Bankulutu bazali kotambwisa lisangá—Mikumba ya mokɛngɛli na mosala ya kosakola
1 Mokɛngɛli na mosala ya kosakola atalelaka mpenzampenza makambo nyonso oyo mazali na boyokani na bokoli ya mosala ya kosakola na teritware ya lisangá. Na yango, azali na mosala monene ya kosalisa biso ete tókokisa mokumba na biso ya kosakola nsango malamu. Lokola azali mopalanganisi ya molende ya nsango malamu, atambwisaka makita nyonso ya mosala ya kosakola. Lokola azali moteyi ya makoki, asalisaka mosakoli mokomoko ete akolisa makoki na ye na mosala ya kosakola.—Ef. 4:11, 12.
2 Nkulutu yango atalelaka mosala ya basaleli na misala oyo bazali na mokumba ya kotɛkisa mikanda, bazulunalo mpe kokabola bateritware na lisangá. Azali na mokumba ya kosala ete mikanda, bazulunalo mpe baformilɛrɛ ezala mingi sanza na sanza mpo na kosalela. Mbala moko na mbula, atalelaka kalati ya teritware mpo na koyeba baadrɛsi ya bandako nyonso oyo likebisi epesamaki ete esakolama te mpe asɛngaka na bandeko ya makoki ete básakola na bandako yango.
3 Mokɛngɛli na mosala ya kosakola azali na mokumba ya kobongisa mosala ya kosakola oyo esengeli kosalema na babalabala nyonso ya teritware, bakisa mpe na bisika ya mombongo, na banzela mpe na telefone. Ayebi kozwa bibongiseli ya malamu mpo na kotambwisa likita ya mosala ya kosakola na boumeli ya pɔsɔ, bakisa mpe na mikolo oyo bato bakendeke mosala te. Atalelaka malamu mpenza mosala ya kotambwisa boyekoli ya Biblia. Alukaka myango ya kopesa lisalisi epai na baoyo bazali kosakola lisusu sanza na sanza te to oyo batiki kosakola. Amibanzabanzaka mingi na mosala ya babongisi-nzela, mpe akɛngɛlaka ebongiseli ebéngami Babongisi-nzela bazali kosalisa basakoli mosusu.
4 Lokola azali mosangani ya komite ya lisangá, mokɛngɛli na mosala apesaka makanisi mpo na mbongwana oyo esengeli na bituluku ya boyekoli ya mokanda. Ntango ayei kotala etuluku na bino, salá molende ya kozala wana mpe kosangana na ye na mosala ya kosakola.
5 Biso nyonso kati na lisangá tosengeli kondima na motema moko litambwisi ya mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Yango ekosalisa biso ete tókolisa makoki na biso na mosala ya kozalisa bayekoli mpe tózwa esengo monene na mosala na biso ya kosakola.