingi makanisi oyo monganga apesi. Ezali yango nde esalemaka mingi soki baboti bazali bobele na likoki moke to mpe bazali na likoki te ya koyebisa makanisi na bango mpe ete monganga akoki, kozanga ete bátɛmɛla ye, komonisa makanisi na ye mpo na nini “esengeli” bobebe kozongisama makila. Mitindo wana ya kosala oyo milandaka bobele makanisi ya ngámbo moko epesaka mpenza nzela te mpo na koyeba solo na likambo yango. Ya solo, eloko oyo ememaka monganga na kokanisa ete esengeli kozongisama makila ezalaka makanisi na ye moko mpe yango ezangi ndanga. Mbala mingi, esika monganga moko azali kondima ete esengeli mpenza makila mpo na kobikisa mwana, monganga mosusu, oyo azali na momeseno ya kosalisa bokɔnɔ yango kozanga kosalela makila, akoloba ete ntina ezali te na kozongisa makila epai ya mobɛli mpo na kosalisa ye.
20 Bokoyanola nini soki avoka moko to zuzi moko atuni bino mpo na nini bozali koboya kozongisama makila oyo “ekobikisa” mwana na bino? Libosoliboso, mbala mosusu bokozala na likanisi ya kolobela ye kondima na bino na ntina na lisekwa mpe koyebisa ye ete bozali na elikya ete Nzambe akosekwisa mwana na bino soki ekómi ete akufa. Kasi eyano motindo wana ekolendisa bobele zuzi, oyo lobanzo na ye ya libosoliboso ezali bongo bolamu ya nzoto ya mwana, mpe akozala na likanisi ete bozali bato ya bindimandima mpe ete asengeli kosala nyonso mpo na kobatela mwana na bino.
21 Esengeli ete bamazistra báyeba ete atako bozali koboya na ntina na bindimeli na bino makasi ya losambo, bozali koboya te ete mwana na bino asalisama. Zuzi asengeli te kozala na likanisi ete bozali baboti ya bopɔtu to oyo bazangi mayoki ya bato, kasi nde baboti ya bolingo oyo balingi ete mwana na bango asalisama. Nzokande, bozali kondima te matomba oyo bazali koloba na ntina na makila ete ekoki kolongola makama oyo mamemaka kufa mpe mikakatano oyo yango ebimisaka, mingimingi soki bankisi mosusu ezali oyo ekoki kosalelama na esika ya makila kozanga kobimisa makama wana.
22 Engebene ezalela ya makambo, bokoki komonisa ete bobele monganga moko nde amonaki ete makila ezalaki na ntina mingi, ete minganga bazalaka na makanisi makeseni na lolenge ya kosalisa, mpe ete bozali kosɛnga likoki ya kozwa monganga mosusu oyo akosalisa mwana na bino na kolandáká myango oyo miyebani mingi oyo misalelaka kozongisama makila te. Na nzela ya komite mpo na koyokana elongo na minganga, ekoki kozala ete bokozwa monganga moko oyo akondima kosalisa mwana na bino kozanga kosalela makila mpe oyo akoki kopesa litatoli malamu, na ndakisa na nzela ya telefone. Na ntembe te, komite mpo na koyokana elongo na minganga ekozala na likoki ya kopesa epai na zuzi to na monganga oyo azali kosɛnga ete esambiselo ekata likambo masolo oyo mauti na bazulunalo oyo elobelaka makambo ya monganga oyo ezali komonisa lolenge maladi oyo mwana na bino azali na yango ekoki kosalisama kozanga kozongisama makila.
23 Mbala mingi, zuzi oyo basɛngaka na ye ete apesa ordonansi nokinoki, azalaka te na ntango ye moko to ata soki bayebisi ye, ya kokanisa na ntina na makama mingi ya makila, lokola SIDA, maladi ya libale (hépatite) mpe mikakatano misusu mingi. Bokoki kolobela yango epai na zuzi mpe lisusu koyebisa ye ete lokola bozali baboti baklisto, bozali kotalela kosalela makila ya moto mosusu, na mokano ya kobikisa bomoi, lokola kobuka monene ya mibeko ya Nzambe mpe kozongisama ya makila na makasi epai na mwana na bino ekokokana bongo na kobebisa ye. Bino mpe mwana na bino (soki akómi na mibu ya kozala na bindimeli na ye moko) bokoki kolimbola mpii oyo bozali na yango soki bakɔtisi makila na nzoto na ye mpe kozanga koumela, mpe bósɛnga na zuzi ete akata likambo yango te, kasi nde apesa nzela ete bálanda kopesa nkisi oyo ekoki kosalelama na esika ya makila.
24 Ntango bomonisi malamumalamu makanisi na bino, bazuzi bakososola malamu likanisi na bino—oyo ya baboti. Na bongo bakondima te kopesa ndingisa ya kozongisama makila. Ekómaka na bantango mosusu ete bazuzi bazali kolɛmbisa likanisi mabe oyo monganga azalaki na yango ya kosalela makila, kosɛngáká kutu ete bápesa liboso bankisi oyo esalelamaka na esika ya makila, to bapesaki baboti likoki ya koluka minganga misusu oyo bakosalisa kozanga kosalela makila.
25 Soki bozali liboso ya moto oyo azali koluka kozongisama ya makila na makasi, bózala na ntembe te na ntina na bokangami na kondima na bino. Na bantango mosusu, bazuzi (mpe minganga) basɛngaka na baboti soki bakomona mabe kopesa bango mokumba ya “kozwa” ekateli ya kozongisama makila, kokanisáká ete yango ekokitisa kotungisama ya lisosoli ya baboti. Kasi esengeli komonisama polele kati na makanisi ya bato banso oyo batalelami ete bino, baboti, bosɛngisami na kolanda kosala oyo ekoki na bino mpo na kotɛmɛla ete bázongisa makila te. Yango ezali mokumba oyo Nzambe apesi bino. Ekoki kopesama na moto mosusu te.
26 Na bongo, bosengeli komilɛngɛla mpo na komonisa etɛlɛmɛlo na bino na lolenge ya polele mpe ya kondimisa liboso ya minganga to bazuzi. Atako milende nyonso oyo bosali, soki esambiselo ezwi ekateli, bólanda kosɛnga na monganga ete azongisa makila te mpe bósɛnga ye na kolendendela nyonso ete asalela bankisi oyo esalelaka makila te. Bólanda kosɛnga na ye ete atánga masolo ya bazulunalo ya makambo matali minganga mpe atuna likanisi ya minganga oyo bandimaka ete bákutana na bango mpo na komonisa bankisi oyo esalelaka makila te. Mbala mingi, monganga oyo amonanaki ete azalaki na makambo makasi, abimaki na esika bapasolaka bato na koyebisáká na esengo nyonso ete asalelaki makila te. Na yango, ata soki ordonansi moko epesamaki na zuzi moko, bólɛmba nzoto soko moke te!—Talá Mosenzeli ya 15 Yuni 199, “Mituna ya batángi.”
27 Bómikundola maloba oyo ya Yesu: “Bókeba mpo na bato, zambi bakokaba bino liboso na [bisambiselo ya mboka, NW]. . . . Bakobenda bino liboso ya mikóló na mokili mpe na mikonzi mpo na ngai, mpo na litatoli epai na bango mpe epai na mabota na bapaya.” Yesu abakisaki ete, mpo na kosunga biso na makambo motindo wana, elimo santu ekosalisa biso na komikundola makambo mabongi mpe oyo mazali na ntina mpo na koloba.—Talá Mat. 10:16-20.
28 “Ye oyo akosala likambo na mayele akomona malamu, ye oyo akotalela [Yehova] azali na esengo.” (Mas. 16:20) Baboti, bómilɛngɛla malamumalamu mpo na kobatela mwana na bino na libebisi ya elimo oyo euti na kozongisama makila. (Mas. 22:3) Bana, bóndima kobongisama oyo baboti na bino bazali kopesa na nzela ya bibongiseli oyo mpe bósimba yango na motema. Tiká ete libota na bino nyonso ‘ezwa ekateli makasi ya kolya makila te, mpo ete yango ezali malamu mpo na bino’ na nzela ya lipamboli mpe kondimama epai na Yehova!—Det. 12:23-25.