Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 14 Yanuali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe Lamuká! ya Yanuali.
Min. 15: “Salelá ntango malamu na mosala ya kosakola.”a Sololá na ndeko mobali moko oyo ayebani ete atambwisaka malamu likita mpo na mosala ya kosakola. Asalaka nini mpo likita mpo na mosala ya kosakola esalema malamu mpe azwa bandeko ntango mingi te mpe básalela malamu ntango oyo babongisi mpo na kosakola?
Min. 20: “Tiká liloba na bino ezala ntango nyonso . . . elɛngi na mungwa.”b Ntango bokotalela paragrafe 2, bótánga Yoane 4:7-15, 39.
Pɔsɔ ebandi na 21 Yanuali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Febwali, mpe salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa yango. Lendisá bayangani nyonso bátala video oyo elobi Soigner sans transfuser—Besoins et droits du patient, mpo na kobongisa lisolo oyo ekosalema na Likita ya mosala na pɔsɔ ya 4 Febwali.
Min. 10: Osalelaka mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekouta na maloba ya ebandeli ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2008. Monisá ntina oyo tosengeli kozwaka ntango mokolo na mokolo mpo na kotalela mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango. Sɛngá bayangani bálobela programɛ na bango ya kotalela mokapo ya mokolo mpe matomba oyo bazwaka. Okoki kobongisa liboso elongo na ndeko moko to mibale mpo báyanola na motuna yango. Lobelá na mokuse mokapo ya mobu 2008.
Min. 25: “Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.”c (Par. 1-10) Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Sololá na mosakoli moko to mibale oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na mbula oyo eleki, atako bazalaka na makambo mingi ya kosala to na mikakatano ya nzoto. Nini esalisaki bango básala mosala yango? Matomba nini bazwaki? Ntango bokotalela paragrafe 7, lobelá makita mpo na mosala ya kosakola oyo bobongisi mpo na sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai.
Pɔsɔ ebandi na 28 Yanuali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yanuali. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali mpe Lamuká! ya Febwali. Nsima ya kolobela na mokuse makambo oyo bazulunalo yango elobeli, sɛngá bayangani bálobela masolo nini bakanisi ete ekosepelisa bato ya teritware na bino mpe mpo na nini. Sɛngá bango bálobela mwa makanisi oyo ezali na masolo oyo bazali kokana kosalela na mosala ya kosakola. Mituna nini bakoki kotuna moto mpo na kobanda kosolola na ye? Vɛrsɛ nini ya lisolo yango bakoki kotángela moto? Ndenge nini bakoki koyokanisa vɛrsɛ yango na lisolo yango? Salelá maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa na lokasa 8, mpo na komonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo yango.
Min. 20: “Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.”d (Par. 11-17) Ntango bokotalela paragrafe 14, bópesa bayangani nyonso nkasa ya libyangi na Ekaniseli, soki ezali. Yebisá bibongiseli oyo ezwami mpo na kokabola yango na teritware na bino mobimba.
Min. 15: “Salisá bayekoli ya Biblia bákóma basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi.”e Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.
Pɔsɔ ebandi na 4 Febwali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Biyano na mituna na bino.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 25: “Ozali kozela nini mpo na kotondisa yango?” Ekosalema na nkulutu moko. Salelá mituna oyo ezali na lisolo yango mpo na kobanda mbala moko lisolo elongo na bayangani na video oyo elobi Soigner sans transfuser—Besoins et droits du patient. Mpo na kosukisa, tángá paragrafe ya nsuka mpe lendisá bayangani nyonso bátalela malamumalamu masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo bamonisi wana. Limbolá ndenge oyo ndeko mokomoko oyo atondisi naino kalati yango te akoki kosalela makanisi oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2006, mpo na kozwa ekateli ye moko mpe komonisa soki akondima ete básalisa ye na biloko mikemike oyo ezalaka na kati ya makila mpe mayele nini akondima ete minganga básalela mpo na kosalisa ye. Sɛngá mokomoko na bango akoma bikateli na ye na kalati DPA. Baoyo basilá kotondisa kalati yango bakoki kotalela yango lisusu mpe kotondisa mosusu ya sika, soki esengeli.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.