Bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda ya lisangá bamibanzabanzaka mpo na moto mokomoko
1 Boyekoli ya mokanda ya lisangá esalemi mpo “likebi monene ekoka kotyama na bokoli ya elimo ya mosangani moko na moko. . . . Ezali elembo ya motema boboto ya Yehova mpe komibanzabanza oyo azali na yango epai ya libota na ye.” (om lok. 76; Yis. 40:11) Mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda azali na mokumba monene ya kotya likebi ya ndenge wana likoló ya moto moko na moko.
2 Na boyekoli ya mokanda: Lokola basalaka ete bituluku ya boyekoli ya mokanda ezala na bato mingi te, epesaka mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda likoki ayeba malamu bato ya etuluku na ye. (Mas. 27:23) Mbala mingi, mabaku emonanaka mpo asolola na bandeko mosusu liboso mpe nsima ya boyekoli. Na kati ya sanza moko, akokoka ntango mosusu kosolola na moto nyonso ya etuluku. Yango esalisaka basangani ya etuluku bábanga te kopusana pene na ye ntango bazali kokutana na mikakatano to ntango bazali na mposa ya kolendisama.—Yis. 32:2.
3 Mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda akolendisa bato nyonso ya etuluku bápesa biyano na ntango ya boyekoli. Akosala yango soki azali kotambwisa boyekoli na boboto mpe na bopɔlɔ. (1 Tes. 2:7, 8) Akosala makasi mpo moto nyonso aloba na boyekoli, ezala ata bana mike. Soki bandeko mosusu bayokaka mwa nsɔni mpo na kopesa biyano, akoki kosalisa bango na nkuku liboso ya makita mpo bátánga mokapo moko to bápesa eyano na paragrafe moko. To akoki kolakisa bango ndenge nini bakoki kopesa biyano na maloba na bango moko.
4 Soki mosungi ya mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda azali mosaleli na misala, mokɛngɛli akobongisa mpo ete ndeko yango atambwisaka boyekoli nsima ya sanza mibale. Yango ekopesa mokɛngɛli nzela ete atala ndenge oyo mosungi azali kokola mpe apesa ye toli oyo ekosalisa ye. Oyo nde ebongiseli malamu mpenza mpo na kosalisa bandeko mibali bákolisa mayele na bango ya koteya!—Tito 1:9.
5 Na mosala ya kosakola: Moko ya mikumba ya minene ya mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda ezali ya kotambwisa mosala ya kosakola. (Mit. 27:16, 17) Akosala bibongiseli ya malamu na etuluku mpo bábima na mosala ya kosakola, mpe akosala makasi mpo bato nyonso na etuluku básepela na mosala na bango ya kosakola. (Ef. 4:11, 12) Mpo na kosala bongo, akozala na mokano ya kobima na mosala ya kosakola elongo na mosangani mokomoko ya etuluku. Akosala mpe elongo na mokɛngɛli ya mosala ya kosakola mpo na kozwa bibongiseli mpo na baoyo balingi kobongisa motindo moko ya mosala na bango ya kosakola ete bázwa lisalisi epai ya mosakoli oyo ayebi mosala yango malamu.
6 Lokola mobateli ya mpate ya bolingo: Mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda akotya likebi na bandeko oyo bakoki kaka kosala ngonga moke na mosala ya kosakola mpo na maladi to mikakatano mosusu. Akotalela mpenza ete bato oyo bakoki kosala mingi te mpo bazali mpenza mibange to bafandá na ndako mpo na maladi mpe bato oyo bazali na maladi to na mpasi na nzoto mpo na ntango moke, báyeba ebongiseli oyo epesi bango nzela ya kopesa ata miniti 15 na mosala ya kosakola, soki bakoki te kopesa lapolo ya ngonga mobimba na sanza. (Komite ya mosala ya lisangá nde ekondima bandeko nini babongi kosalela ebongiseli yango.) Akotya mpe likebi na bato ya etuluku oyo batiká kosakola, bongo akosala makasi mpo na kosalisa bango bázongela mosala na bango na kati ya lisangá.—Luka 15:4-7.
7 Tozali mpenza na botɔndi mingi mpo na likebi ya bolingo oyo bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda bazali komonisa! Likebi oyo bazali kotyela moto mokomoko ezali kosalisa “nyonso bákóma na bomoko na kati ya kondima . . . , na mezire ya molai oyo ezali ya litondi ya Klisto.”—Ef. 4:13.