Manaka mpo na pɔsɔ ya 28 Febwali
PƆSƆ EBANDI NA 28 FEBWALI
Loyembo 5 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cf mok. 8 par. 18-22, etanda na lok. 86 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Estere 1-5 (Min. 10)
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (Min. 20)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Salá ete nsango malamu elendisaka bato. Lisolo ná bayangani, ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 202. Bósalela makanisi oyo bapesi na paragrafe ya nsuka mpo na kosala elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa buku oyo tokokabola na sanza oyo ezali koya.
Min. 10: Zwá matomba na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Lisolo ná bayangani, ekouta na maloba ya ebandeli ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2011. Lendisá bandeko nyonso bátángaka mokapo ya mokolo mikolo nyonso. Sɛngá bayangani báyebisa ntango nini baponá mpo na kotánga mokapo ya mokolo mpe matomba oyo bazwaka. Limbolá na mokuse mokapo ya mobu 2011. Lobelá lisolo “Tosengeli lisusu te kotalelaka Mokapo ya mokolo na likita mpo na mosala ya kosakola.”
Min. 10: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Marsi. Lisolo ná bayangani. Na miniti moko to mibale, lobelá na mokuse makambo oyo ezali na bazulunalo yango. Na nsima, poná masolo mibale to misato, mpe sɛngá bayangani báyebisa mituna oyo bakotuna mpe bavɛrsɛ oyo bakotánga mpo na kokabola bazulunalo yango. Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Loyembo 33 mpe libondeli