Manaka mpo na pɔsɔ ya 29 Marsi
PƆSƆ EBANDI NA 29 MARSI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
lv mok. 9 par. 22-26, etanda na lok. 109; apɛndisi na nk. 218-219
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 1 Samwele 14-15
No. 1: 1 Samwele 14:24-35
No. 2: Makambo oyo ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Yehova (Yak. 4:8)
No. 3: Bato ya mayele oyo monzoto etambwisaki tii esika Yesu azalaki bazalaki banani? (rs lok. 163 par. 1-3)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Ndenge ya kobanda koyekola na bato Biblia. Yebisá mokolo oyo bokoluka bato ya koyekola na bango Biblia na sanza ya Aprili. Sololá na mosakoli moko oyo abandaki mpe akobaki koyekola na bato Biblia. Maloba nini ya kobanda lisolo oyo ebotaki mbuma na teritware? Makambo nini abosanaka te ntango azongeli bato? Sɛngá ye asala elakiseli moko oyo ekomonisa maloba yango ya kobanda lisolo.
Min. 10: Pesá mabɔkɔ na mosala oyo eleki monene ya koluka kobikisa bato! Lisukulu ekouta na buku Tobongisami, na motó ya likambo moke “Koluka bato oyo babongi,” na lokasa 95.
Min. 10: “Yebá kosalisa ndeko oyo obimi na ye na mosala ya kosakola.” Ekosalema na mituna mpe biyano.