Manaka mpo na pɔsɔ ya 7 sanza ya 4
PƆSƆ EBANDI NA 7 SANZA YA 4
Loyembo 15 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 5 par. 9-17 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kobima 7-10 (Min. 10)
No. 1: Kobima 9:20-35 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Yesu akozonga na ndenge nini, mpe ndenge nini liso nyonso ekomona ye?—rs lok. 246 par. 2–lok. 247 par. 4 (Min. 5)
No. 3: Abishai (Abishaï)—Zalá sembo mpe pene ya kosalisa bandeko na yo—it-1-F lok. 25 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Ndenge ya kokabola bazulunalo na sanza ya minei. Lisolo na bayangani. Bóbanda na elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kokabola bazulunalo yango na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa oyo. Na nsima, bótalela maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” banda ebandeli tii nsuka. Mpo na kosukisa, lendisá bandeko na mokuse ete bátánga bazulunalo yango mpo báyeba makambo ezali na kati mpe bákabola yango na esengo mpenza.
Min. 10: Tóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya. (Ebr. 13:1, 2) Diskur, ekosalema na nkulutu moko. Yebisá bibongiseli oyo lisangá na bino ezwi mpo na Ekaniseli. Lobelá mwa makambo oyo bandeko nyonso bakoki kosala mpo na koyamba bapaya oyo bakoya na Ekaniseli mpe basakoli oyo batiká kosakola. Bósala elakiseli moko ya mokuse ya biteni mibale. Eteni ya liboso ekomonisa ndenge mosakoli azali koyamba moto moko oyo azwaki lokasa ya libyangi na ntango ya kampanye, liboso ete programɛ ebanda. Na eteni ya mibale, na nsuka ya programɛ, mosakoli yango azali koyokana na moto yango mpo akende kotala ye na ndako mpo na kokoba lisolo.
Min. 10: Mosala oyo tosalaki. Lisolo na bayangani. Sɛngá basakoli bálobela matomba oyo bazwaki ntango basalelaki makanisi oyo ezali na lisolo “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kosala soki moto aboyi koyoka biso.” Sɛngá bango báyebisa makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango.
Loyembo 20 mpe libondeli