Manaka mpo na pɔsɔ ya 2 sanza ya 2
PƆSƆ EBANDI NA 2 SANZA YA 2
Loyembo 109 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 19 par. 18-23, etanda na lok. 198 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Basambisi 8-10 (Min. 8)
No. 1: Basambisi 8:13-27 (Eleka min. 3 te)
No. 2: Banani bakomaki Biblia?—(igw lok. 6 par. 1-5 (Min. 5)
No. 3: Andre (André)—Motó ya likambo: Ayebanaki mpenza te, kasi azalaki sembo mpe bato bazalaki kosepela koya epai na ye—it-1-F lok. 119 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: ‘Salelá Nkolo lokola moombo na elimo ya komikitisa mingi koleka.’—Misala 20:19.
Min. 10: Kabolá bazulunalo na sanza ya mibale. Lisolo na bayangani. Bósala liboso elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kokabola bazulunalo na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa oyo. Na nsima, bólobela maloba yango ya kobanda lisolo banda na ebandeli tii na nsuka.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Mosala oyo tosalaki. Lisolo na bayangani. Sɛngá basakoli bálobela matomba oyo bazwaki na ndenge basalelaki makanisi ya lisolo “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya koyanola moto oyo asiliki”. Sɛngá bayangani báyebisa makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango.
Loyembo ya sika “Pesá biso mpiko” mpe libondeli
Tóbosana te: Tosɛngi bino bóbɛta naino miziki mbala moko mpe na nsima bandeko bakoyemba loyembo ya sika.