Manaka mpo na pɔsɔ ya 10 Mai
PƆSƆ EBANDI NA 10 MAI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
lv mok. 11 par. 20-22, etanda na lok. 131
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Samwele 4-8
No. 1: 2 Samwele 6:1-13
No. 2: Makambo nini toyebi na ntina na fɛti ya Saint-Valentin, fɛti ya bamama, mpe bafɛti oyo ekumisaka ekólo? (rs lok. 167 par. 4–lok. 168 par. 4)
No. 3: Mpo na nini lokoso ezali losambo ya bikeko? (Ef. 5:5)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Salisá mpenza bato ya teritware. Lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 188, paragrafe 4, tii na nsuka ya lokasa 189. Tuná mwa mituna epai ya ndeko moko oyo akolaki na elimo mpo bandeko batyelaki ye likebi mpe basalisaki ye.
Min. 10: Ndako ya Bokonzi oyo ezali pɛto ekumisaka Yehova. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko. Yehova azali Nzambe ya bosantu, yango wana, basaleli na ye basengeli kotya mpenza likebi ete nzoto mpe biloko na bango ezalaka pɛto. (Kob. 30:17-21; 40:30-32) Soki tozali kobatela esika na biso ya losambo malamu mpe pɛto, Yehova akozwa lokumu. (1 Pe. 2:12) Tuná ndeko moko oyo atalelaka programɛ ya kotya bopɛto mpe kobongisa Ndako ya Bokonzi alobela bibongiseli oyo ezwamá na lisangá. Lobelá makambo oyo esalemá epai na bino to ebimá na mikanda na biso, oyo emonisi ndenge oyo Ndako ya Bokonzi oyo ezali pɛto esalisaki mpo na kopesa litatoli na kartye. Lendisá bayangani nyonso mpo bápesaka mabɔkɔ na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi.
Min. 10: “Nsango malamu oyo ekosakolama!” Ekosalema na mituna mpe biyano.