Manaka mpo na pɔsɔ ya 7 sanza ya Yambo, 2013
PƆSƆ EBANDI NA 7 SANZA YA YAMBO, 2013
Loyembo 104 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 3 par. 13-19 (Min. 30)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Matai 1-6 (Min. 10)
No. 1: Matai 5:21-32 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Nini ekoki kosala ete Nzambe aboya mabondeli ya moto?—rs lok. 256 par. 2–lok. 257 par. 2 (Min. 5)
No. 3: Kotika Yehova azala “likabo na yo” elimboli nini?—Mit. 18:20 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Yambo. Lisolo na bayangani. Na segɔnde 30 to miniti moko, monisá ntina oyo bazulunalo yango ekosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, na lisalisi ya lisolo oyo elobeli titre ya ezipeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, sɛngá bayangani báyebisa mituna oyo bakoki kotuna mpo na kobenda likebi ya bato, mpe bavɛrsɛ oyo bakoki kotánga. Salá mpe bongo mpo na Lamuká!, mpe soki miniti ezali, bólobela mpe lisolo mosusu, ezala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Ndako ya Bokonzi oyo ezali pɛto ekumisaka Yehova. Diskur ekosalema na nkulutu moko. Yehova azali Nzambe mosantu; yango wana bopɛto ya nzoto esengeli kozala na esika ya liboso epai ya basaleli na ye. (Kob. 30:17-21; 40:30-32) Soki tozali kobatela esika na biso ya losambo malamu mpe pɛto, tokopesa Yehova nkembo. (1 Pe. 2:12) Lobelá makambo oyo bandeko bakutanaki na yango to oyo ezali na mikanda na biso, oyo emonisi ndenge oyo bopɛto ya Ndako ya Bokonzi esalisaki na kopesa litatoli na kartye. Tuná ndeko moko oyo atalelaka programɛ ya kotya bopɛto mpe kobongisa Ndako ya Bokonzi alobela bibongiseli oyo ezwamá na lisangá na bino. Lobelá makambo oyo esalemá epai na bino to ebimá na mikanda na biso, oyo emonisi ndenge oyo Ndako ya Bokonzi oyo ezali pɛto esalisaki mpo na kopesa litatoli na kartye. Lendisá bayangani nyonso bápesaka mabɔkɔ na kotya bopɛto mpe kobongisa Ndako ya Bokonzi.
Loyembo 127 mpe libondeli