Manaka mpo na pɔsɔ ya 17 sanza ya 2
PƆSƆ EBANDI NA 17 SANZA YA 2
Loyembo 15 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 3 par. 1-10 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ebandeli 29-31 (Min. 10)
No. 1: Ebandeli 29:21-35 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Lisekwa ekolimbola nini mpo na bato—rs lok. 298 par. 2–lok. 299 par. 2 (Min. 5)
No. 3: Abiatare (Abiathar)—Likambo moko ya kozanga bosembo ekoki kobebisa ebele ya bambula ya bosembo oyo moto asali—it-1-F nk. 17-19 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Tózala na nsai ntango tozali kosakola. Lisolo na bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 118, paragrafe 1 tii na lokasa 119, paragrafe 5.
Min. 5: Osalelaka jw.org na mosala na yo ya kosakola? Lisolo na bayangani. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango ntango basalelaki site jw.org na mosala ya kosakola. Lendisá basakoli bálobelaka site jw.org epai ya bato mbala nyonso oyo bazwi likoki ya kosala yango.
Min. 15: “Salá ete eleko ya Ekaniseli ya mbula oyo ezala eleko ya esengo!” Mituna mpe biyano. Sɛngá bandeko oyo bazali kokana kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi bálobela mbongwana nini bakosala mpo básakola mingi, atako bazali na mikakatano ya nzoto to bazalaka na makambo mingi ya kosala. Ntango bokotalela paragrafe 3, sɛngá na mokɛngɛli na mosala ya kosakola alobela bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na makita ya mosala ya kosakola na sanza ya misato, ya minei mpe ya mitano.
Loyembo 8 mpe libondeli