Manaka mpo na pɔsɔ ya 10 sanza ya 3
PƆSƆ EBANDI NA 10 SANZA YA 3
Loyembo 1 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 4 par. 1-9 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ebandeli 40-42 (Min. 10)
No. 1: Ebandeli 41:1-16 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Na ndenge nini “bakufi oyo batikalaki” bakozonga na bomoi na mabele?—rs lok. 300 par. 1–lok. 301 par. 1 (Min. 5)
No. 3: Abihu (Abihou)—Kozala na bokonzi epesi moto nzela te ya kozanga botosi—it-1-F nk. 21-22 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 15: Losambo na kati ya libota oyo ekolendisa. Sololá na libota moko mpo na oyo etali losambo na bango na kati ya libota. Makambo nini basalaka na losambo na kati ya libota? Basalaka nini mpo na kopona lisolo oyo bakolobela? Bisaleli nini ezali na site Internet jw.org oyo basalelaka? Ndenge nini programɛ yango esalisaki bango na mosala ya kosakola? Ndenge nini basalaka mpo makambo mosusu ebebisa te programɛ na bango ya losambo na kati ya libota? Matomba nini bazwi na programɛ na bango ya losambo na kati ya libota?
Min. 15: “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kosala soki moto aboyi koyoka biso.” Lisolo na bayangani. Bólobela makambo mibale to misato oyo bato balobaka mpo na koboya koyoka biso, mpe sɛngá bandeko báyebisa ndenge ya kosala soki bakutani na likambo ya ndenge wana. Yebisá basakoli ete na pɔsɔ oyo ebandi na 7 sanza ya minei, bakozwa libaku ya kolobela makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola.
Loyembo 97 mpe libondeli