Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/12 lok. 3
  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 26 Marsi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 26 Marsi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • PƆSƆ EBANDI NA 26 MARSI
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 3/12 lok. 3

Manaka mpo na pɔsɔ ya 26 Marsi

PƆSƆ EBANDI NA 26 MARSI

Loyembo 92 mpe libondeli

□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:

bt mok. 9 par. 1-7, bitanda na nk. 68, 70

□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:

Botángi ya Biblia: Yirimia 12-16 (Min. 10)

No. 1: Yirimia 13:1-14 (Eleka min. 4 te)

No. 2: Nani asengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli?​—rs lok. 167 par. 4-5 (Min. 5)

No. 3: Ekaniseli esengeli kosalema mbala boni na mbula, mpe ntango nini?​—rs lok. 168 par. 4–lok. 169 par. 1 (Min. 5)

□ Likita ya mosala:

Loyembo 124

Min. 5: Mayebisi. Yebisá lisangá bateritware oyo bokaboli naino te nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli.

Min. 10: Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya. (Ebr. 13:1, 2) Diskur ekosalema na nkulutu moko. Lobelá bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na Ekaniseli. Monisá ndenge bandeko nyonso bakoki koyamba bato oyo bakoya na Ekaniseli mpe basakoli oyo batiká kosakola. Bósala elakiseli moko oyo ekozala na biteni mibale ya mokuse. Na eteni ya liboso, liboso diskur ya Ekaniseli ebanda mosakoli azali koyamba moto moko oyo azwaki lokasa ya libyangi. Na eteni ya mibale, na nsima ya diskur, mosakoli azali kosolola na moto yango mpo bázwa bibongiseli mpo abanda koyekola na ye Biblia.

Min. 20: “Misala ya kokamwa ya bozalisi emonisaka nkembo ya Nzambe” (Les merveilles de la création révèlent la gloire de Dieu). Mituna mpe biyano. Salelá makanisi ya paragrafe ya liboso mpo na maloba ya ebandeli mpe makanisi ya paragrafe ya nsuka mpo na maloba ya nsuka. Sɛngá bandeko bálobela ndenge oyo kotala video yango esalisi bango. Monisá ndenge bakoki kosalela video yango na mosala ya kosakola.

Loyembo 110 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto