Manaka mpo na pɔsɔ ya 19 Yuli
PƆSƆ EBANDI NA 19 YULI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
lv mok. 14 par. 15-19, etanda na lok. 167
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 1 Bakonzi 12-14
No. 1: 1 Bakonzi 12:12-20
No. 2: Nini ekoki kosalisa biso tótalela bandeko na biso ndenge Yehova atalelaka bango?
No. 3: Bátela boyokani na yo na Yehova, mpe boyá baninga mabe (rs lok. 192 par. 3)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Ndenge ya kosala mingi na mosala ya Nzambe—Eteni 2. Lisukulu ekouta na buku Tobongisami, lokasa 112, paragrafe 3 kino lokasa 114, paragrafe 1. Sololá na mobongisi-nzela moko to mibale, bálobela mbongwana oyo basalaki na programɛ na bango mpo bákóma babongisi-nzela.
Min. 10: Ndenge ya komibongisa liboso ya kozonga na kelasi. Lisolo elongo na bayangani. Sɛngá bayangani bálobela mwa mikakatano oyo bilenge bakristo bakokutana na yango na kelasi. Limbolá ndenge oyo baboti bakoki kosalela Index, buku Mituna oyo bilenge batunaka, volimi 1 mpe 2, to mikanda mosusu ya moombo ya sembo na ntango ya Losambo na libota mpo na kosalisa bana na bango bálonga komekama mpe báyeba kolimbola bindimeli na bango. (1 Pe. 3:15) Poná lisolo moko to mibale mpe lobelá batoli kitoko oyo mikanda na biso epesi mpo na kosalisa bilenge. Sɛngá bayangani bálobela ndenge bapesaki litatoli ntango bazalaki naino na kelasi.
Min. 10: “Nazali kosala mingi na mosala ya kosakola?” Ekosalema na mituna mpe biyano.