Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/14 lok. 3
  • Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 2/14 lok. 3

Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 24 sanza ya mibale 2014.

  1. Satana atindaki Eva atya makanisi na ye na nini, mpe lokola Eva alyaki mbuma oyo epekisamaki, amonisaki nini? (Eba. 3:6) [6 sanza ya 1, w11 15/5 nk. 16-17 par. 5]

  2. Mbala mosusu nini esalisaki Abele akóma na kondima makasi, mpe yango ememelaki ye matomba nini? (Eba. 4:4, 5; Ebr. 11:4) [6 sanza ya 1, w13 1/1 lok. 12 par. 3; lok. 14 par. 4-5]

  3. Ndenge nini baboti bakoki kobatela bana na bango mpo bákóma te kosepela na “bilombe” mpe “mibali ya lokumu” ya mokili? (Eba. 6:4) [13 sanza ya 1, w13 1/4 lok. 13 par. 2]

  4. Liteya nini tozwi na lisolo ya Lota ná mwasi na ye, ndenge ekomami na Ebandeli 19:14-17, 26? [27 sanza ya 1, w03 1/1 nk. 16-17 par. 20]

  5. Ndenge nini Abrahama amonisaki ete azalaki kondima lisekwa mpe elaka ya Yehova ete momboto akobima na nzela ya Yisaka? (Eba. 22:1-18) [3 sanza ya 2, w09 1/2 lok. 18 par. 4]

  6. Mateya nini ya ntina mingi tokoki kozwa na esakweli oyo ezali na Ebandeli 25:23, oyo elobi ete “mokóló akosalela leki”? [10 sanza ya 2, w03 15/10 lok. 29 par. 2]

  7. Eskalye oyo Yakobo amonaki na ndɔtɔ elimboli nini? (Eba. 28:12, 13) [10 sanza ya 2, w04 15/1 lok. 28 par. 6]

  8. Mpo na nini Labana asalaki nyonso ete azwa baterafime oyo bayibaki? (Eba. 31:30-35) [17 sanza ya 2, it-2-F lok. 100 par. 1]

  9. Liteya nini tozwi na eyano oyo anzelu apesaki Yakobo, ndenge ezali na Ebandeli 32:29? [24 sanza 2, w13 1/8 lok. 10]

  10. Wapi moko ya makambo oyo tokoki kosala mpo makambo oyo ekómelaki Dina ekómela biso te? (Eba. 34:1, 2) [24 sanza ya 2, w01 1/8 nk. 20-21]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto