Likanisi
Ɔkɔtɔ́bɛ ezali mbala ya nsambo oyo buku Boyebi etyami mpo na lipesi ya sanza. Atako tozali na ntina malamu ya kobenda likebi na esaleli malamu oyo ya boyekoli ya Biblia, kobosana te ete mikanda mosusu ya la Société ezali na makambo mingi oyo malobelami bobele na mokuse na buku Boyebi. Okoki kokolisa mosala na yo ya kosakola na komesanáká na mikanda nyonso oyo lisangá na bino ezali na yango mpe kosɛnga na bayekoli ya Biblia mpe na bato mosusu oyo bazali komonisa bosepeli na lisolo moko ete bázala na yango.