Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Juin lok. 7
  • Longisá mibeko ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Longisá mibeko ya Yehova
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Molato na biso mpe ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato ezali na ntina
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Ozali na motema ya mosuni?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Juin lok. 7

BOMOI YA BAKRISTO

Longisá mibeko ya Yehova

Yehova Nzambe atyelá bato mibeko etali bizaleli malamu. Na ndakisa, alobá ete libala esengeli kosalema kati na mwasi moko mpe mobali moko mpe basengeli kokabwana te. (Mt 19:4-6, 9) Aboyaka lolenge nyonso ya kosangisa nzoto oyo ebukaka mibeko na ye. (1Ko 6:9, 10) Apesá kutu malako na oyo etali molato mpe monzɛlɛ mpo bato na ye bákesana na bato mosusu.​—Mib 22:5; 1Ti 2:9, 10.

Na mokili ya lelo, bato mingi baboyaka kotosa mibeko ya Yehova. (Ro 1:18-32) Balandaka makanisi ya bato na makambo etali molato, kobongisa nzoto mpe bizaleli. Bato mingi bamikumisaka na makambo mabe oyo basalaka mpe batyolaka baoyo basalaka makambo yango te.​—1Pe 4:3, 4.

Biso Batatoli ya Yehova tosengeli kolongisa mibeko ya Nzambe na mpiko nyonso. (Ro 12:9) Na ndenge nini? Tosengeli na mayele nyonso koyebisa basusu makambo oyo ye alingaka. Kasi biso moko mpe tosengeli kotosaka mibeko na ye na bomoi na biso. Na ndakisa, ntango tozali kopona bilamba na biso mpe ndenge ya kobongisa nzoto, tokoki komituna boye: ‘Bilamba oyo naponi ezali komonisa ete natosaka mibeko ya Yehova to nalandi nde mokili? Bilamba mpe ndenge na ngai ya kobongisa nzoto ezali komonisa ete nazali mokristo oyo abangaka Nzambe?’ To ntango tozali kopona programɛ moko ya televizyo to filme ya kotala, tosengeli komituna boye: ‘Yehova akosepela na programɛ oyo? Mibeko nini etali bizaleli malamu programɛ to filme yango ezali kolendisa? Mbala mosusu ndenge ya kominanola oyo naponi ezali kobebisa bizaleli na ngai ya malamu? (Nz 101:3) Yango ekoki kobɛtisa bato ya libota na ngai mpe bato mosusu libaku?’​—1Ko 10:31-33.

Mpo na nini ezali na ntina tólongisa mibeko ya Yehova? Mosika te Yesu Kristo akobebisa bikólo mpe akolongola mabe nyonso. (Ezk 9:4-7) Kaka baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe nde bakotikala. (1Yn 2:15-17) Boye, tiká tólongisa mibeko ya Yehova oyo etali bizaleli malamu mpo baoyo bazali komona bizaleli na biso ya malamu bákumisa Nzambe.​—1Pe 2:11, 12.

Mwasi moko azali kopona bilamba

Bilamba oyo naponaka mpe ndenge na ngai ya kobongisa nzoto emonisaka ete natosaka mibeko etali bizaleli malamu?

LAKISÁ VIDEO KÓMÁ MONINGA YA NZAMBE​—MOBALI MOKO, MWASI MOKO, NA NSIMA BÓTALELA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini ezali malamu kotosa mibeko ya Yehova?

  • Mpo na nini baboti basengeli kobanda koteya bana na bango mibeko ya Yehova ntango bazali naino mike mpenza?

  • Ndenge nini bilenge mpe mikóló bakoki kosalisa bato bázwa matomba na bolamu ya Nzambe?

OKOLOBA NINI SOKI MOTO ALOBI . . .

  • “Okanisaka nini na likambo etali kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi?”

  • “Likanisi ya Biblia na likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali makambo ya kala!”

  • “Bato oyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi bakoki kobongwana te mpo babotamá bongo.”

(yp1 mok. 23; yp2 mok. 28)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto