Manaka mpo na pɔsɔ ebandi na 28 sanza ya 9
PƆSƆ EBANDI NA 28 SANZA YA 9
Loyembo 73 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 31 par. 1-12 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Bakonzi 23-25 (Min. 8)
No. 1: 2 Bakonzi 23:8-15 (Eleka min. 3 te)
No. 2: Mokumba nini baanzelu bakokisaka na mokano ya Nzambe?—it-1-F nk. 121-123 (Min. 5)
No. 3: Eleazare (Éléazar No. 1)—Motó ya likambo: Salelá Yehova na mpiko—it-1-F lok. 720 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: ‘Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.’—Mis. 20:24.
Min. 10: Ntoma Paulo ná baninga na ye bapesaki litatoli malamumalamu na Filipi. Lisolo na bayangani. Sɛngá bandeko bátánga Misala 16:11-15. Bólobela ndenge lisolo yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Min. 20: “Koteya na mwa buku Nsango malamu.” Mituna mpe biyano. Nsima ya kotalela paragrafe 3, bósala elakiseli oyo ebongisami malamu, ya mosakoli moko azali kopesa moto mwa buku Nsango malamu mpe bazali kotalela paragrafe moko.
Loyembo 114 mpe libondeli