Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/08 lok. 3
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Bolamu bozali kozwama na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Yehova azali kopesa biso formasyo mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Mpo na nini komonisa botɔndi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 5/08 lok. 3

Biyano na mituna na bino

◼ Ebongi ete bayangani bábɛtaka mabɔkɔ nsima ya lisolo mokomoko ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya Mosala?

Ntango Yehova akelaki mabelé, “minzoto ya ntɔngɔntɔngɔ eyembaki elongo moko mpe bana nyonso ya Nzambe bagangaki na esengo.” (Yobo 38:⁠7) Bana ya Nzambe, elingi koloba baanzelu, bayokaki mposa ya kokumisa Yehova mpo na mosala monene oyo asalaki, oyo ezalaki lolenge ya sika ya komonisa bwanya na ye, malamu na ye, mpe nguya na ye.

Ezali malamu ete tómonisaka na motema mobimba ete tosepeli na milende oyo bandeko na biso basalaki mpo na kobongisa mpe kosala masolo na bango. Na ndakisa, biso nyonso tobɛtaka mabɔkɔ nsima ya koyoka masukulu to bilakiseli oyo esalemaka na mayangani ya minene mpe ya mike. Esɛngaka ntango mpe milende mingi mpo na kobongisa masolo wana. Ntango tobɛtaka mabɔkɔ, tomonisaka ete tozali na botɔndi mpo na mosala monene oyo molobi asali mpe mpo na mateya oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya Liloba na ye mpe ebongiseli na ye.​—⁠Yis. 48:17; Mat. 24:​45-47.

Kasi, ebongi tóbɛtaka mpe mabɔkɔ nsima ya lisolo mokomoko ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe ya Likita ya Mosala? Mobeko moko te epekisi kobɛta mabɔkɔ soki tosali yango kozanga ete bátinda biso, na ndakisa ntango mwana-kelasi moko asali lisolo na ye ya liboso na eteyelo. Nzokande, ntango mosusu tokoki kobanda kobɛta mabɔkɔ kaka tiká tóbɛta mpe yango ekozala lisusu na ntina te. Yango wana, tobɛtaka mabɔkɔ te nsima ya lisolo mokomoko.

Atako tobɛtaka mabɔkɔ te na masolo mingi ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe ya Likita ya Mosala, ezali na ndenge mingi oyo biso nyonso tokoki komonisa ete tosepeli na mateya oyo epesami mpe na milende oyo bandeko yango basali. Tokoki komonisa ete tosepeli soki tozali kolanda molobi na likebi mpenza. Lisusu, nsima ya makita, mbala mingi tozalaka na likoki ya koyebisa ndeko oyo asalaki lisolo ete tosepeli na milende oyo asalaki.​—⁠Ef. 1:​15, 16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto