Matomba ya kosala na bomoko
1 Okanisi ete tokoki kozwa matomba ya kosala na bomoko elongo na bazalani na biso kati na mosala ya kosakola? Yesu akanisaki yango. Atako mosala ya kobuka mbuma ezalaki monene mpe basali moke, atindaki bayekoli 70 kokende kosakola “mibale mibale.” Oyo nde libaku kitoko mokomoko na bango azalaki na yango ya kosakola “na mboka nyonso mpe bisika nyonso bilingaki ye kokenda”!—Luka 10:1, 17; Mat. 9:37.
2 Ezali elendiseli na kosala na bomoko elongo na baninga na biso. Bamoko kati na biso bazali nsɔninsɔni mpe bazali na mikakatano mpo na koloba na bato oyo bayebi bango te. Kozala na mosakoli mosusu elongo kati na mosala ya kosakola ekoki kopesa biso elikya ya solo mpo na kosakola Liloba na Nzambe na molende. Na ntango tozali biso moko te, ekoki kozala na biso pɛtɛɛ mpenza mpo na kokokisa mosala na biso na lolenge biso tobongisamaki. (Mas. 27:17) Moto na mayele alobaki: “Mibale baleki moko na malamu.”—Mos. 4:9.
3 Ezali malamu kosakola elongo na basakoli mpe babongisi-nzela bakeseni. Ntoma Paulo azwaki lokola baninga ya mosala Barnaba, Sila, Timote, Yoane Malako, bakisa mpe basusu, mpe bazwaki matomba mingi ya bosali na bomoko wana. Ekoki mpe kozala motindo moko na mikolo na biso. Tosilá kosakola elongo na moto moko oyo asila koumela mingi kati na solo? Nsima na kotalela ntɔki na ye na kopesa litatoli, na ntembe te tosilaki kozwa makanisi malamu oyo esalisaki biso na komisembola kati na mosala na biso. Tosilaki kobima elongo na basakoli oyo bazali mpenza bato ya sika? Na bongo ekoki kosalema ete toyebisaki bango makambo oyo toyekolaki, oyo esalisaki bango na kozala na molende koleka mpe kozwa esengo mingi kati na mosala ya kosakola.
4 Tozali sikawa kotambwisa boyekoli moko ya Biblia? Soki ezali boye, mpo na nini te kobyanga nkulutu moko to mokɛngɛli ya zongazonga mpo na kobima na biso elongo? Ezali malamu ete bayekoli ya Biblia báyebana elongo na bakɛngɛli. Soki tozali kokakatana mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia na ntango nkulutu moko azali wana, mbala mosusu ye akondima kosala yango kotikeláká biso ntango ete tótala lolenge na ye ya koteya. Tómipekisa te nsima na yango mpo na kotuna ye soki azali na batoli oyo ekosunga biso na kosalisa moyekoli ete akola nokinoki.
5 Tózala bato na kolendisa na ntango tozali kosakola na baninga na biso. Tózala na makanisi ya kokende liboso na ntango tozali koloba na ntina na teritware. Tótɔngatɔnga baninga na biso te mpe tóimaima te na ntina na bikateli bikamatami kati na lisangá. Tóbatela kati na makanisi mosala na biso mpe matomba oyo Yehova azali kopesa biso. Na kosaláká bongo, tokozonga epai na biso tolendisami kati na elimo, biso wana mpe baninga na biso.
6 Mbala mosusu ezali na biso mpasi mpo na kosakola mbala na mbala elongo na bandeko na biso mibali mpe basi. Nzokande, soki tokosala yango, mpo na nini te komibongisa mpo ete tósakola mwa ntango elongo na mosakoli mosusu? Tokozwa matomba biso nyonso mibale.—Lom. 1:11, 12.