Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/99 lok. 5
  • Bozongeli na eteyelo ya mosala ya teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na eteyelo ya mosala ya teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 12/99 lok. 5

Bozongeli na eteyelo ya mosala ya teokrasi

Bozongeli wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 6 Sɛtɛmbɛ kino pɔsɔ ya 20 Desɛmbɛ 1999. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia. Mitinda mipesami nsima ya motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:

1. Yehova apesaki nzela ete bato bámiyangela bango moko mpo na komonisa ete boyangeli na Ye nde eleki na malamu mpe na bosembo. (Det. 32:4; Yobo 34:10-12; Yil. 10:23) [w97 15/2 lok. 5 par. 3]

2. Biblia emonisi ete Nzambe apekisi komilelalela nyonso. [w97 1/12 lok. 30 par. 3-4]

3. Baboti bakobatela boyokani ya malamu na bana na bango oyo babali soki bakoyeba ete lokola bana na bango babali balongwe epai na bango mpe esengeli ete makambo esalemaka na mobulu te. (Gen. 2:24; 1 Kol. 11:3; 14:33, 40) [fy lok. 164 par. 6]

4. Malako 6:31-34 emonisi ete Yesu ayokelaki ebele na bato mawa bobele mpo bazalaki na maladi mpe bazalaki babola. [w97 15/12 lok. 29 par. 1]

5. Soki moklisto moko oyo azali mopakolami te azali na likoki ya koyangana na Ekaniseli ya liwa ya Yesu te, asengeli kosala yango nsima ya sanza moko na boyokani na mobeko oyo ezali na Mituya 9:10, 11. (Yoa. 10:16) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w93 1/2 lok. 31 par. 9.]

6. Atako bankɔkɔ oyo bazali baklisto bazwaka te esika ya bana na bango na oyo etali kokokisa mikumba ya tata mpe ya mama mpo na koteya bankɔkɔ na bango solo ya Biblia, bakoki kopesa lisungi mpo na bokoli ya mwana na elimo. (Det. 6:7; 2 Tim. 1:5; 3:14, 15) [fy lok. 168 par. 15]

7. Masese 6:30 emonisi ete na bantango mosusu, soki moto ayibi ezali mabe te [g97-F 8/11 lok. 19 par. 2]

8. Na 1530, William Tyndale azalaki moto ya liboso oyo asalelaki nkombo ya Nzambe, Yehova, na libongoli ya Makomami ya Liebele na Lingelesi. [w97 15/9 lok. 28 par. 3]

9. Lelo oyo, mboka ya kobombama ya solo ezali ebongiseli oyo Nzambe asali mpo na kobatela biso na liwa mpo tobukaki mobeko na ye na ntina etali ezalela ya bulɛɛ ya makila. (Mit. 35:11) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/11 lok. 17 par. 8.]

10. Nkombo Deteronome, elimboli “Mibeko ya Mibale,” yango ebongolami malamu mpenza mpamba te mokanda yango ya Biblia ezali bobele kozongelama ya Mibeko. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá si-LI lok. 36 par. 4.]

Yanolá na mituna milandi:

11. Mampa mibale ya mfulu oyo nganga monene azalaki kobonzela Nzambe na boumeli ya Elambo ya Pantekote ezalaki elilingi ya nini? (Lev. 23:15-17) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w98 1/3 lok. 13 par. 21.]

12. Ntango nini Yubile ya boklisto ebandaki, mpe bonsomi nini yango ememaki na ntango wana? (Lev. 25:10) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/5 lok. 24 par. 14.]

13. Engebene lisolo oyo ezwami na mokanda ya Mituya, wapi makambo misato tosengeli kokokisa mpo na kobika? [si-LI lok. 30 par. 1]

14. Lolenge nini Mose azalaki ndakisa malamu mpo na oyo etali koboya koyokela baninga zuwa? (Mit. 11:29) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/9 lok. 18 par. 11.]

15. Ndenge nini ndakisa ya Kola, Datana, mpe Abilama emonisi ete ata moto amoni likambo moko na miso, yango te nde ekopesa ye kondima? [w97 15/3 lok. 4 par. 2]

16. Wapi lolenge mibale ya kokumisa baboti na biso oyo bakómi mibange emonisami na Matai 15:3-6 mpe 1 Timote 5:4? [fy nk. 173-175 par. 2-5]

17. Liteya nini ya ntina emonisami na Mituya 26:64, 65? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá g95-F 8/8 nk. 10-11 par. 5-8.]

18. Lolenge nini ndakisa ya Pinehase ezali kosalisa biso na koyeba ndimbola ya komipesa epai na Yehova? (Mit. 25:11) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 1/3 lok. 16 par. 12-13.]

19. Ndenge nini moto oyo azali na mboka ya kobombama ya solo akoki ‘kobima libanda’ ya lopango na yango? (Mit. 35:26) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/11 lok. 20 par. 20.]

20. Ndenge nini Codex Sinaïticus ezalaki lipamboli mpo na libongoli ya Biblia? [w97 15/10 lok. 11 par. 2]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:

21. Yehova apesaki nzela na mabe mpo na komonisa mbala moko mpo na libela bosolo ya likambo oyo ete bobele ye moko nde azali ․․․․․․․․ mpe ete ․․․․․․․․ mibeko na ye ezali likambo ya ntina mpo na kimya mpe esengo ya bikelamu na ye nyonso. (Nz. 1:1-3; Mas. 3:5, 6; Mos. 8:9) [w97 15/2 lok. 5 par. 4]

22. Mokanda ya Levitike ezali kolobela mingi ․․․․․․․․ ya makila, emonisi ete makila ekoki kosalelama bobele lokola ․․․․․․․․. [si-LI lok. 29 par. 33]

23. Na boyokani na Nzembo 144:15b, bolamu ya solosolo ezali ezalela ya motema, oyo etongami likoló na ․․․․․․․․ ya solosolo mpe na ․․․․․․․․ malamu elongo na Yehova. [w97 15/3 lok. 23 par. 7]

24. ․․․․․․․․ ezali Biblia ya Liebele oyo babongolaki na Greke ya pɛtɛɛ, mpe bobongoli yango esilaki na mobu 150 L.T.B.; ․․․․․․․․, ezali Biblia oyo Jérôme abongolaki na Latin, mosala yango esilaki soko na mobu 400 T.B. [w97 15/8 lok. 9 par. 1; lok. 10 par. 4]

25. Ntango alobelaki lisolo ya Balama mpe ya Kola oyo ezali na mokanda ya Mituya, Yuda akebisaki baklisto ete bákima mitambo ya ․․․․․․․․ mpe ․․․․․․․․. [si-LI lok. 35 par. 35]

Poná biyano ya malamu kati na maloba oyo malandi:

26. Mbala moko na mbula, na ebongiseli oyo ebéngamaki (Elambo ya Mingombo; Mokolo ya Mbɔndi; Pasika), libota mobimba ya Yisalaele, elongo na bapaya oyo bazalaki kofanda kati na bango, oyo bazalaki kosambela Yehova, basengelaki (kotika misala nyonso; kopesa ndambo ya zomi ya biloko na bango; kopesa likabo ya mbuma ya liboso) mpe kokila bilei. (Lev. 16:29-31) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w96 1/7 lok. 10 par. 12.]

27. Moko ya mikano ya Komite ya Libongoli ya Mokili ya Sika ezali ya kobimisa libongoli moko oyo ezali (Kolanda makanisi ya lokota ya ebandeli na likebi mpenza; libongoli oyo ezali kolimbola elobeli ya Liebele mpe ya Greke; kozala na boyokani na liteya moko) mpo na kopesa batángi likoki ya kozala na mayoki lokola oyo mamonisamaki na nkota ya ebandeli mpe komiyokanisa na lolenge na yango ya kokanisa. [w97 15/10 lok. 11 par. 5]

28. Na kotalela Baebele 13:19, mabondeli mozindo ya baninga baklisto ekoki kobongola (likambo oyo Nzambe apesi nzela; ntango oyo Nzambe alingaki kosala likambo moko; lolenge oyo Nzambe abongisaka makambo mosusu). [w97 15/4 lok. 6 par. 1]

29. “Nkamba na mpili na ndelo na nsuka” ya bilamba ya Bayisalaele ezalaki lokola elembo ya (kokembisama ya bosantu; bopɔlɔ; bokabwani ya libota ya Yehova na mabota mosusu). (Mit. 15:38, 39) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w84-F 15/1 lok. 20 par. 16.]

30. Lisolo ya Deteronome ekomamaki na boumeli ya (sanza mibale; mbula moko; mbula mibale), mpe esilaki kokomama na ebandeli ya mobu (1513; 1473; 1467) L.T.B. [si-LI lok. 36 par. 6]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:

Mit. 16:41, 49; Mat. 19:9; Luka 2:36-38; Kols. 2:8; 3:14

31. Kozala na bomoi ya koboya bisengo nyonso ekómisaka moto mosantu te to epesaka ye engengiseli te. [g97-F 8/10 lok. 21 par. 3]

32. Pite ezali ntina bobele moko endimami na Makomami mpo na koboma libala mpe kozala na likoki ya kobala lisusu. [fy lok. 159 par. 15]

33. Komipesa na mosala ya Teokrasi, ata soki moto akómi mobange, ekoki kosalisa ye alonga mpasi ya liwa ya mobalani na ye. [fy nk. 170-171 par. 21]

34. Kotyola lolenge oyo Yehova asembolaka makambo na nzela ya basaleli na ye oyo aponi ekoki kobimisa mpasi monene. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w96 15/6 lok. 21 par. 13.]

35. Bolingo ya solosolo esangisaka mobali mpe mwasi esika moko mpe epusaka bango ete básalanaka malamu moko epai ya mosusu mpe epai ya bana na bango. [fy lok. 187 par. 11]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto