Manaka mpo na pɔsɔ ya 21 Marsi
PƆSƆ EBANDI NA 21 MARSI
Loyembo 47 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cf mok. 9 par. 17-21, etanda na lok. 96 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yobo 6-10 (Min. 10)
No. 1: Yobo 8:1-22 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Esuki kaka na kondimela Yesu Kristo mpo na kozwa lobiko?—rs lok. 435 par. 3 (Min. 5)
No. 3: Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo ezali na Matai 10:16? (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 15: Saleláká Biblia ntango ozali kopesa biyano. Lisolo ná bayangani, ekouta na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 143-144. Bósala bilakiseli mibale oyo ekomonisa mosakoli moko oyo bazali kotuna ye motuna moko oyo etunamaka mingi na teritware na bino. Na elakiseli ya liboso, akopesa eyano ya malamu, kasi akotánga ata vɛrsɛ moko ya Biblia te. Na elakiseli ya mibale, akosalela Biblia mpo na kopesa eyano. Sɛngá bayangani báyebisa mpo na nini elakiseli ya mibale eleki malamu.
Min. 15: “Kampanye mpo na kokabola nkasa ya libyangi na Ekaniseli ekobanda mokolo ya 2 Aprili.” Mituna mpe biyano. Bópesa mosakoli mokomoko lokasa ya libyangi mpo na Ekaniseli, mpe bólobela makambo oyo ezali na lokasa yango. Yebisá bibongiseli oyo ezwami mpo na kokabola nkasa yango na teritware na bino mobimba. Bósala elakiseli moko mpo na komonisa ndenge ya kokabola yango.
Loyembo 109 mpe libondeli