Manaka mpo na pɔsɔ ya 14 sanza ya 10
PƆSƆ EBANDI NA 14 SANZA YA 10
Loyembo 32 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 15 par. 7-12 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Bafilipi 1-4–Bakolose 1-4 (Min. 10)
No. 1: Bafilipi 3:17–4:9 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Ezali mabe kotika lingomba ya baboti?—rs lok. 279 par. 2-4 (Min. 5)
No. 3: Na ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tólonga komekama?—Luka 11:9-13; Yak. 1:5 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 15: Bomoko na biso ya mokili mobimba ekumisaka Yehova. Diskur ekouta na buku Tobongisami, lokasa 165, paragrafe 3 tii na motó ya likambo moke na lokasa 168. Sɛngá bandeko mosusu bálobela makambo oyo ezali na mikanda na biso, oyo emonisi ndenge oyo bolingo mpe bomoko ya Batatoli ya Yehova epesaki litatoli.
Min. 15: “Nsango ya Bokonzi No. 38 ekokabolama na sanza ya zomi na moko!” Mituna mpe biyano. Pesá moyangani nyonso lokasa ya Nsango ya Bokonzi No. 38. Sɛngá na mokɛngɛli na mosala ya kosakola alobelá bibongiseli oyo ezwami mpo na kokabola yango na teritware mobimba ya lisangá na bino. Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa 4, bósala elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kokabola Nsango ya Bokonzi.
Loyembo 53 mpe libondeli