Manaka mpo na Pɔsɔ ya 16 Marsi
PƆSƆ EBANDI NA 16 MARSI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Genese 43-46
No. 1: Genese 44:1-17
No. 2: Yesu azali na nguya koleka bademo (lr mok. 10)
No. 3: Ebongi mpenza kotyela bisakweli ya Biblia motema (rs-F lok. 175 par. 3–lok. 176 par. 3)
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Yehova ayebani na nkombo na ye. Lisukulu ya kolendisa ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 274, paragrafe 2-5.
Min. 10: Salelá malamu Annuaire. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Bótalela “Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.” Bongisá liboso mpo basakoli báyebisa na mokuse makambo oyo batángaki na Annuaire 2008, oyo elendisaki bango. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bamoni na lapolo ya mokili mobimba na Annuaire 2008. Mpo na kosukisa, lendisá bandeko nyonso bátánga Annuaire 2009 mobimba ntango bakozwa yango.
Min. 10: “Ndenge ya kosalela buku ‘Bolingo ya Nzambe’ mpo na koyekola na bato Biblia.” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.