Biyano na mituna na bino
◼ Molato na biso esengeli kozala ndenge nini ntango tokei kotala bandako oyo esalelamaka mpo na mosala ya Yehova?
Na mokili mobimba, Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani, mpe bandako ya Betele, ezali bisika ya ntina mingi mpo na mosala ya Yehova. Bisika yango ezalaka mindɔndɔ te, ezalaka pɛto mpe ebongisami malamu; yango wana, emonanaka bisika ya lokumu. Yango ekeseni mpenza na oyo tomonaka mbala mingi na ebongiseli oyo ya Satana. Soki tokei kotala bisika oyo esalelamaka mpo na mosala ya Yehova, esengeli komonana polele ete tozali bato na ye mpe tosalaka mokano na ye.
Biso baklisto ‘tomilobelaka lokola baministre ya Nzambe’ na makambo nyonso, ezala na molato na biso ya malamu mpe na ndenge na biso ya kobongisa nzoto oyo ebongi. (2 Kol. 6:3, 4) Tosengeli mpe kozala ntango nyonso na bizaleli ya malamu. Molato na biso mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto esengeli komonisa ntango nyonso ete tozali na bizaleli malamu mpe na lokumu oyo ebongi na basaleli ya Yehova Nzambe. Yango esengeli kozala bongo mingimingi ntango tokei kotala bandako ya biro monene na New York to bafiliale mosusu na mokili.
Mpo na komonisa ntina ya kozala na molato ya malamu mpe kobongisa nzoto na ndenge ebongi, buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova elobi ete nzoto na biso esengeli kozala pɛto, tosengeli te kolekisa ndelo na molato, mpe tosengeli kobongisa nzoto na ndenge ya malamu ntango tobimi na mosala ya kosakola to tokei na makita ya lisangá. Mpe na lokasa 138, paragrafe 3, elobi boye: “Tóbosana te ete liloba Betele elimboli ‘Ndako ya Nzambe.’ Yango wana, ekozala malamu molato na biso, monzɛlɛ na biso, mpe etamboli na biso ezala ndenge kaka tosalaka ntango tokendeke na makita mpo na kosambela Yehova na Ndako ya Bokonzi.” Basakoli nyonso oyo bayei kotala Betele, ezala bafandaka pene na Betele to mosika, basengeli kolanda masɛngami wana ya ntina mingi. Na ndenge yango, bakomonisa ete bazali na botɔndi mpenza mpe na limemya.—Nz. 29:2.
Molato na biso esengeli komonisa ete tozali bato oyo “balobaka ete babangaka Nzambe.” (1 Tim. 2:10) Kolata malamu mpe kobongisa nzoto na ndenge ebongi, ekoki kotinda basusu bámemya losambo ya Yehova. Nzokande, emonani ete bandeko mosusu oyo bakendeke kotala bisika oyo esalelamaka mpo na mosala ya Yehova, balataka bongobongo, mobulumobulu, to bilamba oyo etikaka polele biteni ya nzoto oyo esengeli kobombama. Bilamba ya ndenge wana ebongi te mpo na baklisto ata na ntango nini. Na likambo oyo, mpe na makambo mosusu nyonso ya bomoi na biso baklisto, tosengeli ntango nyonso kolanda mitinda oyo ekesenisaka basaleli ya Nzambe na bato ya mokili, mpe kosala makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.—Lom. 12:2; 1 Kol. 10:31.
Yango wana, ntango tolingi kokende kotala biro monene mpe biro ya filiale na New York to biro ya filiale na ekólo mosusu, ezala tokanaki yango liboso to tolingi kotala yango mpo tozali kotala bisika mosusu na eleko ya konje, tosengeli komituna boye: ‘Molato na ngai mpe ndenge na ngai ya kobongisa nzoto ezali mpenza ya mindɔndɔ te, ya pɛto, mpe ezali komonisa lokumu lokola oyo ya esika nalingi kokende kotala? Ezali kopesa lokumu na Nzambe oyo nasambelaka? Ekobenda nde likebi ya bato to ekopesa bango mpasi na motema?’ Tiká ete ntango nyonso, na molato na biso mpe na ndenge na biso ya kobongisa nzoto, ‘tókómisa kitoko mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe, na makambo nyonso’!—Tito 2:10.