Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/96 lok. 2
  • Makita ya Mosala mpo na Yúni

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya Mosala mpo na Yúni
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 3 Yúni
  • Pɔ́sɔ ebandi na 10 Yúni
  • Pɔ́sɔ ebandi na 17 Yúni
  • Pɔ́sɔ ebandi na 24 Yúni
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 6/96 lok. 2

Makita ya Mosala mpo na Yúni

Pɔ́sɔ ebandi na 3 Yúni

Loyembo 153

10 mn : Mayebisi mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Talelá etánda “Mikano na biso mizali nini mpo na eleko ya bopemi ya kelasi?”

15 mn : “Tósala na molimo na biso mobimba.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Soki ntango epesi nzela, talelá etánda “ Quelques points à discuter en famille ” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1982, lokasa 25 (ebimeli ya Lifalansé).

20 mn : “Tólakisa búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.” Lendisá basakoli na mɔ́tɔ nyonso ete bálakisa búku ya sika, mingimingi epai na bato oyo bamonisaki bosepeli kala. Talelá makanisi oyo mapesami mpe bongisá elakiseli moko to bilakiseli mibale.

Loyembo 148 mpe libɔndeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 10 Yúni

Loyembo 63

7 mn : Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti.

18 mn : “Nyonso ezali kotambola malamu na elimo!” Ekosalema na mituna mpe biyano. Sɛngá na basakoli mibale to misato, kati na bango moko azala monzenga (adolescent) ete bálobela matomba oyo bazwaka. Sukisá na komonisáká ete botɔ́ndi monene epusaka na kosangana na molende na mosala ya bulɛɛ.

20 mn : “‘Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe’​—Liyangani ya etúká 1996.” Botaleli na mituna mpe biyano ya paragrafe 1 kino paragrafe 16. Tángá baparagrafe 10, 11, 15.

Loyembo 193 mpe libɔndeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 17 Yúni

Loyembo 126

10 mn : Mayebisi. Kundolá bibongiseli oyo bikamatami mpo na mosala ya kosakola na wikende. Lendisá mokomoko ete alakisa bazulunalo na mokolo ya pɔ́sɔ.

15 mn : “Tózongela bato oyo bamonisaki bosepeli.” Talelá mitindo oyo mipesami mpe lɛngɛlá elakiseli moko to bilakiseli mibale ya mokuse. Lendisá mokomoko ete asala bozongeli ya sika na kozaláká na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia na lisalisi ya búku Boyebi.

20 mn : “‘Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe’​—Liyangani ya etúká 1996.” Botaleli na mituna mpe biyano ya paragrafe 17 kino paragrafe 22. Tángá baparagrafe 20 mpe 21. Talelá  “Makambo ya ntina.”

Loyembo 28 mpe libɔndeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 24 Yúni

Loyembo 121

5 mn : Mayebisi.

15 mn : “Tózala bato oyo balendisaka baninga.” Lisoló elongo na bayangani. Soki ntango epesi nzela, lobelá mwa makambo mosusu matali bamposa ya lisangá na bino.

10 mn : Biyano na mituna na bino. Botángi mpe lisoló elongo na bayangani.

15 mn : “Tozali na mosala mingi koleka?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Soki ntango epesi nzela, kɔtisá makanisi mazwami na Lamuká! ya 8 Yúni 1990, nkasa 14 kino 16 (ebimeli ya Lifalansé). Mosakoli moko to basakoli mibale bakolobela na mokuse eloko nini bango basalaki mpo na kozala na bokatikati atako bazali na mikumba mingi ya Teokrasi.

Loyembo 155 mpe libɔndeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto