Manaka mpo na pɔsɔ ya 19 Novɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 19 NOVƐMBƐ
Loyembo 81 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 1 par. 15-21 (Min. 30)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Obadia 1–Yona 4 (Min. 10)
No. 1: Yona 2:1-10 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Ndenge nini losambo ya solo esangisi bato ya ndenge na ndenge?—Nz. 133:1 (Min. 5)
No. 3: Mpo na nini Paradiso oyo Luka 23:43 elobeli ezali na likoló te to na esika moko boye na Nkunda?—rs lok. 405 par. 2–lok. 406 par. 2 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 15: Yehova apambolaka mpenza baoyo bakendaka kosala epai mposa ezali makasi. Lisolo na bayangani ekouta na Annuaire 2012, lokasa 114, paragrafe 1, tii lokasa 116, paragrafe 1; lokasa 151, paragrafe 2, mpe 3 tii na 153 paragrafe 1; mpe lokasa 170, paragrafe 1, tii lokasa 171, paragrafe 3. Sɛngá na bayangani báyebisa mateya oyo bazwi na masolo yango.
Min. 15: “Kokanisa te ete okokoka te mpo ozali na makoki ya kosala yango te.” Mituna mpe biyano. Sololá na mokuse na ndeko moko oyo atángá bakelasi mingi te to oyo azalaka nsɔninsɔni kasi ayekolaka na bato Biblia.
Loyembo 26 mpe libondeli