Manaka mpo na pɔsɔ ya 15 Febwali
PƆSƆ EBANDI NA 15 FEBWALI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Basambisi 15-18
No. 1: Basambisi 16:1-12
No. 2: ‘Gehena ya mɔtɔ’ oyo Yesu alobelaki ezali nini? (rs lok. 127 par. 1-lok. 128 par. 1)
No. 3: Mpo na nini Yesu abengaki Zabolo “tata ya lokuta” (Yoa. 8:44)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 15: Tómibongisa mpo na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na kati ya bazulunalo yango mpe yebisá masolo oyo ekosepelisa mpenza bato ya teritware na bino. Sɛngá mosakoli moko asala elakiseli oyo ekomonisa ye azali kolobaloba ye moko ntango azali komibongisa mpo na kolakisa bazulunalo. Aponi masolo oyo akanisi ete ekosepelisa bato ya teritware, abongisi motuna oyo akotuna bato, mpe aponi mwa bavɛrsɛ oyo akotánga. Na nsima, abandi komekameka ndenge oyo akosala mpo na kolakisa zulunalo mokomoko.
Min. 15: “Yaká, landá ngai.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Nsima ya kotalela lisolo yango, lobelá makambo oyo ezali na buku Eteyelo ya mosala, na lokasa 70 mpo na kokundwela bandeko ntina ya kopesa biyano na makita.