Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/02 lok. 2
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Molato na biso mpe ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato ezali na ntina
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Libyangi mpo na moto nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 6/02 lok. 2

Biyano na mituna na bino

◼ Ndenge nini tosengeli kolata mpe kobongisa nzoto ntango tokei kotala Betele?

Ntango tokei na Betele, ezala mpo na kotala yango to mpo na kotala bandeko oyo bazalaka na Betele, ‘esengeli ete ndenge tokati nsuki na biso to ndenge totongi nsuki, ndenge tolati mpe etamboli na biso, ezala ndenge tosalaka ntango toyanganaka na makita na Ndako ya Bokonzi.’ (om 132) Nzokande, emonani ete bandeko mosusu ya basi mpe ya mibali oyo bazali koya kotala Betele bazali kolata mpenza mabe. Ezali malamu te kolata ndenge wana ntango tokei kotala Betele. Tosengeli kolata mpe kobongisa nzoto na biso na ndenge oyo ekopesa ndakisa ya malamu, oyo ekoki mpe oyo ezangi mindɔndɔ, oyo ekomonisa bizaleli malamu mpe limemya oyo ebongi na basaleli ya Yehova Nzambe.​​—⁠1 Tim. 2:​9, 10.

Yango ezali mpenza na ntina, mingimingi ntango tokei kotala Betele, mpamba te na ntango wana bato mingi oyo bazali Batatoli te batalaka biso. Makambo oyo bato wana bakomona ekoki kosala ete bábanda kotalela basaleli ya Nzambe mpe ebongiseli na ye na ndenge ya malamu to ya mabe. Ekozala malamu kosolola na bayekoli ya Biblia mpe bato mosusu oyo balingi kokende kotala Betele mpo na komonisa bango ntina ya kolata malamu mpe kobongisa nzoto na ndenge ya malamu. Bandeko oyo bazalaka na Betele bakozala na botɔndi mingi soki bosali bongo.

Lokola tozali baministre baklisto, tosengeli kokeba ete lolenge na biso ya kolata mpe ya kobongisa nzoto ebɛtisa basusu libaku te. (2 Kol. 6:​3, 4) Kasi, tiká ete, na molato na biso ya malamu mpe na ndenge na biso ya kobongisa nzoto, ‘tókómisa kitoko mateya ya Nzambe Mobikisi na biso, na makambo nyonso.’​​—⁠Tito 2:​10, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto