Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Mars nk. 14-19
  • Mekolá molende ya Yesu mpo na mosala ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mekolá molende ya Yesu mpo na mosala ya kosakola
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ATYAKI MAKANISI NA KOSALA MOKANO YA YEHOVA
  • ATYAKI LIKEBI NA BISAKWELI YA BIBLIA
  • ATYAKI MOTEMA ETE YEHOVA AKOSALISA YE
  • ABATELAKI ELIKYA ETE BATO BAKOYOKA
  • Ndenge ya kozwa esengo mingi na mosala ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Tiká bolingo etinda yo okoba kosakola!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na momonisi ya Betele
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Mars nk. 14-19

LISOLO YA BOYEKOLI 11

LOYEMBO 57 Tósakwela bato ya ndenge nyonso

Mekolá molende ya Yesu mpo na mosala ya kosakola

“Nkolo . . . atindaki bango mibalemibale liboso na ye na engumba nyonso mpe na esika nyonso epai ye moko asengelaki kokende na nsima.”—LUKA 10:1.

NA MOKUSE

Tokolobela makambo minei oyo okoki komekola epai ya Yesu na oyo etali kozala na molende na mosala ya kosakola.

1. Nini ekesenisaka basaleli ya Yehova na bakristo ya nkombo mpamba?

MOKO ya makambo oyo ekesenisaka basaleli ya Yehova na bakristo ya nkombo mpamba ezali molendea na bango mpo na mosala ya kosakola. (Tito 2:14) Kasi na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi osepela na mosala ya kosakola. Mbala mosusu omiyokaka lokola nkulutu moko oyo azali makasi na mosala, kasi alobaki: “Na bantango mosusu, nazalaka na mposa ya kosakola te.”

2. Na bantango mosusu, nini esalaka ete ezala mpasi tóbatela molende na biso na mosala ya kosakola?

2 Tokoki kolinga mingi kosala makambo mosusu na mosala ya Nzambe koleka kobima na mosala ya kosakola. Mpo na nini? Mbala mosusu mpo ntango topesi mabɔkɔ na mosala ya kotonga mpe kobatela bandako ya losambo, tosalisi bandeko oyo bazwi likama to tolendisi basusu, tomonaka mbuma malamu na yango mbala moko mpe tomiyokaka malamu. Tosepelaka na kimya mpe bolingo oyo tomonaka ntango tozali kosala elongo na bandeko na biso, mpe toyebaka ete basepelaka na oyo tosali mpo na bango. Nzokande, ekoki kozala ete esali bambula mingi tosakolaka kaka na teritware na biso mpe bato moke kaka nde bayoki nsango ya Biblia. Mbala mosusu tozali kokutana na bato oyo baboyi koyoka nsango na biso. Toyebi mpe ete lokola nsuka ezali se kokóma pene, bato mingi lisusu bakoboya nsango na biso. (Mat. 10:22) Nini ekoki kosalisa biso tóbatela to ata tóbakisa molende na biso mpo na mosala ya kosakola?

3. Ndenge nini Luka 13:​6-9 emonisi molende oyo Yesu azalaki na yango?

3 Tokoki kozwa liteya na oyo etali kozala na molende na mosala ya kosakola soki totaleli ndakisa ya Yesu. Na boumeli ya mosala na ye, abatelaki molende na ye. Kutu, wana ntango ezalaki koleka, abakisaki lisusu molende na mosala na ye. (Tángá Luka 13:​6-9.) Ndenge moko na mosali-bilanga ya vinyo oyo alekisaki mbula misato na koluka kobongisa nzete ya figi oyo ezalaki kobota mbuma te, Yesu alekisaki mbula soki misato na kosakwela Bayuda, oyo mingi bandimaki nsango na ye te. Kasi, kaka ndenge mosali-bilanga ya vinyo aboyaki kokata nzete ya figi, Yesu alɛmbaki bato te, akitisaki mpe molende na ye na mosala ya kosakola te. Kutu, asalaki lisusu makasi mpo na kosimba mitema na bango.

4. Tokotalela makambo nini minei oyo tokoki koyekola na ndakisa ya Yesu?

4 Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo Yesu amonisaki molende, mingimingi na boumeli ya sanza motoba ya nsuka ya mosala na ye. (Talá nɔti ya boyekoli “Après cela” na Luka 10:​1, na Français.) Koyekola makambo oyo ateyaki mpe komekola makambo oyo asalaki ekosalisa biso tóbatela molende lelo oyo. Tótalela sikoyo makambo minei oyo tokoki koyekola na ndakisa ya Yesu: (1) Atyaki makanisi na kosala mokano ya Yehova, (2) atyaki likebi na bisakweli ya Biblia, (3) atyaki motema ete Yehova akosalisa ye, mpe (4) abatelaki elikya ete bato mosusu bakoyoka ye.

ATYAKI MAKANISI NA KOSALA MOKANO YA YEHOVA

5. Ndenge nini Yesu amonisaki ete atyaki makanisi na kosala mokano ya Nzambe?

5 Yesu asakolaki “nsango malamu ya Bokonzi” na molende mpo ayebaki ete yango nde mosala oyo Nzambe alingaki ye asala. (Luka 4:43) Yesu atyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na ye. Ata na nsuka ya mosala na ye, azalaki kokende “engumba na engumba mpe mboka na mboka,” koteya bato. (Luka 13:22) Apesaki mpe bayekoli mosusu mingi formasyo mpo básakola elongo na ye.—Luka 10:1.

6. Boyokani nini ezali kati na mosala ya kosakola mpe mikumba mosusu oyo tokoki kozala na yango? (Talá mpe elilingi.)

6 Lelo oyo mpe, kosakola nsango malamu nde mosala ya libosoliboso oyo Yehova ná Yesu balingi ete tósala. (Mat. 24:14; 28:​19, 20) Mosala ya kosakola ezali na boyokani ya penepene na mikumba mosusu nyonso na ebongiseli ya Yehova. Na ndakisa, kotonga Bandako ya Bokonzi to kosala na Betele esalisaka mpo na kokokisa mposa ya bato oyo tosakweli. Ntango tosungaka bandeko oyo bazwi likama, ezalaka kaka te mpo na kosalisa bango na mosuni, kasi mpe mpo na kosalisa bango bázongela mimeseno na bango ya elimo, kati na yango mosala ya kosakola. Soki tokangi ntina ya mosala ya kosakola mpe tozali kobosana te ete yango nde mosala ya libosoliboso oyo Yehova alingi tósala, tokozala na mposa makasi ya kosakola mbala na mbala. János, nkulutu moko na Hongrie, alobi boye: “Namikundwelaka ete mokumba moko te na ebongiseli ya Yehova ekoki kozwa esika ya mosala ya kosakola; yango nde mokumba na biso ya libosoliboso.”

Bililingi: 1. Ndeko mobali moko azali kosala na mosala ya botongi. 2. Ndeko mobali mosusu azali kosala mosala mpo na Betele na ndako na ye. 3. Na nsima, bandeko yango mibale babimi na mosala ya kosakola.

Lelo oyo, mosala ya kosakola nsango malamu nde mosala ya libosoliboso oyo Yehova ná Yesu balingi tósala (Talá paragrafe 6)


7. Mpo na nini Yehova alingi ete tókoba kosakola? (1 Timote 2:​3, 4)

7 Tokoki mpe kokóma na molende mingi na mosala ya kosakola soki tozali kotalela bato ndenge Yehova atalelaka bango. Alingi ete bato mingi báyoka nsango malamu mpe bándima yango. (Tángá 1 Timote 2:​3, 4.) Yango wana, apesaka biso formasyo mpo tózala bateyi malamu ya nsango oyo ebikisaka bato. Na ndakisa, mwa buku Lingá bato​—Kómisá bango bayekoli ezali na makanisi ya malamu oyo ekoki kosalisa biso tóbanda masolo na mokano ya kokómisa bato bayekoli. Ata soki bato babandi kosalela Yehova sikoyo te, bakoki kozwa libaku ya kosala yango liboso ya nsuka ya bolɔzi monene. Makambo oyo tozali koyebisa bango sikoyo ekoki kotinda bango bábanda kosalela Yehova na mikolo ezali koya. Kasi, ekoki kosalema bongo kaka soki tokobi kosakola.

ATYAKI LIKEBI NA BISAKWELI YA BIBLIA

8. Koyeba bisakweli ya Biblia etindaki Yesu asalela ntango na ye ndenge nini?

8 Yesu ayebaki ndenge oyo bisakweli ya Biblia ekokokisama. Ayebaki ete mosala na ye ekoumela kaka mbula misato ná ndambo. (Dan. 9:​26, 27) Ayebaki mpe bisakweli oyo elobelaki ntango mpe ndenge oyo akokufa. (Luka 18:​31-34) Lokola ayebaki bisakweli wana nyonso, Yesu asalelaki ntango na ye malamu. Na yango, asakolaki na molende mpo asilisa mosala oyo bapesaki ye.

9. Mpo na nini kokanga ntina ya bisakweli ya Biblia ekosalisa biso tósakola na molende?

9 Kokanga ntina ya bisakweli ya Biblia ekoki kotinda biso tósakola na molende. Toyebi ete mokili oyo etikali lisusu na ntango mingi te. Tondimaka ete makambo oyo ezali kosalema lelo mpe bizaleli ya bato eyokani na makambo oyo Biblia esakolaki mpo na mikolo ya nsuka. Tozali komona ndenge kowelana kati na bokonzi ya Anglo-Américain mpe Russie ná bikólo oyo epesaka yango mabɔkɔ ezali kokokisa esakweli oyo elobeli mokonzi ya sudi mpe mokonzi ya nɔrdi “na ntango ya nsuka.” (Dan. 11:40) Lisusu, tokangi ntina ete bokonzi ya Anglo-Américain emonisami na makaka (nse ya makolo) ya ekeko oyo Danyele 2:​43-45 elobeli. Tondimi ete kaka ndenge esakweli yango emonisi, etikali moke mpenza mpo Bokonzi ya Nzambe ebebisa baguvɛrnema ya bato. Bisakweli yango nyonso ezali komonisa ete nsuka ekómi mpenza pene mpe ezali kotinda biso tómipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola.

10. Na ndenge nini mosusu bisakweli ya Biblia ekoki kobakisa molende na biso?

10 Bisakweli ya Biblia ezali mpe na nsango malamu oyo tosepelaka koyebisa basusu. Carrie, ndeko mwasi moko na République Dominicaine alobi boye: “Bilaka ya kokitisa motema oyo Yehova apesi mpo na mikolo ezali koya etindaka ngai nasakwela basusu solo yango.” Abakisi boye: “Ntango namonaka makambo bato bazali kokutana na yango lelo oyo, namilobaka ete bilaka yango ezali kaka mpo na ngai moko te, kasi mpo na bango mpe.” Bisakweli ya Biblia elendisaka biso tótika te kosakola mpo emonisi ete Yehova asalisaka biso na mosala yango. Leila, oyo afandaka na Hongrie, alobi boye: “Yisaya 11:​6-9 etindaka ngai nayebisa bato nsango malamu, ata baoyo bazali komonana lokola bakondima yango te. Nayebi ete na lisalisi ya Yehova, moto nyonso akoki kobongwana.” Mpe Christopher, ndeko mobali moko na Zambie, alobi boye: “Kaka ndenge Marko 13:10 esakolaki, nsango malamu ezali kopalangana na mokili mobimba, mpe namonaka ete ezali lokumu monene kopesa mabɔkɔ na kokokisama ya esakweli yango.” Bongo yo, bisakweli nini etindaka yo okoba kosakola?

ATYAKI MOTEMA ETE YEHOVA AKOSALISA YE

11. Mpo na nini esengelaki Yesu atya motema ete Yehova akosalisa ye akoba kosakola na molende? (Luka 12:​49, 53)

11 Yesu atyaki motema ete Yehova akosalisa ye mpo akoba kosakola na molende. Atako Yesu azalaki koloba na bato na limemya, ayebaki ete nsango ya Bokonzi ekobimisa bokabwani mpe botɛmɛli makasi. (Tángá Luka 12:​49, 53.) Mpo na mosala ya kosakola oyo Yesu azalaki kosala, bakonzi ya mangomba balukaki mbala mingi koboma ye. (Yoa 8:59; 10:​31, 39) Kasi, akobaki kosakola mpo ayebaki ete Yehova azalaki elongo na ye. Alobaki: “Nazali ngai moko te, kasi Tata oyo atindaki ngai azali elongo na ngai. . . . Atiki ngai ngai moko te, mpo nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.”—Yoa 8:​16, 29.

12. Ndenge nini Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo bákoba kosakola ntango bakokutana na botɛmɛli?

12 Yesu akundwelaki bayekoli na ye ete bakokaki kotya motema ete Yehova akosalisa bango. Ayebisaki bango mbala na mbala ete Yehova akosalisa bango ata soki bakutani na minyoko. (Mat. 10:​18-20; Luka 12:​11, 12) Na yango, alendisaki bango bázala ekɛngɛ. (Mat. 10:16; Luka 10:3) Ayebisaki bango ete bátya bato mbamba te soki baboyi koyoka nsango na bango. (Luka 10:​10, 11) Ayebisaki bango mpe ete ntango bakonyokola bango, bákima na engumba mosusu. (Mat. 10:23) Atako Yesu azalaki na molende mpe atyelaki Yehova motema, azalaki kotya bomoi na ye na likama kaka mpamba te.—Yoa 11:​53, 54.

13. Mpo na nini okoki kondima ete Yehova akosalisa yo?

13 Tosengeli na lisalisi ya Yehova mpo tókoba kosakola na molende ntango tokutani na botɛmɛli lelo oyo. (Em. 12:17) Mpo na nini okoki kondima ete Yehova akosalisa yo? Tótalela libondeli ya Yesu oyo ezali na Yoane mokapo 17. Yesu asɛngaki Yehova akɛngɛla bantoma na ye mpe Yehova ayanolaki na libondeli yango. Mokanda ya Misala emonisi ndenge asalisaki bantoma básakola na molende atako minyoko. Na libondeli na ye, Yesu asɛngaki mpe Yehova akɛngɛla baoyo bakondimela nsango ya bantoma. Yo mpe ozali na kati ya bato yango. Tii lelo oyo, Yehova ayanolaka na libondeli ya Yesu; akosalisa yo ndenge kaka asalisaki bantoma.—Yoa. 17:​11, 15, 20.

14. Ndenge nini toyebi ete tokokoba kosakola na molende? (Talá mpe elilingi.)

14 Ata soki ekómi lisusu mpasi mingi kosakola nsango malamu na molende lokola nsuka ezali kokóma pene, tokozwa lisalisi nyonso oyo tosengeli na yango. (Luka 21:​12-15) Ndenge moko na Yesu ná bayekoli na ye, totikaka bato bázwa ekateli ya koyoka to te, mpe toboyaka kobendana na bango. Ata ntango batyeli mosala na biso bipekiseli, bandeko na biso bazwaka mayele mosusu ya kokoba kosakola nsango malamu mpo batyaka motema epai ya Yehova, kasi te na makasi na bango moko. Kaka ndenge Yehova apesaki basaleli na ye nguya na siɛklɛ ya liboso, lelo oyo mpe apesaka biso nguya mpo “mosala ya kosakola esalema malamumalamu” na ndenge oyo alingi. (2 Tim. 4:17) Yebá ete soki otyeli Yehova motema, akosalisa yo okoba kosakola na molende.

Ata ntango batyeli mosala na biso bipekiseli, basakoli ya molende balukaka mabaku ya kosakola na ekɛngɛ (Talá paragrafe 14)b


ABATELAKI ELIKYA ETE BATO BAKOYOKA

15. Nini emonisi ete Yesu abatelaki elikya mpo na mosala ya kosakola?

15 Yesu abatelaki elikya ete bato mosusu bakoyoka ye na mosala ya kosakola. Yango esalisaki ye akoba kosakola na esengo. Na ndakisa, na nsuka ya mobu 30 T.B., Yesu amonaki ete bato mingi bakokaki sikoyo kondima nsango na ye, mpe akokanisaki bango na elanga oyo eteli mpo na kobuka mbuma. (Yoa. 4:35) Soki mbula moko na nsima, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Mbuma ya kobuka ezali mingi.” (Mat. 9:​37, 38) Mpe na nsima, azongelaki lisusu: “Mbuma ya kobuka ezali mingi . . . Bóbondela Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Luka 10:2) Yesu abungisaki ata moke te elikya ete bato mosusu bakokaki kondima nsango malamu, mpe asepelaki ntango basalaki yango.—Luka 10:21.

16. Ndenge nini bandakisa ya Yesu emonisi ete abatelaki elikya mpo na mosala ya kosakola? (Luka 13:​18-21) (Talá mpe elilingi.)

16 Yesu ateyaki bayekoli na ye bábatela elikya mpo na nsango oyo bazali kosakola, mpe yango ekosalisa bango bábatela molende na bango. Tótalela bandakisa mibale oyo apesaki. (Tángá Luka 13:​18-21.) Na ndakisa ya mbuma ya mutarde, Yesu amonisaki ete nsango ya Bokonzi ekopalangana na ndenge ya kokamwa mpe eloko te ekopekisa bokoli yango. Na ndakisa ya levire, amonisaki ndenge nsango ya Bokonzi ekopalangana na mokili mobimba mpe ekotinda bato básala babongwana, ata soki ekomonana polele te na mbala moko. Na yango, Yesu asalisaki bayekoli na ye bámona ete nsango oyo bakosakola ekobota mpenza mbuma.

Bandeko basi mibale bazali kosakola pene ya bashario na esika ya bato nyonso. Bato mingi bazali koleka kozanga kotɛlɛma.

Lokola Yesu, tobatelaka elikya ete bato mosusu bakoki kondima nsango malamu (Talá paragrafe 16)


17. Mpo na nini tosengeli kobatela elikya mpo na mosala ya kosakola?

17 Tokokoba kosakola nsango malamu na molende nyonso soki tokanisi ndenge ezali kosalisa ebele ya bato na mokili mobimba lelo oyo. Mbula na mbula, bamilio ya bato oyo basepelaka na solo bayanganaka na Ekaniseli, mpe bazali koyekola Biblia elongo na biso. Bankóto ya bato bazali kozwa batisimo mpe bazali kosangana na biso na mosala ya kosakola. Toyebi te bato boni lisusu bakondima nsango na biso, kasi toyebi ete Yehova azali kosangisa ebele mpenza ya bato, oyo bakobika na bolɔzi monene oyo ezali koya. (Em. 7:​9, 14) Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma azali komona ete mbuma ya kobuka ezali naino na elanga, na yango tozali na ntina ya kokoba kosakola.

18. Tolingi ete basusu bámona nini epai na biso?

18 Banda kala, bayekoli ya Yesu bayebani lokola bato oyo bazalaka na molende na mosala ya kosakola. Na ndakisa, ntango bato bamonaki elobeli ya polele ya bantoma, “bayaki koyeba ete bazalaki elongo na Yesu.” (Mis. 4:13) Wana bato bazali kotala biso na mosala ya kosakola, tiká bámona ete biso mpe tomekoli molende oyo Yesu azalaki na yango.

NDENGE NINI TOKOKI KOBATELA MOLENDE NA BISO SOKI TOMEKOLI NDENGE YESU . . .

  • azalaki kotalela mosala ya kosakola?

  • atyelaki Yehova motema?

  • abatelaki elikya ete bato bakoyoka ye?

LOYEMBO 58 Tóluka baninga ya kimya

a NDIMBOLA YA MALOBA: Na lisolo oyo, liloba “molende” emonisi esengo mpe nsai makasi oyo bakristo bazalaka na yango na losambo ya Yehova.

b NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko azali kopesa litatoli na ekɛngɛ esika batɛkaka esansi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto