Manaka mpo na pɔsɔ ya 3 sanza ya 3
PƆSƆ EBANDI NA 3 SANZA YA 3
Loyembo 112 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 3 par. 19-21, etanda na lok. 34 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ebandeli 36-39 (Min. 10)
No. 1: Ebandeli 37:1-17 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Mpo na nini bato oyo bakosekwa bakosambisama te mpo na makambo oyo basalaki kala?—rs lok. 299 par. 4 (Min. 5)
No. 3: Abigaile—Monisaká bizaleli oyo ekumisaka Yehova—it-1-F lok. 20, Abigaïl No. 1 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Ndenge ya kokabola bazulunalo na sanza ya misato. Lisolo na bayangani. Bóbanda na elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kopesa bazulunalo na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa oyo. Na nsima, bótalela eteni mokomoko ya maloba ya kobanda lisolo, banda na oyo elobeli nkasa ya libyangi tii na Lamuká! Mpo na kosukisa, sɛngá bayangani bálobela ndenge ya kopesa bazulunalo nzela moko na lokasa ya libyangi ya Ekaniseli mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, na bapɔsɔ mibale ya nsuka ya sanza.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Mosala oyo tosalaki. Lisolo na bayangani. Sɛngá basakoli bálobela matomba oyo bazwaki na ndenge basalelaki makanisi ya lisolo “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tókomaka makambo etali bato oyo basepeli.” Sɛngá bayangani bálobela makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango.
Loyembo 95 mpe libondeli