Mosala oyo eleki ntina
1. Makambo nini tondimaka kosala mpo tolingaka mosala ya kosakola?
1 Mpo na nini tolendisamaka mbala na mbala ete tósalela ntango na biso, makasi na biso mpe biloko na biso mpo na mosala ya kosakola? Mpamba te yango nde mosala oyo eleki ntina! Kokanisa matomba na yango oyo ekoumela seko ekobakisa mposa na biso ya kosangana na mosala yango oyo ekozongelama lisusu te.—Mis. 20:24.
2. Ndenge nini mosala na biso ya kosakola esalisaka na kosantisa nkombo monene ya Yehova?
2 Esantisaka nkombo ya Yehova: Na mosala ya kosakola, tomonisaka polele ete Bokonzi ya Yehova, oyo epesami na mabɔkɔ ya Kristo Yesu, nde ekozwa esika ya baguvɛrnema nyonso ya mokili mpe ekosilisa mikakatano nyonso ya bato. (Mat. 6:9, 10) Na mosala yango, tomonisaka ete kaka Yehova nde akolongola maladi mpe liwa. (Yis. 25:8; 33:24) Lokola tomemi nkombo na ye, bato mosusu oyo batalaka etamboli na biso ya malamu mpe molende na biso bakoki kokumisa ye. (1 Pe. 2:12) Ezali mpenza esengo mpo na biso koyebisa na mokili mobimba nkombo ya Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso!—Nz. 83:18.
3. Baoyo bazali kondima nsango ya Bokonzi bazali kozwa mapamboli nini?
3 Ezali kobikisa bato: Yehova “alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Pe. 3:9) Kasi, soki moto ateyi bango te, ndenge nini bakoyeba oyo ezali malamu to mabe na miso ya Yehova? (Yona 4:11; Rom. 10:13-15) Ntango bato bandimi nsango malamu, bomoi na bango ekómaka malamu, mpo batikaka makambo oyo ezalaki kobebisa bango. (Mik. 4:1-4) Lisusu, bakómaka na elikya malamu ya bomoi ya seko. Soki tozali kosakola mpe koteya na molende, tokomibikisa mpe tokobikisa baoyo bazali koyoka biso. (1 Tim. 4:16) Mosala yango ya ntina mingi ezali mpenza kopesa biso lokumu monene!
4. Mpo na nini tosengeli komipesa mpenza na mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli?
4 Mosika te, bolɔzi monene ekoya na mbalakaka mpe ekosukisa mokili oyo mabe. Baoyo bazali komitya na ngámbo ya Yehova bakobika. Na yango, kosakola mpe kokómisa bato bayekoli ezali mosala oyo esengeli kosalema na lombangu koleka, mosala oyo eleki ntina mpe oyo eleki na matomba. Tótya yango na esika ya liboso na bomoi na biso!—Mat. 6:33.